Ozali koyeba lisusu?
Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:
Mpo na kosalisa bana na bango na elimo, mpo na nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na mboka mopaya basengeli kotalela likambo ya monɔkɔ?
Ekoki kozala ete bana na yo bazali koyekola monɔkɔ ya ekólo oyo bofandi na kelasi to epai ya bato mosusu. Soki bana na yo bazali koloba minɔkɔ ebele ezali na matomba. Baboti basengeli kotala soki bana bakangaka malamu ntina ya mateya ya solo ya Biblia mpe bazali kokende liboso na elimo, ezala soki bazali na lisangá ya monɔkɔ ya mboka to na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya. Baboti bakristo batyaka bamposa ya elimo ya bana na bango liboso ya bamposa na bango moko.—w17.05, nk. 9-11.
Ntango Yesu atunaki Petro: “Olingaka ngai koleka oyo?” azalaki kolobela nini? (Yoane 21:15)
Emonani ete Yesu azalaki kolobela mbisi oyo ezalaki wana ná mosala ya koboma mbisi, to mosala yango. Nsima ya liwa ya Yesu, Petro azongelaki mosala na ye ya kobomba mbisi. Mokristo asengeli koyeba esika atyaka mosala na bomoi na ye.—w17.05, nk. 22-23.
Mpo na nini Abrahama asɛngaki Sara aloba ete azali ndeko na ye? (Ebandeli 12:10-13)
Sara azalaki mpenza leki ya Abrahama, mwana ya mama mosusu. Soki alobaki ete azali mwasi ya Abrahama, balingaki koboma Abrahama mpe momboto oyo Nzambe alakaki na nzela na ye alingaki kobotama te.—wp17.3, nk. 14-15.
Mayele nini Elias Hutter asalelaki mpo na kosalisa bato oyo balingaki koyekola monɔkɔ ya Ebre?
Alingaki kosalisa bana-kelasi bázala na mokakatano te mpo na komona maloba ya Ebre oyo ebimisá maloba mosusu, mpe liloba oyo babakisi liboso to na nsima. Mpo na kosala yango, asalaki ete liloba oyo ebimisá liloba mosusu ezala na moindo makasi, kasi liloba oyo babakisi liboso to na nsima ezala moindo makasi te. Biblia Traduction du monde nouveau (avec notes et références) esaleli mpe mayele yango na maloba na nse ya lokasa.—wp17.4, nk. 11-12.
Makambo nini ekosalisa mokristo ayeba soki asengeli kozala na mondoki mpo na komibatela na bato mabe?
Makambo lokola oyo: Bomoi ezali mosantu na miso ya Nzambe. Yesu ayebisaki bayekoli na ye te ete bázwa mipanga mpo bámibatela. (Luka 22:36, 38) Tosengeli kokómisa makɔnga na biso makwangola ya kokata matiti. Bomoi ezali na motuya koleka biloko ya mokili. Tomemyaka lisosoli ya basusu, mpe tolingaka kozala ndakisa malamu. (2 Bakorinti 4:2)—w17.07, nk. 31-32.
Mpo na nini lisolo ya bomwana ya Yesu na mokanda ya Matai ekeseni na oyo ya mokanda ya Luka?
Matai alobeli mingi Yozefe, na ndakisa ndenge asalaki ntango Maria akómaki na zemi mpe ndenge anzelu ayebisaki ye akima na Ezipito mpe alongwa kuna. Luka alobeli mingi nde Maria, na ndakisa ndenge akendaki kotala Elizabeti mpe makambo oyo alobaki ntango Yesu atikalaki na tempelo.—w17.08, lok. 32.
Biblia eumeli atako makambo nini?
Maloba mosusu ekoki kozwa ndimbola ya sika, nzokande liboso ezalaki na ndimbola mosusu. Makambo ya politiki mpe ebongolaki monɔkɔ oyo bato mingi ya ekólo basalelaka. Batɛmɛlaki bato oyo bazalaki kobongola Biblia na monɔkɔ oyo bato bazalaki kosalela mingi.—w17.09, nk. 19-21.
Tozalaka na anzelu moko oyo abatelaka biso?
Te. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bazali na baanzelu oyo batalaka elongi ya Nzambe. (Matai 18:10) Alingaki koloba ete baanzelu batyelaka bayekoli na ye likebi, kasi te ete moto mokomoko azalaka na anzelu oyo abatelaka ye na ndenge ya likamwisi.—wp17.5, lok. 5.
Bolingo nini eleki bolingo nyonso?
Bolingo oyo eleki bolingo nyonso ezali agapê, bolingo oyo esimbami na mitinda ya ntina mingi. Bolingo yango esɛngaka kosepela makasi na moto. Esimbami na mitinda ya ntina mingi mpe etindaka biso tósalela basusu makambo mpo na bolamu na bango.—w17.10, lok. 7.