Kozala moto ya elimo elimboli nini?
“Nzambe . . . asala ete na kati na bino bózala na makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango.”—BAROMA 15:5.
1, 2. (a) Bandeko mingi balobaka nini na oyo etali kozala moto ya elimo? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
NDEKO mwasi moko na Canada alobi ete kozala moto ya elimo esalisi ye azala na esengo mingi mpe ayeba kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo. Ndeko mobali moko ya Brésil oyo abalá esali mbula 23 alobi ete libala na bango ezali ya esengo mpenza mpo ye ná mwasi na ye basalaka makasi bázala bato ya elimo. Ndeko mobali mosusu na Philippines alobi ete kozala moto ya elimo epesaka ye kimya ya motema mpe esalisaka ye azala na boyokani ya malamu na bandeko ya lolenge nyonso.
2 Maloba ya bandeko yango emonisi ete kozala moto ya elimo ezali na matomba ebele. Yango ekoki kotinda biso tómituna boye: ‘Nakoki kosala nini mpo nakóma mpenza moto ya elimo mpe nazwa matomba yango?’ Ya liboso, tosengeli koyeba malamu oyo Biblia elobi mpo na bato ya elimo. Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna misato ya ntina: (1) Kozala moto ya elimo elimboli nini? (2) Bandakisa nini ekosalisa biso tókola na elimo? (3) Ndenge nini milende na biso mpo na kozala na “makanisi ya Kristo” ekosalisa biso tózala bato ya elimo?
KOZALA MOTO YA ELIMO ELIMBOLI NINI?
3. Biblia elobi nini mpo na moto ya mosuni ná moto ya elimo?
3 Ntoma Paulo asalisi biso tóyeba bokeseni kati na “moto ya elimo” mpe “moto ya mosuni.” (Tángá 1 Bakorinti 2:14-16.) Moto ya mosuni “ayambaka makambo ya elimo ya Nzambe te, mpo ezali bozoba na miso na ye; mpe akoki te koyeba yango.” Nzokande, moto ya elimo “atalelaka malamumalamu makambo nyonso” mpe azali na “makanisi ya Kristo,” elingi koloba asalaka makasi akanisaka lokola Yesu. Ntoma Paulo alendisi biso tózala bato ya elimo. Makambo nini mosusu ekesenisi moto ya mosuni na moto ya elimo?
4, 5. Moto ya mosuni asalaka makambo nini?
4 Tólobela liboso makanisi ya moto ya mosuni. Moto ya mosuni alandaka makanisi ya mokili, oyo etindaka moto alukaka kaka bolamu na ye moko. Ntoma Paulo abengi yango “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (Baefese 2:2) Elimo yango etindaka bato bámekola makambo oyo bato nyonso basalaka. Basalaka kaka oyo balingi, bakipaka mibeko ya Nzambe te. Moto ya mosuni akanisaka kaka makambo ya mosuni mpe mbala mingi amonaka ete lokumu ná mbongo na ye nde ezali na ntina koleka, mpe atingamaka na makambo oyo amoni ete azali na ndingisa ya kosala.
5 Moto ya mosuni asalaka mpe makambo oyo Biblia ebengi “misala ya nzoto.” (Bagalatia 5:19-21) Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, alobelaki makambo mosusu oyo bato ya mosuni basalaka. Bakɔtaka na matata oyo etali bango te, bakɔtisaka bokabwani, batindaka bato bátomboka, bafundaka basusu na tribinale, bamemyaka bokonzi te, mpe bapesaka motuya mingi koleka na kolya mpe komɛla. Moto ya mosuni ayebaka kotɛmɛla komekama te. (Masese 7:21, 22) Yuda alobaki ete bato mosusu bakomipesa na makambo ya mosuni tii bakotya likebi ata moko te na makambo ya elimo.—Yuda 18, 19.
