Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

“Tozali kotika te”!

“Tozali kotika te”!

“Yango wana tozali kotika te.”​—2 KO. 4:16.

LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka

NA MOKUSE a

1. Bakristo basengeli kosala nini mpo bápota mbangu tii na nsuka?

 BISO bakristo tozali kopota mbangu mpo na bomoi. Ezala tobandi kopota mbangu sika to mpe tosalaka yango banda bambula mingi, tosengeli kokoba kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka. Toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Filipi ekoki kolendisa biso tópota mbangu tii na nsuka. Ntango mokanda ya Paulo ekómaki na lisangá wana ya siɛklɛ ya liboso, bandeko mosusu ya lisangá yango bazalaki kosalela Yehova banda bambula mingi. Bazalaki kopota mbangu malamu, kasi Paulo akundwelaki bango ete basengeli koyika mpiko ntango bazali kopota mbangu mpo na bomoi. Alingaki ete bakristo yango bákoba kolanda ndakisa na ye mpe ‘bápota mbangu tii na nsuka.’​—Flp. 3:14.

2. Mpo na nini toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Filipi eyaki mpenza na ntango oyo ebongi?

2 Toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Filipi eyaki mpenza na ntango oyo ebongi. Lisangá yango ekutanaki na botɛmɛli kaka na ebandeli. Na mobu soki 50 T.B., Paulo azwaki emonaneli moko oyo eyebisaki ye ete ‘aleka na Masedonia,’ mpe ye ná Silasi bakómaki na Filipi mpo na kosakola nsango malamu. (Mis. 16:9) Kuna, bakutanaki na mwasi moko na nkombo Lidia, oyo “azalaki koyoka, mpe Yehova afungolaki motema na ye” mpo andima nsango malamu. (Mis. 16:14) Mwa moke na nsima, ye ná bato ya ndako na ye bazwaki batisimo. Kasi, Zabolo mpe akangaki mabɔkɔ te. Mibali ya engumba yango bamemaki Paulo ná Silasi liboso ya bakambi-mboka mpe bakoselaki bango makambo ete bazali kokɔtisa mobulu. Na yango, babɛtaki Paulo ná Silasi, babwakaki bango na bolɔkɔ, mpe na nsima basɛngaki bango bálongwa na engumba. (Mis. 16:16-40) Batikaki kopota mbangu? Te! Bongo bandeko ya lisangá ya Filipi, oyo eutaki kofungwama sika, basalaki nini? Likambo ya esengo, bango mpe bayikaki mpiko! Na ntembe te, ndakisa ya Paulo ná Silasi elendisaki bango mingi.

3. Paulo ayebaki likambo nini, mpe mituna nini tokotalela?

3 Paulo azalaki na ekateli ya kokoba koyika mpiko. (2 Ko. 4:16) Kasi, ayebaki ete mpo apota mbangu tii na nsuka, asengelaki kotya makanisi na mokano na ye. Ndakisa na ye ekoki koteya biso nini? Ndakisa nini ya bandeko ya sembo lelo oyo emonisi ete tokoki koyika mpiko atako mikakatano? Mpe ndenge nini elikya na biso mpo na mikolo oyo ezali koya ekoki kolendisa ekateli na biso ya kotika te koyika mpiko?

NDAKISA YA PAULO EKOKI KOTEYA BISO

4. Ndenge nini Paulo akobaki kosalela Yehova atako mikakatano oyo ekómelaki ye?

4 Kanisá milende nyonso oyo Paulo asalaki mpo na kokomela bakristo ya Filipi. Azalaki mokangami na ndako moko na Roma. Azalaki na bonsomi te ya kokende kosakola. Atako bongo, amipesaki na kosakwela bato oyo bazalaki koya kotala ye mpe azalaki kokomela masangá ya mosika mikanda. Lelo oyo mpe, bakristo mingi oyo bakɔtá ndako basalaka makasi básakola nsango malamu na baoyo bayei kotala bango. Bakomaka mpe mikanda mpo na kolendisa bato oyo tokoki kokutana na bango te.

