LISOLO YA BOYEKOLI 14
Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
“Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo malamumalamu.”—2 TIM. 4:5.
LOYEMBO 57 Tósakwela bato ya ndenge nyonso
NA MOKUSE *
1. Likambo nini basaleli nyonso ya Nzambe balingaka kosala, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)
KRISTO YESU apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Mat. 28:19) Basaleli nyonso ya Nzambe oyo bazali sembo balingaka koyekola ndenge oyo bakoki ‘kokokisa malamumalamu’ mosala oyo apesi bango. (2 Tim. 4:5) Kutu, mosala yango ezali mosala oyo eleki ntina, oyo epesaka matomba mingi, mpe esengeli kosalema na lombangu koleka mosala mosusu nyonso na bomoi na biso. Nzokande, ekoki kozala mpasi tólekisa ntango mingi na mosala yango ndenge oyo tokoki kolinga.
2. Mikakatano nini tokoki kozala na yango ntango tozali kokokisa mosala ya kosakola?
2 Ezali na makambo mosusu ya ntina oyo ezwaka biso ntango mpe makasi. Mbala mosusu esɛngaka tólekisa bangonga ebele na mosala ya mosuni mpo na kozwa eloko ya kobikela mpo na biso moko mpe libota na biso. Tokoki mpe kozala na mikumba mosusu ya libota, maladi, konyokwama na makanisi, to mitungisi ya bobange. Ndenge nini tokoki kokokisa mosala na biso malamumalamu atako tozali na mikakatano ya ndenge wana?
3. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 13:23 emonisi nini?
3 Soki makambo ya bomoi na biso ezali kopesa biso nzela te ya kolekisa ntango mingi na mosala ya Yehova, tosengeli kolɛmba nzoto te. Yesu ayebaki ete biso nyonso tokozala na likoki te ya kobota mbuma ya Bokonzi ndenge moko. (Tángá Matai 13:23.) Yehova azwaka na motuya mingi makambo nyonso oyo tosalaka mpo na ye, soki eyokani na makoki na biso. (Ebr. 6:10-12) Nzokande, tokoki komona ete makambo ya bomoi na biso ekopesa biso nzela te tósala mingi. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge oyo tokoki komonisa ete mosala ya kosakola nde eleki ntina mpo na biso, ndenge ya kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ, mpe ndenge ya kokolisa makoki na biso ya kosakola mpe ya koteya. Kasi, tólobela naino soki kokokisa mosala na biso malamumalamu elimboli nini.
4. Kokokisa mosala na biso malamumalamu elimboli nini?
4 Na mokuse, kokokisa mosala na biso malamumalamu elimboli komipesa na mosala ya kosakola mpe ya koteya, na kotalela makoki na biso. Kasi, yango etaleli kaka te ntango oyo tolekisaka na mosala yango. Yehova atyaka likebi na makanisi oyo etindaka biso tósakola. Lokola tolingaka ye mpe bazalani na biso, tosalaka mosala ya bokristo * na molimo na biso mobimba. (Mrk. 12:30, 31; Kol. 3:23) Kosalela Nzambe na molimo mobimba elimboli komipesa mobimba, kotya makasi na biso nyonso na mosala na ye. Soki tokangi ntina ete mosala ya kosakola ezali lokumu monene, tokosala nyonso mpo na koyebisa ebele ya bato nsango malamu.
5-6. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge moto oyo azali na ntango mingi te akoki komonisa ete mosala ya kosakola nde eleki ntina mpo na ye.
5 Kanisá ete elenge mobali moko asepelaka mingi kobɛta miziki. Asalaka yango ntango nyonso oyo libaku emonani. Nsukansuka, azwi mosala ya kobɛta miziki na restora moko na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Nzokande, mbongo oyo bazali kofuta ye ezali kokokisa bamposa na ye nyonso te. Na yango, andimi mosala mosusu ya kotɛka na butiki moko kobanda mokolo ya yambo tii mokolo ya mitano. Atako azali kolekisa ntango mingi na butiki, motema na ye ezali kaka na miziki. Mposa na ye ezalaka ete abakisa mayele na ye ya kobɛta miziki mpe akómisa yango mosala ya bomoi na ye. Atako bongo, abɛtaka miziki ntango nyonso oyo azwi libaku ya kosala yango, ata soki ezali kaka mpo na ntango mokuse.
