Tólobaka solo
“Bólobanaka mpenza solo.”—ZEKARIA 8:16.
1, 2. Zabolo asalelaki nini mpo na kosala bato mabe mpenza?
BILOKO mosusu oyo bato babimisi, na ndakisa telefone, ampulɛ, motuka, mpe frigo, esalisaka mingi na bomoi lelo oyo. Kasi, biloko mosusu, na ndakisa mandoki, mine, makaya, mpe bɔmbi, etyaka bomoi na likama. Nzokande, ezali na eloko moko oyo ebimá kala koleka biloko nyonso wana mpe esali bato mabe koleka. Ezali eloko nini? Lokuta! Koloba lokuta elimboli koloba likambo oyo toyebi ete ezali solo te, mpo na kobuba to kokosa moto. Nani alobaki lokuta ya liboso? Zabolo! Yesu abengaki ye “tata ya lokuta.” (Tángá Yoane 8:44.) Ntango nini alobaki lokuta yango?
2 Alobaki yango na elanga ya Edene, eleki sikoyo bankóto ya bambula. Adama ná Eva bazalaki na bomoi ya esengo na Paradiso kitoko oyo Mozalisi na bango Yehova abongiselaki bango. Ayebisaki bango ete bakokufa soki balye mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe.” Atako Satana ayebaki likambo yango, asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva ete: “Bokokufa soki moke te.” Yango nde lokuta ya liboso. Satana abakisaki ete: “Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.”—Ebandeli 2:15-17; 3:1-5.
3. Mpo na nini lokuta ya Satana ezalaki mabe mingi, mpe ebimisá mbuma nini?
Ebandeli 3:6; 5:5) Likambo ya mabe koleka, mpo na lisumu ya Adama, “liwa epalangani epai ya bato nyonso.” Kutu, “liwa eyangelaki . . . , ata baoyo basalaki lisumu te lokola lisumu ya Adama ntango abukaki mobeko.” (Baroma 5:12, 14) Yango wana lelo, na esika tózala bato ya kokoka mpe tózala na bomoi ya seko, ndenge Nzambe akanaki yango, toumelaka kaka soki mbula 70, to soki moto azali na makasi mingi, mbula 80. Atako bongo, bomoi “etondi kaka na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi.” (Nzembo 90:10) Nyonso wana mpo na lokuta ya Satana!
3 Lokuta ya Satana ezalaki mabe mingi mpo ayebaki ete soki Eva andimeli ye mpe alei mbuma, akokufa. Esalemaki mpe kaka bongo. Adama ná Eva babukaki mobeko ya Nzambe mpe nsukansuka bakufaki. (4. (a) Tosengeli kozwa biyano na mituna nini? (b) Na kolanda Nzembo 15:1, 2, kaka nani nde akoki kozala moninga ya Yehova?
4 Yesu alobaki mpo na Satana ete: “Akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te.” Satana abongwani te. Tii lelo asalelaka lokuta mpo na “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Emoniseli 12:9) Kasi tolingaka te Satana akosa biso. Na yango, tosengeli kozwa biyano na mituna oyo misato: Ndenge nini Satana azali kokosa bato lelo oyo? Mpo na nini bato bakosaka? Mpo tóbebisa te boninga na biso na Yehova, lokola Adama ná Eva, ndenge nini tokoki komonisa ete tolobaka solo ntango nyonso?—Tángá Nzembo 15:1, 2.
NDENGE NINI SATANA AZALI KOKOSA BATO?
5. Ndenge nini Satana azali kokosa bato lelo oyo?
5 Tokoki koboya Satana akosa biso. Ntoma Paulo alobaki: “Toyebi malamu mayele na ye.” (2 Bakorinti 2:11) Toyebi ete Satana azali koyangela mokili mobimba, oyo esangisi mangomba ya lokuta, baguvɛrnema ya politiki ya nyamunyamu, mpe bato ya mombongo ya lokoso. (1 Yoane 5:19) Yango wana, tokamwaka te ndenge Satana ná bademo na ye batindaka bato minene ya mokili oyo ‘bálobaka lokuta.’ (1 Timote 4:1, 2) Na ndakisa, bato mosusu ya mombongo balobaka lokuta na bapiblisite ya biloko na bango mpo na kotinda bato básomba biloko oyo ezali malamu te to mpo na kolya bato mbongo.