5. Na kotalela maloba ya Paulo na Bafilipi 3:12-14, nini esalisaki ye akoba kotya makanisi na mokano na ye?

5 Ntoma Paulo aboyaki kotya likebi na makambo mosusu, na ndakisa makambo ya malamu to mabunga oyo asalá kala. Kutu, alobaki ete ‘abosanaki biloko oyo ezali na nsima’ mpo ‘azwa biloko oyo ezali liboso,’ elingi koloba, apota mbangu tii na nsuka. (Tángá Bafilipi 3:12-14.) Wapi mwa makambo oyo ekokaki kolongola likebi ya Paulo na mosala ya Nzambe? Ya liboso, Paulo asalaki makambo minene na Lingomba ya Bayuda, liboso akóma mokristo. Kasi, amonaki ete nyonso wana ezali lokola “bosɔtɔ mpamba.” (Flp. 3:3-8) Ya mibale, atako mbala mosusu azalaki komipesa foti mpo anyokolaki bakristo, atikaki te ete mayoki yango epekisa ye kosalela Yehova. Mpe ya misato, amonaki te ete oyo asili kosala na mosala ya Yehova ekoki bongo. Ntoma Paulo asalaki mingi na mosala ya Nzambe atako mikakatano, na ndakisa akɔtaki bolɔkɔ, babɛtaki ye, babambaki ye mabanga, azindaki na masuwa, azangaki biloko ya kolya mpe bilamba. (2 Ko. 11:23-27) Atako asalaki makambo mingi mpe akutanaki na mikakatano ebele, Paulo ayebaki ete asengeli kokoba kopota mbangu. Biso mpe tosengeli kosala bongo.

6. Wapi mwa ‘biloko oyo ezali na nsima,’ oyo ekoki kosɛnga ete tóbosana?

6 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo na oyo etali “kobosana biloko oyo ezali na nsima”? Bandeko mosusu bamipesaka foti mpo na mabunga oyo basalá kala, mpe ekoki kosɛnga ete bálonga makanisi yango. Soki ezali bongo mpo na yo, ekozala malamu osala boyekoli na yo moko na likambo etali mbeka ya lisiko ya Kristo. Soki oyekoli likambo wana ya kolendisa, omanyoli mpe obondeli mpo na yango, ekoki kosalisa yo mingi mpo otika komipesa foti kaka mpamba. Ekoki kutu kosala ete otika komipesa etumbu mpo na masumu ya kala oyo Yehova asilá kolimbisa. Tótalela liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Paulo. Ekoki kozala ete bamosusu batiká misala oyo ekokaki kopesa bango mbongo mingi mpo bámipesa na mosala ya Yehova. Soki ezali bongo, kobosana biloko oyo ezali na nsima elimboli koboya kokanisakanisa biloko ya mokili oyo tokokaki kozwa. (Mit. 11:4-6; Mos. 7:10) “Biloko oyo ezali na nsima” ekoki mpe kozala makambo ya malamu oyo tosalá na mosala ya Yehova to mpe komekama oyo toyikelaki mpiko. Ya solo, kokanisa ndenge oyo Yehova apambolaki biso mpe asalisaki biso na kala ekoki kosalisa biso tópusana lisusu pene ya Tata na biso. Kasi, ata mokolo moko te tosengeli kokanga mabɔkɔ mpe komona ete oyo tosili kosala ekoki bongo.​—1 Ko. 15:58.

Mpo tópota mbangu tii na nsuka mpo na kozwa bomoi, tosengeli koboya kotya likebi na makambo mosusu (Talá paragrafe 7)

7. Na kotalela 1 Bakorinti 9:24-27, tosengeli kosala nini mpo tólonga na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi? Pesá ndakisa.

7 Ntoma Paulo akangaki mpenza ntina ya maloba oyo ya Yesu: “Bósala makasi mpenza.” (Luka 13:23, 24) Ayebaki ete, ndenge moko na Kristo, asengelaki kosala makasi mpenza tii na nsuka ya bomoi na ye. Na yango, akokanisaki bomoi ya bakristo na momekano ya kopota mbangu. (Tángá 1 Bakorinti 9:24-27.) Mopoti-mbangu atyaka makanisi na ndelo ya nsuka mpe aboyaka kotya likebi na ye na makambo mosusu. Na ndakisa, bato oyo bazali kopota mbangu na kati ya engumba bakoki kopota mbangu na nzela oyo etondi na biloko oyo bazali kotɛka mpe biloko mosusu oyo ekoki kobenda likebi na bango. Okanisi ete mopoti-mbangu akoki kotɛlɛma mpo na kotala biloko oyo batandi? Soki azali na mposa ya kolonga, akosala yango te! Na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, biso mpe tosengeli koboya kotya likebi na makambo mosusu. Soki tokobi kotya makanisi na biso na mokano oyo tozali na yango mpe tosali makasi mpenza, ndenge Paulo asalaki, tokozwa libonza!

