BILOKO OYO TOSALELÁ KALA
“Tokosala liyangani mosusu mokolo nini?”
EZALAKI mokolo moko na butu, na sanza ya 11/1932 na Mexico, engumba moko ya loyenge oyo ezali na bafandi koleka milio moko. Mwa bapɔsɔ liboso, bautaki kotya mpo na mbala ya liboso miinda oyo epesaka mituka nzela ya koleka to ya kotɛlɛma na babalabala minene. Kasi, na butu yango, bato bazalaki kozela likambo mosusu. Bapanzi-nsango bayaki na ba camera esika engbunduka etɛlɛmaka mpo na kozela mopaya moko monene. Mopaya yango nani? Joseph Rutherford, prezida ya La Société Watch Tower. Batatoli ya engumba yango mpe bazalaki kozela Ndeko Rutherford, oyo azalaki koya mpo na liyangani ya etúká ya mikolo misato.
Zulunalo L’Âge d’Or elobaki ete “na ntembe te liyangani yango ekoyebana lokola likambo moko ya ntina mingi oyo esalemaki” mpo na kopalanganisa solo na Mexique. Kasi, ezalaki liyangani ya bato soki 150 mpamba. Bongo mpo na nini ezalaki na ntina mingi?
Liboso liyangani yango esalema, mateya ya solo ekɔtaki mingi te na Mexique. Banda na 1919, bazalaki kosala mayangani ya mike, kasi nsima ya mbula wana, masangá ebele ezalaki lisusu na bato te. Ntango biro ya filiale efungwamaki na engumba Mexico na 1929, emonanaki lokola makambo ekobonga, kasi mikakatano ezalaki kaka. La Société epesaki ba colporteurs (ndenge bazalaki kobenga babongisi-nzela) mitindo ete básala mombongo te na mosala ya kosakola. Colporteur moko asilikaki makasi mpo na likambo yango, atikaki solo mpe asalaki etuluku na ye moko ya koyekola Biblia. Lisusu, na ntango yango, batyaki mokɛngɛli ya sika na biro ya filiale mpo oyo ya liboso asalaki lisumu. Bandeko ya sembo na Mexique bazalaki na mposa ya kolendisama.
Ntango Ndeko Rutherford ayaki, alendisaki bandeko yango mingi na badiskur mibale ya kafukafu oyo asalaki na liyangani yango mpe badiskur mitano oyo elekaki na radio. Ezalaki mpo na mbala ya liboso bandeko básalela radio mpo na kopalanganisa nsango malamu na Mexique. Nsima ya liyangani yango, batyaki mokɛngɛli ya sika ya biro ya filiale mpo na kotambwisa mosala. Batatoli batondaki na esengo mingi, mpe lokola Yehova andimaki bango, bakobaki kosakola.
Na mbula oyo elandaki, na 1933, basalaki mayangani ya etúká mibale, moko na engumba Veracruz, mosusu na engumba Mexico. Bandeko bamipesaki mobimba na mosala ya kosakola, mpe matomba emonanaki. Na ndakisa, na 1931, basakoli bazalaki 82. Na 1941, babakisamaki mbala 10! Bato soki 1 000 bayaki na engumba Mexico na 1941 mpo na liyangani ya teokrasi.
“BATONDI NA BABALABALA”
Na 1943, Batatoli babandaki kosala kampanye mpo na liyangani ya teokrasi oyo elobaki “Libota ya bonsomi,” oyo esengelaki kosalema na bingumba 12 ya Mexique. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bazalaki kolata bapapye ya minene. Ezalaki papye mibale ya minene bakangisá mpe bazalaki kolata yango lokola elamba, eteni moko liboso, mosusu na mokɔngɔ. Batatoli bazalaki kosalela mayele yango mpo na kobengisa bato na mayangani banda 1936.
Mayele oyo basalelaki ya kolata bapapye mpo na kobengisa bato na liyangani esimbaki mpenza na engumba Mexico, kutu zulunalo moko (La Nación) ekomaki mpo na Batatoli oyo bakendaki na liyangani yango ete: “Na mokolo ya liboso, basɛngaki bango bábengisa bato mosusu ebele. Mokolo oyo elandaki, bisika ya kofanda esilaki.” Lingomba ya Katolike esepelaki ata moke te, mpe ebandaki kotɛmɛla Batatoli. Kasi, bandeko babangaki te. Bakobaki kobengisa bato na liyangani. Lisolo mosusu oyo ebimaki na zulunalo yango elobaki: “Tozalaki komona bango bisika nyonso.” Ebakisaki ete bandeko “bakómaki bato oyo bazali kosala piblisite.” Etyaki mpe elilingi ya bandeko na babalabala ya engumba Mexico. Na nse ya elilingi yango, bakomaki: “Batondi na babalabala.”
MBETO YA “MWA PƐTƐƐ MPE MWA MOLUNGE KOLEKA SIMA”
Na bambula wana, ezalaki kosɛnga Batatoli bámipimela makambo ebele mpo bákende na mayangani oyo esalemaki na Mexique. Bandeko ebele bazalaki kouta na bingumba oyo ezalaki mosika na esika engbunduka etɛlɛmaka to banzela ya motuka. Lisangá moko ekomaki boye: “Pembeni na biso awa tomonaka kaka nzela ya nsinga (ligne télégraphique).” Na yango, bato oyo bakei liyangani basengelaki kokende na mpunda to kotambola makolo mikolo ebele kaka mpo na kokóma na esika ya kozwa engbunduka mpo na kokende na engumba esika liyangani ezalaki kosalema.
Batatoli mingi bazalaki babola mpe bazalaki na mbongo ya kokende liyangani te. Soki bakómi kuna, mingi bazalaki kofanda epai ya bandeko oyo bamonisaki bolingo mpe boyambi bapaya. Bamosusu balalaki na Ndako ya Bokonzi. Mokolo moko, bandeko soki 90 bafandaki na Betele, mpe balalaki na bakartɔ ya mikanda. Buku ya mobu elobaki ete bandeko basepelaki mingi mpo bakartɔ yango ezalaki “mwa pɛtɛɛ mpe mwa molunge koleka sima.”
Batatoli yango bandimaki kosala nyonso mpo na koyangana na bandeko na bango ya mibali mpe ya basi. Lelo, ezali na Batatoli koleka 850 000 na Mexique, oyo bazali mpe na elimo ya komonisa botɔndi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Lapolo moko oyo ebimaki na Buku ya mobu 1949 elobaki ete makambo oyo bandeko bamipimelaki elɛmbisaki molende na bango na losambo ya Yehova te. Nsima ya liyangani nyonso, “bazalaki kolobela yango mingi na masolo na bango ntango molai na nsima.” Mbala na mbala bandeko bazalaki komituna: “Tokosala liyangani mosusu mokolo nini?”—Euti na biloko oyo tosalelá kala na Amerika ya ntei.