6, 7. (a) Mpo na nini ezalaka mabe koleka ntango bakonzi ya mangomba bazali koloba lokuta? (b) Lokuta nini oyoká epai ya bakonzi ya mangomba?
6 Ezalaka mabe koleka soki bakonzi ya mangomba bazali koloba lokuta. Mpo na nini? Mpo soki moto andimi mateya na bango ya lokuta mpe asali makambo oyo Nzambe ayinaka, moto yango akoki kozanga bomoi ya seko. (Hosea 4:9) Yesu ayebaki ete bakonzi ya mangomba ya ntango na ye bazalaki kokosa bato. Na mpiko nyonso ayebisaki bango: “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpamba te bozali kokatisa mbu mpe mokili mpo na kokómisa moto prozelite, mpe ntango akómi bongo bozali kokómisa ye moto oyo abongi kokende na Gehena [libebi ya seko] koleka bino mbala mibale.” (Matai 23:15) Yesu alobaki ete bakonzi yango ya mangomba bazalaki kaka lokola tata na bango Zabolo, oyo azali “mobomi-bato.”—Yoane 8:44.
7 Lelo oyo mpe, bakonzi ya mangomba bazali ebele. Babengaka bango bapastɛrɛ, basango, mpe bongo na bongo. Ndenge moko na Bafarisai, bateyaka solo ya Liloba ya Nzambe te, kasi ‘baponi kondima lokuta na esika ya kondima solo ya Nzambe.’ (Baroma 1:18, 25) Bateyaka mateya ya lokuta lokola lifelo, molimo ekufaka te, moto akoki kobotama mbala na mbala, Nzambe andimaka bato oyo basangisaka nzoto mibali-mibali to basi-basi, mpe libala ya mibali-mibali to basi-basi.
8. Lokuta nini bakonzi ya politiki bakoloba mosika te, kasi biso tokosala nini?
8 Bato ya politiki mpe balobaka lokuta. Mosika te, bakoloba lokuta mosusu ya monene ete batye “kimya, likambo ya kobanga ezali te” na mokili. Kasi, “na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” Na yango, tóndima te bakonzi yango ya politiki ntango bakoloba ete makambo ezali kobonga. Biso ‘toyebi malamu ete mokolo ya Yehova ekoya mpenza lokola moyibi na butu.’—1 Batesaloniki 5:1-4.
MPO NA NINI BATO BAKOSAKA?
9, 10. (a) Mpo na nini bato bakosaka, mpe yango ebimisi mbuma nini? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te mpo na Yehova?
9 Lelo oyo, kaka bakonzi te nde bakosaka basusu. Lisolo “Mpo na nini tokosaka,” oyo mwasi moko na nkombo Bhattacharjee akomaki, elobi ete “kokosa ekɔteli bato na makila.” Na maloba mosusu, bato bakanisaka ete kokosa ezali mabe te mpe bomoi esɛngi kaka bongo. Mbala mingi, bato bakosaka mpo na komibatela, ntango mosusu mpo na kobomba mabunga to mabe oyo basali. Bakosaka mpe mpo na kozwa mbongo to litomba moko boye. Lisolo yango elobi mpe ete bato bakosaka na pɛtɛɛ nyonso “bapaya, bato oyo basalaka na bango esika moko, baninga, mpe bato oyo balingaka.”