TOKOKI KOKOBA KOSALELA YEHOVA ATAKO MIKAKATANO

8. Mikakatano nini misato tokolobela?

8 Tólobela sikoyo mikakatano misato oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso: Makambo oyo tozali kozela ezali kosalema te, makasi ya nzoto ezali kosila, mpe komekama oyo eumeli. Komona ndenge bandeko mosusu bayikelaki mikakatano yango mpiko ekoki kosalisa biso mingi.​—Flp. 3:17.

9. Tokoki komiyoka ndenge nini soki makambo oyo tozali kozela ezali kosalema te?

9 Makambo oyo tozali kozela ezali kosalema te. Biso nyonso tozelaka na mposa makasi makambo malamu oyo Yehova alaki. Ntango Habakuku, oyo azalaki mosakoli ya Yehova, alobaki ete alingi mpenza Yehova asukisa makambo ya mabe oyo ezalaki kosalema na Yuda, Yehova ayebisaki ye ‘azela kaka.’ (Hab. 2:3) Nzokande, soki tomoni lokola ete makambo oyo tozali kozela ezali kosalema noki te, molende na biso ekoki kokita. Tokoki kutu kolɛmba nzoto. (Mas. 13:12) Likambo yango esalemaki na ebandeli ya bambula ya 1900. Na ntango wana, bakristo mingi oyo batyamaki mafuta na elimo bazalaki kozela ete bázwa mbano na bango ya kokende na likoló na 1914. Ntango esalemaki bongo te, bato oyo bazalaki sembo basalaki nini lokola likambo oyo bazelaki esalemaki te?

Royal ná Pearl Spatz bakobaki kosalela Yehova na bosembo bambula ebele, atako makambo oyo bazelaki na 1914 esalemaki te (Talá paragrafe 10)

10. Ndeko moko ná mwasi na ye basalaki nini ntango makambo oyo bazelaki esalemaki te?

10 Tótalela ndakisa ya bandeko mibale ya sembo oyo bayikaki mpiko. Ndeko Royal Spatz azwaki batisimo na 1908, ntango azalaki na mbula 20. Azalaki mpenza komona ete mosika te, akozwa mbano na ye ya kokende na likoló. Kutu, na 1911, ntango atunaki ndeko mwasi Pearl libala, ayebisaki ye ete: “Yo moko oyebi makambo oyo ekosalema na 1914. Soki tokobalana, malamu tóumela te mpo na kosala yango!” Lokola bakendaki na likoló te na 1914, ndeko wana ná mwasi na ye batikaki kopota mbangu mpo na bomoi? Te, mpo batyaki makanisi libosoliboso na kosala mokano ya Nzambe na bosembo, kasi te na kozwa mbano ya kokende na likoló. Bazalaki na ekateli ya koyika mpiko ntango bazali kopota mbangu. Mpe ndeko Royal ná mwasi na ye Pearl bazalaki kaka molende mpe batikalaki sembo tii ntango basilisaki bomoi na bango awa na mabele bambula mingi na nsima. Na ntembe te, yo mpe ozelaka komona ntango oyo Yehova akolongisa nkombo na ye mpe boyangeli na ye, mpe akokokisa makambo nyonso oyo alaki. Okoki kotya motema ete makambo yango ekosalema na ntango oyo Yehova ye moko atyá. Liboso ntango yango ekoka, tókoba kobatela molende na biso na mosala ya Nzambe, mpe tótika te ete makambo oyo tozali kozela kasi esalemi naino te elɛmbisa biso nzoto to ekitisa molende na biso.

Atako akómaki mobange, Arthur Secord akobaki kosalela Yehova (Talá paragrafe 11)

11-12. Mpo na nini tokoki kokoba kosalela Yehova na bosembo ata soki makasi ya nzoto na biso ezali kosila? Pesá ndakisa.