6. Moto ya elimo asalaka makambo nini?
6 Sikoyo kozala moto ya elimo elimboli nini? Moto ya elimo atyaka likebi mingi na boyokani na ye na Nzambe. Atikaka elimo santu ya Nzambe etambwisa ye mpe asalaka makasi amekola Yehova. (Baefese 5:1) Alukaka koyeba ndenge Yehova akanisaka mpe atalelaka makambo lokola ye. Amonaka Nzambe moto ya solo mpenza. Na bokeseni na moto ya mosuni, moto ya elimo atosaka mibeko ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na ye. (Nzembo 119:33; 143:10) Asalaka “misala ya nzoto” te, kasi asalaka makasi amonisa “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Mpo na koyeba malamu soki kozala moto ya elimo elimboli nini, tózwa ndakisa oyo: Moto oyo ayebi kosala mombongo babengaka ye moto ya mombongo, mpe moto oyo atyaka likebi mingi na losambo na ye epai ya Nzambe babengaka ye moto ya elimo.
7. Biblia elobi nini mpo na bato ya elimo?
7 Yesu alobaki ete bato ya elimo bazali bato ya esengo. Matai 5:3 elobi: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” Baroma 8:6 emonisi litomba ya kozala moto ya elimo; elobi: “Mpo kokanisa bamposa ya nzoto elakisi liwa, kasi kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya.” Na yango, soki tozali kotya makanisi na makambo ya elimo, tokozala na kimya elongo na Nzambe mpe kimya ya motema lelo oyo, mpe elikya ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya.
8. Mpo na nini tosengeli kosala milende mpo tókoba kozala bato ya elimo?
8 Kasi, tofandi na mokili moko ya mabe. Lokola bato mingi bakanisaka makambo ya mosuni, tosengeli kosala milende mpenza mpo tókoba kozala bato ya elimo. Soki totiki kokanisa makambo ya elimo, makanisi ya mokili, oyo ezali lokola “mopɛpɛ” ekokɔtela biso. Tokoki kosala nini mpo na kokima likama yango? Ndenge nini tokoki kokola na elimo?
BANDAKISA OYO EKOKI KOTEYA BISO
9. (a) Nini ekoki kosalisa biso tókóma bato ya elimo? (b) Bandakisa nini ya malamu tokotalela?
9 Mwana akómaka mayele soki atalaka baboti na ye mpe amekolaka bango. Ndenge moko mpe, tokoki kokóma bato ya elimo soki tozali kotala bato oyo bazali na boyokani makasi na Yehova mpe tomekoli bango. Nzokande, makambo oyo bato ya mosuni basalaka ezali likebisi mpo na biso. (1 Bakorinti 3:1-4) Biblia epesi bandakisa ya bato ya elimo mpe ya bato ya mosuni. Kasi, lokola mposa na biso ezali ete tókóma bato ya elimo, tólobela bandakisa ya malamu oyo tokoki komekola. Tokotalela ndakisa ya Yakobo, Maria, mpe Yesu.
10. Ndenge nini Yakobo amonisaki ete azalaki moto ya elimo?
10 Tólobela liboso Yakobo. Bomoi ya Yakobo ezalaki pɛtɛɛ te, kaka ndenge ezali mpo na mingi kati na biso lelo. Ndeko na ye Esau, oyo azalaki moto ya mosuni, alingaki koboma ye. Bokilo na ye azalaki ntango nyonso koluka kobuba ye. Kasi, atako azalaki elongo na bato ya mosuni, Yakobo azalaki moto ya elimo. Abatelaki kondima na elaka oyo Yehova apesaki Abrahama, mpe amipesaki na kobatela libota na ye mpo ayebaki ete ekozala na esika monene na kokokisama ya mokano ya Yehova. (Ebandeli 28:10-15) Maloba mpe misala ya Yakobo emonisaki ete abosanaki te mibeko mpe mokano ya Nzambe. Na ndakisa, ntango ayebaki ete Esau akaneli ye, abondelaki Yehova ete: “Nabondeli yo, bikisá ngai . . . Olobaki ete: ‘Ya solo mpenza nakosalela yo malamu mpe nakokómisa momboto na yo lokola bambuma ya zɛlo ya mbu.’” (Ebandeli 32:6-12) Emonani ete Yakobo azalaki na kondima na bilaka ya Yehova mpe bomoi na ye emonisaki yango.