10 Lokuta ya ndenge wana ebimisi mbuma nini? Bato bazali lisusu kotyelana motema te, mpe boyokani ya bato ezali kobeba. Na ndakisa, kanisá mpasi oyo mobali to mwasi oyo azali sembo akoyoka soki ayebi ete molongani na ye asali ekobo, mpe akosi ye mpo na kobomba likambo yango. To kanisá ndenge esalaka mpasi soki mobali moko ya nko anyokolaka mwasi ná bana na ye na ndako, kasi na miso ya bato asalaka lokola alingaka mpe alɛngɛlaka libota na ye. Bato ya ndenge wana bakoki kokosa bato, kasi tóbosana te ete bakoki kokosa Yehova te. Biblia elobi ete “biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.”—Baebre 4:13.
11. Ndakisa mabe ya Ananiasi ná Safira ezali koteya biso nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)
11 Na ndakisa, Biblia elobeli mokristo moko na nkombo Ananiasi ná mwasi na ye Safira, oyo Satana atindaki bákosa Nzambe. Ananiasi ná Safira balukaki kobuba bantoma. Batɛkaki elanga na bango mpe bamemaki ndambo ya mbongo epai ya bantoma. Kasi, Ananiasi ná Safira balingaki kobenda likebi ya bandeko ya lisangá; na yango, bayebisaki bantoma ete bapesaki mbongo nyonso oyo batɛkaki elanga. Kasi Yehova ayebaki ete bakosaki; na yango apesaki bango etumbu.—Misala 5:1-10.
12. Bato oyo balobaka lokuta mpo na konyokola basusu kasi baboyi kobongola motema bakosuka ndenge nini, mpe mpo na nini?
12 Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo bakosaka? Bato nyonso oyo balobaka lokuta mpo na konyokola basusu mpe baboyi kobongola motema bakosuka kaka lokola Satana, “na kati ya laki ya mɔtɔ,” elingi koloba, bakobebisama libela na libela. (Emoniseli 20:10; 21:8; Nzembo 5:6) Mpo na nini? Mpo Yehova atalelaka bato ya lokuta ya ndenge wana kaka ndenge atalelaka bato nyonso oyo bamipesá na makambo oyo ezali mabe na miso na ye.—Emoniseli 22:15.
13. Likambo nini toyebi mpo na Yehova, mpe yango etindaka biso tósala nini?
13 Toyebi ete Yehova “azali moto te mpo abuka lokuta” mpe ekoki kosalema te ete akosa. (Mitángo 23:19; Baebre 6:18) “Yehova ayinaka . . . lolemo ya lokuta.” (Masese 6:16, 17) Mpo asepela na biso, tosengeli kolobaka solo. Yango wana, ‘tolobanaka lokuta te.’—Bakolose 3:9.
‘TOLOBANAKA MPENZA SOLO’
14. (a) Nini ekesenisaka bakristo ya solo na bato ya mangomba ya lokuta? (b) Maloba ya Luka 6:45 emonisi nini?
14 Wapi moko ya makambo oyo ekesenisaka bakristo ya solo na bato ya mangomba ya lokuta? Tokeseni mpo biso ‘tolobanaka solo.’ (Tángá Zekaria 8:16, 17.) Ntoma Paulo alobaki: “Tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe, . . . na maloba ya solo.” (2 Bakorinti 6:4, 7) Yesu alobaki ete moto alobaka “makambo oyo etondi na motema.” (Luka 6:45) Yango emonisi ete moto oyo azali sembo na motema na ye, akobimisa mpe maloba oyo ezali solo. Akoloba solo epai ya bapaya, epai ya bato oyo asalaka na bango, epai ya baninga mpe bato ya libota. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosalaka makasi tózala sembo na makambo nyonso? Tótalela mwa bandakisa.