11 Makasi ya nzoto ezali kosila. Na bokeseni na bapoti-mbangu, ezali kosɛnga te ete ozala na makasi ya nzoto mpo kondima na yo ezala makasi epai ya Yehova mpe ozala na molende mingi na mosala na ye. Kutu, bandeko mingi oyo makasi na bango ya nzoto esili bazali kaka na ekateli ya kopesa Yehova nyonso oyo bakoki. (2 Ko. 4:16) Na ndakisa, ntango Ndeko Arthur Secord b akómaki na mbula 88, asilaki kosala na Betele mbula 55. Akómaki mobange mpe nzoto na ye ezalaki lisusu makasi te. Mokolo moko, ndeko mwasi oyo azalaki kosalisa ye apusanaki pene ya mbeto na ye. Atalaki Ndeko Arthur mpe alobaki na ye na boboto ete: “Ndeko Secord, nzoto oyo esalá mibembo ebele na mosala ya Yehova.” Kasi, ndeko yango azalaki te kokanisa kaka makambo ya kala. Atalaki ndeko mwasi na miso, asɛkaki mwa moke, mpe alobaki: “Ɛɛ, ezali bongo. Kasi, oyo tosili kosala ezali na ntina te. Kotikala sembo sikoyo nde ezali na ntina.”

12 Mbala mosusu osalelaka Yehova banda bambula mingi mpe ozali sikoyo komona ete nzoto na yo ezali kopekisa yo osala mingi ndenge ozalaki kosala liboso. Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Yebá ete Yehova abosani te mosala ya sembo oyo osalaki na kala. (Ebr. 6:10) Lisusu, kobosana te ete ezali te makambo oyo tosalaka na mosala ya Yehova, ezala mingi to moke, nde emonisaka ete tolingaka ye na molimo mobimba. Kasi, tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova soki tozali kobatela makanisi ya malamu mpe kosala oyo tokoki na kotalela makasi na biso ya nzoto. (Kol. 3:23) Yehova ayebi esika makoki na biso esuki mpe asɛngaka biso te makambo oyo eleki makasi na biso.​—Mrk. 12:43, 44.

Anatoly ná Lidiya Melnik bayikaki mpiko mpe batikalaki sembo atako bakutanaki na mikakatano ebele (Talá paragrafe 13)

13. Ndenge nini ndakisa ya Anatoly ná Lidiya ezali kolendisa biso tókoba kosalela Yehova, ata soki tozali na komekama ndenge na ndenge?

13 Komekama oyo eumeli mingi. Basaleli mosusu ya Yehova bayikaki mpiko na minyoko mpe bampasi bambula mingi. Na ndakisa, Anatoly Melnik c azalaki na mbula 12 mpamba ntango bakangaki tata na ye, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe bamemaki ye mokangami na Sibérie, kilomɛtrɛ koleka 7 000 mosika na mboka na bango, Moldavie. Mbula moko na nsima, bakangaki mpe Anatoly, mama na ye, ná baboti ya mama na ye mpe bamemaki bango na Sibérie. Na nsima, bakokaki kokende na makita na mboka mosusu, kasi basengelaki kotambola kilomɛtrɛ 30 na nse ya malili makasi. Kendekende, Ndeko Anatoly asalaki mbula misato na bolɔkɔ, mpe yango ekabolaki ye ná mwasi na ye Lidiya ná mwana na bango ya mbula moko. Atako Ndeko Anatoly anyokwamaki bambula mingi, ye ná libota na ye bakobaki koyika mpiko. Lelo, azali na mbula 82, mpe asalaka na Komite ya filiale ya Asie centrale. Ndenge moko na Anatoly mpe Lidiya, biso mpe tósala nyonso oyo tokoki na mosala ya Yehova, tókoba koyika mpiko kaka ndenge tosalaki yango na kala.​—Gal. 6:9.

KOBÁ KOTYA MAKANISI NA ELIKYA OYO OZALI NA YANGO

14. Paulo amonaki ete asengeli kosala nini mpo akokisa mokano na ye?

14 Paulo andimaki ete akopota mbangu tii na nsuka mpe akokokisa mokano na ye. Lokola azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, azalaki kozela “libonza ya kokende na likoló.” Kasi, mpo akokisa mokano yango, amonaki ete asengeli “kolanda kopota mbangu tii na nsuka.” (Flp. 3:14) Paulo abendaki likebi ya bakristo ya Filipi na likambo moko ya ntina mingi mpo na kosalisa bango bátya makanisi na mokano na bango.