6 Ndenge moko mpe, mbala mosusu ozali na likoki te ya kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Kasi, olingaka mpenza kosala bongo. Osalaka nyonso mpo okolisa likoki na yo ya kosimba mitema ya bato ntango ozali kosakola nsango malamu. Lokola ozalaka na makambo
ebele ya kosala, mbala mosusu omitunaka ndenge nini okoki komonisa ete mosala ya kosakola nde eleki ntina mpo na yo.MONISÁ ETE MOSALA YA KOSAKOLA NDE ELEKI NTINA MPO NA YO
7-8. Ndenge nini tokomonisa ete totalelaka mosala ya kosakola ndenge Yesu azalaki kotalela yango?
7 Yesu azali ndakisa eleki monene na oyo etali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso. Amonisaki ete kosakola Bokonzi ya Nzambe nde elekaki ntina na bomoi na ye. (Yoa. 4:34, 35) Atambolaki bakilomɛtrɛ ebele mpo na kosakwela ebele ya bato. Asalelaki libaku nyonso mpo na kosolola na bato, ezala na bisika ya bato nyonso to na bandako na bango. Amipesaki mobimba na mosala ya kosakola.
8 Tokomonisa ete totalelaka mosala ya kosakola ndenge Yesu azalaki kotalela yango soki tozali kosalela libaku nyonso mpo na kolobela nsango malamu. Tondimaka komipimela makambo ndenge na ndenge mpo na komipesa na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. (Mrk. 6:31-34; 1 Pe. 2:21) Bandeko mosusu bazali babongisi-nzela monene, babongisi-nzela ya sanza na sanza, to babongisi-nzela basungi. Basusu bayekoli monɔkɔ mosusu to bakei kofanda esika oyo mposa ya basakoli ezali monene. Atako bongo, eteni monene ya mosala esalemaka na milende ya basakoli, oyo basakolaka sanza na sanza na kotalela makoki na bango. Ezala tosakolaka mingi to te, Yehova asɛngaka biso te makambo oyo tokokoka te kosala. Alingi ete biso nyonso tósepela na mosala mosantu, wana tozali kosakola “nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo.”—1 Tim. 1:11; Mib. 30:11.
9. (a) Ndenge nini Paulo amonisaki ete mosala ya kosakola nde elekaki ntina mpo na ye, ata ntango esɛngaki asala mosala ya mosuni? (b) Misala 28:16, 30, 31 emonisi nini mpo na ndenge oyo Paulo azalaki kotalela mosala ya kosakola?
9 Ntoma Paulo azali ndakisa malamu na ndenge atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso. Ntango azalaki na Korinti, na mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ, azalaki lisusu na mbongo te mpe esɛngaki alekisa ntango na ye mosusu na kosala bahema. Kasi, mpo na ntoma Paulo, kosala bahema ezalaki te mosala oyo eleki ntina. Asalaki mosala yango mpo esalisa ye akoba mosala ya Nzambe mpe asakwela bato ya Korinti nsango malamu ‘kozanga kosɛnga bango lifuti.’ (2 Ko. 11:7) Atako esɛngaki Paulo asala mwa mosala ya mosuni, akobaki komonisa ete mosala ya kosakola nde eleki ntina mpo na ye, azalaki kosakola Sabata nyonso. Na nsima, ntango makambo ebongaki, Paulo akómaki kotya likebi mingi na mosala ya kosakola. “Abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba, azalaki kopesa Bayuda litatoli mpo na komonisa ete Yesu azali Kristo.” (Mis. 18:3-5; 2 Ko. 11:9) Na nsima, ntango azalaki mokangami mbula mibale na ndako na ye na Roma, azalaki kopesa litatoli na bato oyo bazalaki koya kotala ye mpe akomaki mikanda. (Tángá Misala 28:16, 30, 31.) Azalaki na ekateli ya kotika eloko moko te ezwa esika ya mosala ya kosakola. Akomaki ete: “Lokola tozwi mosala oyo . . . , tozali kotika te.” (2 Ko. 4:1) Ndenge moko na Paulo, ata soki mosala ya mosuni ezwaka biso ntango mingi, tokoki komonisa ete mosala ya kosakola nde eleki ntina na bomoi na biso.