15. (a) Mpo na nini ezali mabe kozala na bomoi ya liso na nse ya lokasa? (b) Nini ekoki kosalisa bilenge bátɛmɛla makambo mabe ya baninga? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
15 Soki ozali elenge, mbala mosusu olingaka baninga na yo bándima yo. Mposa yango etindaka bilenge mosusu bákóma na bomoi ya liso na nse ya lokasa. Ntango bazali elongo na bandeko ya libota mpe ya lisangá, bamonisaka ete bazali na bizaleli ya pɛto; kasi bakómaka bato ya ndenge mosusu mpenza ntango bakɔti na basite ya kosolola na baninga, to ntango bazali elongo na bato oyo basambelaka Yehova te. Balobaka lokola bilenge ya kilikili, balataka mabe, bayokaka miziki oyo ezali na maloba ya mbindo, balangwaka masanga, basalelaka drɔgɛ, bazwaka makango, to mpe basalaka makambo mosusu ya mabe. Kosala bongo ezali kokosa baboti, bandeko mpe Yehova. (Nzembo 26:4, 5) Kasi Yehova ayebaka soki moto akumisaka ye na mbɛbu, kasi na kobombana asalaka makambo oyo Nzambe ayinaka. (Marko 7:6) Eleki mpenza malamu kosala oyo Masese elobi: “Motema na yo elula basumuki te, kasi bangáká Yehova mokolo mobimba.”—Masese 23:17. *
16. Biyano ya ndenge nini tosengeli kopesa ntango tozali kotondisa formilɛrɛ mpo na mosala ya ntango nyonso?
16 Soki olingi kokóma mobongisi-nzela ya Baebre 13:18) Okosala nini soki osalaki likambo moko ya mabe na miso ya Yehova, to likambo moko etungisaka lisosoli na yo kasi oyebisá yango bankulutu te? Sɛngá bango básalisa yo mpo okoka kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto.—Baroma 9:1; Bagalatia 6:1.
sanza na sanza to kokɔta na mosala ya ntango nyonso, na ndakisa na Betele, ekosɛnga otondisa formilɛrɛ. Ezali na ntina mingi opesa biyano na bosembo mpenza na mituna nyonso oyo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo, kominanola oyo oponaka mpe bizaleli na yo. (17. Tosengeli kosala nini ntango banguna na biso batuni biso mituna oyo etali bandeko?
17 Okosala nini soki na mboka na bino mosala na biso epekisamá mpe bakonzi bakangi yo mpe batuni yo mituna oyo etali bandeko? Osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo oyebi? Yesu asalaki nini ntango guvɛrnɛrɛ ya Roma atunaki ye mituna? Na kolanda etinda ya Biblia oyo elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba,” na bantango mosusu Yesu alobaki eloko te! (Mosakoli 3:1, 7; Matai 27:11-14) Soki tokutani na likambo ya ndenge wana, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe na mayele mpo tótya bandeko na likama te.—Masese 10:19; 11:12.
18. Mokumba nini tozali na yango soki bankulutu batuni biso mituna oyo etali bandeko?
18 Okosala nini soki ndeko moko na lisangá asali lisumu ya monene mpe yo oyebi likambo yango? Lokola bankulutu bazali na mokumba ya kobatela bopɛto ya lisangá, bakoki kotuna yo mwa mituna na makambo oyo oyebi. Okoloba nini, mingimingi soki moto yango azali moninga na yo ya motema to ndeko ya libota? Biblia elobi: “Ye oyo afulaka bosembo akoyebisa makambo ya boyengebene.” (Masese 12:17; 21:28) Na yango, ozali na mokumba ya koloba solo epai ya bankulutu, kobomba ata eloko te, kobalola mpe makambo te. Bankulutu bazali na lotomo ya koyeba makambo ya solo mpo bátala ndenge oyo bakoki kosalisa moto yango abongisa boyokani na ye na Yehova.—Yakobo 5:14, 15.
19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
19 Davidi abondelaki Yehova ete: “Osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema.” (Nzembo 51:6) Davidi ayebaki ete bomoto ya kati nde ezali na ntina. Biso bakristo ‘tolobanaka solo’ ntango nyonso. Ndenge mosusu ya komonisa ete tokeseni na bato ya mangomba ya lokuta ezali ete toteyaka solo ya Biblia. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo tokoki kosala yango na mosala ya kosakola.
^ par. 15 Talá buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, mokapo 15, “Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?,” mpe mokapo 16, “Nasengeli koloba makambo oyo nasalaka na kobombana?”