15. Ndenge nini Paulo asalelaki likambo ya kozala mwana-mboka mpo na kolendisa bakristo ya Filipi ‘bálanda kopota mbangu tii na nsuka’?

15 Paulo akundwelaki bakristo ya Filipi ete bazalaki bana-mboka ya likoló. (Flp. 3:20) Mpo na nini basengelaki kobosana likambo yango te? Na ntango wana, bato mingi bazalaki kolinga kozala bana-mboka Roma mpo yango ezalaki na matomba ebele. d Kasi, bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo bazalaki bana-mboka ya ekólo oyo eleki malamu, oyo elingaki komema matomba minene koleka. Kozala mwana-mboka ya likoló elekaki mosika kozala mwana-mboka Roma! Mpo na yango, Paulo alendisaki bakristo ya Filipi ‘bámitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu ya Kristo.’ (Flp. 1:27) Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bapesaka ndakisa ya malamu na ndenge balandaka kopota mbangu tii na nsuka mpo bákokisa mokano na bango ya kozwa bomoi ya seko na likoló.

16. Tózala na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, na kotalela Bafilipi 4:6, 7, tosengeli kokoba kosala nini?

16 Tózala na elikya ya kozwa bomoi ya seko na likoló to na paradiso awa na mabele, tosengeli kokoba kopota mbangu tii na nsuka mpo na kokokisa mokano yango. Ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, tosengeli te kotala biloko oyo ezali na nsima; lisusu, tosengeli kotika eloko moko te epekisa biso kosalela Yehova. (Flp. 3:16) Mbala mosusu tokoki komona ete makambo oyo tozelaka banda kala ezali kosalema te to mpe makasi na biso ya nzoto ebandi kosila. Ntango mosusu mpe toyiki mpiko na makambo ya mpasi mpe minyoko na boumeli ya bambula ebele. Ezala ndenge nini, ‘komitungisa ata na likambo moko te.’ Kasi, malɔmbɔ mpe kosɛnga na yo eyebana epai ya Nzambe, mpe akopesa yo kimya oyo eleki nyonso oyo okoki kokanisa.​—Tángá Bafilipi 4:6, 7.

17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Ndenge kaka mopoti-mbangu asalaka makasi mpenza ntango akómi pene na ndelo ya nsuka, biso mpe tókoba kotya makanisi nyonso na mokano na biso ya kopota mbangu mpo na bomoi tii na nsuka. Na kotalela makasi na biso mpe bomoi na biso, tósala makasi mpenza mpe tókoba kopota mbangu tii tokozwa makambo ya malamu oyo tozali kozela. Tosengeli kosala nini mpo tókoba kolanda nzela ya malamu mpe tókoba koyika mpiko? Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tóyeba makambo ya kotya na esika ya liboso na bomoi mpe ndenge oyo tokoki “koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Flp. 1:9, 10.

LOYEMBO 79 Tóteya bango bátɛlɛma ngwi

a Ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, mposa na biso ezalaka ete tókoba kokola na elimo mpe kobongisa bomoto na biso ya bokristo. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo ete bátika te kosala yango! Mokanda oyo akomelaki Bafilipi elendisaka biso tókoba koyika mpiko na momekano na biso ya kopota mbangu mpo na bomoi. Lisolo oyo ekomonisa biso ndenge ya kosalela maloba yango oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.

b Talá lisolo ya bomoi ya Ndeko Secord, La part que j’ai prise à l’extension du vrai culte,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/1966, na Français.

c Talá lisolo ya bomoi ya Ndeko Anatoly, Enseigné depuis l’enfance à aimer Dieu,” na Lamuká! ya 22/10/2004, na Français.

d Lokola engumba Filipi ezalaki na nse ya bokonzi ya Roma, Bafilipi bazalaki na matomba mosusu oyo bana-mboka Roma mpe bazalaki na yango. Na yango, bandeko ya Filipi bakokaki kokanga ntina ya ndakisa oyo Paulo apesaki.