10-11. Ndenge nini tokoki kokokisa mosala na biso malamumalamu soki tozali kobɛla?
10 Soki tozali na likoki te ya kosakola mingi ndako na ndako mpo na bobange to maladi, tokoki kosalela mayele mosusu. Na siɛklɛ ya liboso, bapalanganisi ya nsango malamu bazalaki kosakola esika nyonso oyo bato bazali. Basalelaki libaku nyonso mpo na kolobela solo, ezala na ndako na ndako, na esika ya bato ebele, mpe na libaku malamu, elingi koloba esika nyonso oyo bakokaki kokuta bato. (Mis. 17:17; 20:20) Soki tozali na likoki te ya kotambola mingi, tokoki kofanda esika oyo bato bazalaka ebele mpe kosakwela baleki-nzela. Tokoki mpe kopesa litatoli ya libaku malamu, kokoma mikanda, to kosakola na nzela ya telefone. Basakoli mingi oyo bazali na mikakatano makasi mpo na kotambola bazwaka esengo mingi ntango basalelaka mayele wana ya kosakola.
11 Ata soki ozali kobɛla, okoki kokokisa mosala na yo malamumalamu. Tótalela lisusu ndakisa ya ntoma Paulo. Alobaki ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Flp. 4:13) Paulo azalaki na mposa ya nguya yango ntango abɛlaki, na mobembo na ye moko ya misionɛrɛ. Alobaki na bakristo ya Galatia ete: “Ezali mpo nazalaki na maladi na nzoto nde nasakwelaki bino nsango malamu na mbala ya liboso.” (Gal. 4:13) Ndenge moko mpe, maladi ekoki kopesa yo libaku ya kosakola nsango malamu epai ya basusu, na ndakisa, minganga, mafulume, mpe bato mosusu oyo basalisaka bato ya maladi. Bato yango bazalaka na misala ntango basakoli balekaka na bandako na bango.
KÓMISÁ BOMOI NA YO PƐPƐLƐ
12. Kobatela liso “alima” elimboli nini?
12 Yesu alobaki ete: “Mwinda ya nzoto ezali liso. Yango wana, soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga.” (Mat. 6:22) Alingaki koloba nini? Alingaki koloba ete tosengeli kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ, elingi koloba kotya makanisi na likambo to mokano moko, mpe kotika te makambo mosusu elongola likebi na biso na likambo yango. Yesu ye moko atikaki ndakisa malamu na likambo yango, mpo atyaki makanisi na ye nyonso na mosala ya kosakola. Ateyaki mpe bayekoli na ye bátya makanisi na kosalela Yehova mpe na Bokonzi na ye. Tokomekola Yesu soki totye makanisi nyonso na mosala ya bokristo mpe tozali ‘kokoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe.’—Mat. 6:33.
13. Nini ekoki kosalisa biso tótya makanisi na mosala ya bokristo?
13 Tokotya makanisi nyonso na mosala ya bokristo soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ mpo tólekisaka ntango mingi na kosalisa basusu báyeba Yehova mpe bálinga ye. * Na ndakisa, okoki kobongola ngonga oyo olekisaka na mosala ya mosuni mpo olekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ? Okoki kotika kominanola mosusu oyo ezwaka yo ntango mingi?
14. Mbongwana nini ndeko mobali moko ná mwasi na ye basalaki mpo bálekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola?
14 Yango nde nkulutu moko na nkombo Elias ná mwasi na ye basalaki. Alobi boye: “Tokokaki te kobanda mosala ya mobongisi-nzela na mbala moko, kasi ezalaki na makambo oyo tokokaki kosala mpo tólekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola. Na yango, tobongolaki mwa makambo mosusu. Na ndakisa, tokómaki kosalela mbongo na biso na mayele, totikaki kominanola oyo lelo tomonaka ete ezalaki kolya biso ntango mpamba, mpe tosɛngaki bapatrɔ na biso tóbongola ntango na biso ya mosala. Yango esalaki ete tósakolaka na mpokwa, tóyekola Biblia na bato, mpe tokómaki kobima mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ mbala mibale na sanza. Tosepelaki mingi mpenza!”
KOLISÁ MAKOKI NA YO YA KOSAKOLA MPE YA KOTEYA
15-16. Na kotalela 1 Timote 4:13, 15, ndenge nini tokoki kokoba kokolisa makoki na biso ya kosakola? (Talá mpe etanda “ Mikano oyo ekosalisa ngai nakokisa mosala na ngai malamumalamu.”)
15 Lolenge mosusu ya kokokisa mosala na biso Mas. 1:5; tángá 1 Timote 4:13, 15.
malamumalamu ezali ya kokolisa makoki na biso ya kosakola. Misala mosusu esɛngaka ete basali bázwaka formasyo mbala na mbala mpo bákoba kobakisa boyebi mpe makoki na bango. Ezali mpe bongo mpo na basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi. Tosengeli kokoba koyekola ndenge ya kokóma bateyi malamu na mosala ya kosakola.—16 Kasi, ndenge nini tokoki kokoba kobakisa mayele na biso na mosala ya kosakola? Tosengeli kotya likebi na malako oyo tozwaka pɔsɔ na pɔsɔ na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Likita yango epesaka biso formasyo ya malamu mpenza mpo na kosalisa biso tóbakisa mokemoke makoki na biso ya kosakola. Na ndakisa, ntango prezida ya likita azali kopesa bana-kelasi toli, tokoki kotya likebi na makambo oyo ekosalisa biso tóbakisa mayele ya koteya na mosala ya kosakola. Tokoki kosalela toli yango ntango tokobima na mosala ya kosakola. Tokoki kosɛnga lisalisi epai ya mokɛngɛli ya etuluku na biso ya mosala ya kosakola, to kokende kosakola elongo na ye to na mosakoli mosusu ya makoki, mobongisi-nzela moko, to mokɛngɛli ya zongazonga. Soki toyekoli malamu kosalela esaleli mokomoko oyo ezali na Bisaleli mpo na koteya, tokosepela mingi na mosala ya kosakola mpe ya koteya.
17. Matomba nini okozwa soki ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
17 Ezali mpenza lokumu monene ndenge Yehova andimi tózala “bato oyo bazali kosala elongo” na ye! (1 Ko. 3:9) Soki ozali ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina’ mpe kotya makanisi na mosala ya kosakola ‘okosalela Yehova na esengo.’ (Flp. 1:10; Nz. 100:2) Lokola ozali mosaleli ya Nzambe, zalá na elikya ete akopesa yo nguya oyo osengeli na yango mpo okokisa mosala na yo, ata soki ozali na mikakatano nini. (2 Ko. 4:1, 7; 6:4) Ata soki makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela osakolaka mingi to te, okoki kozwa “likambo ya komikumisa na yango” soki ozali kosakola na molimo na yo mobimba. (Gal. 6:4) Ntango ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu, ozali komonisa ete olingaka Yehova mpe bato mosusu. Na ndenge yango, “okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.”—1 Tim. 4:16.
LOYEMBO 58 Tóluka baninga ya kimya
^ par. 5 Yesu apesaki biso etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge oyo tokoki kokokisa mosala na biso malamumalamu, ata soki tozali na mikakatano ebele. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kokóma basakoli ya malamu koleka mpe ndenge oyo tokoki kozwa esengo mingi koleka na mosala ya kosakola.
^ par. 4 NDIMBOLA YA MALOBA: Mosala ya bokristo esangisi mosala ya kosakola mpe ya koteya, ya kotonga mpe kobatela bandako ya mosala ya Bokonzi, mpe ya kosunga bandeko ntango makama ebimi.—2 Ko. 5:18, 19; 8:4.
^ par. 13 Talá makambo nsambo oyo okoki kosala, na etanda “Ndenge ya kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2016, lok. 8.
^ par. 62 BILILINGI: Na likita ya kati ya pɔsɔ, ndeko moko ya mwasi azali kosala elakiseli ya ndenge ya kozongela moto. Na nsima, ntango prezida azali kopesa toli, ndeko yango azali kokoma makanisi na mwa buku Koteya. Na nsuka ya pɔsɔ, na mosala ya kosakola, azali kosalela makambo oyo ayekolaki na likita.