11. Ndenge nini toyebi ete Maria azalaki moto ya elimo?
11 Tótalela sikoyo ndakisa ya Maria. Mpo na nini Yehova aponaki ye azala mama ya Yesu? Na ntembe te mpo azalaki moto ya elimo. Ndenge nini toyebi yango? Tángá makambo oyo alobaki ntango akendaki kotala Zekaria ná Elizabeti. (Tángá Luka 1:46-55.) Maloba ya Maria emonisaki ete alingaki Liloba ya Nzambe mpe ayebaki Makomami ya Ebre malamu. (Ebandeli 30:13; 1 Samwele 2:1-10; Malaki 3:12) Mpe ata nsima ya kobalana na Yozefe, bazelaki tii ntango Yesu abotamaki mpo bábanda kosangisa nzoto. Yango emonisi ete mokumba oyo Nzambe apesaki bango ezalaki na ntina koleka bamposa na bango. (Matai 1:25) Longola yango, Maria azalaki kolandela likambo nyonso oyo ezalaki kosalema na bomoi ya Yesu, mpe azalaki koyoka makambo oyo azalaki koteya. “Abatelaki maloba nyonso wana malamumalamu na motema na ye.” (Luka 2:51) Ezali polele ete azalaki kotya likebi mingi na bilaka ya Nzambe oyo etalaki Masiya. Mpo na komekola Maria, tosengeli kotya mokano ya Nzambe mpe mibeko na ye na esika ya liboso na bomoi na biso.
12. (a) Ndenge nini Yesu amekolaki Tata na ye? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu? (Talá elilingi ya ebandeli.)
12 Na bato nyonso oyo bazalaki na bomoi awa na mabele, Yesu nde ndakisa eleki monene ya moto ya elimo. Bomoi mpe mosala na ye awa na mabele emonisaki ete alingaki komekola Tata na ye, Yehova. Yesu azalaki kokanisa, kotalela mpe kosala makambo lokola Yehova. Asalaki mokano ya Nzambe mpe atosaki mibeko na ye. (Yoane 8:29; 14:9; 15:10) Na ndakisa, talá makambo Yisaya alobaki mpo na motema mawa ya Yehova, mpe kokanisá yango na makambo oyo Marko alobaki mpo na Yesu. (Tángá Yisaya 63:9; Marko 6:34.) Ndenge moko na Yesu, ozalaka ntango nyonso pene ya komonisela bato ya mpasi motema mawa? Omipesaka na kosalisa mpe koteya bato nsango malamu? (Luka 4:43) Bato ya elimo bazalaka na motema mawa mpe balukaka kosalisa basusu.
13, 14. (a) Mateya nini tokoki kozwa epai ya bato ya elimo ya mikolo na biso? (b) Pesá ndakisa.
13 Lelo oyo mpe, ezali na bandeko mibali mpe basi ebele oyo basalaka makasi bámekola Kristo. Mbala mosusu omonaka ete basakolaka na molende, bayambaka bapaya, bazali na motema mawa, mpe bongo na bongo. Atako bazali bato ya kokoka te, basalaka makasi mpenza bákolisa bizaleli ya malamu mpe básala oyo Yehova alingi básala. Ndeko mwasi moko ya Brésil na nkombo Rachel alobi boye: “Nazalaki kolinga mingi kolata ndenge bato ya mokili balataka. Na yango, nazalaki kolata na bokatikati te. Kasi ntango nayekolaki solo, nakómaki kosala milende oyo esengeli mpo nazala moto ya elimo. Kobongisa likambo yango ezalaki pɛtɛɛ te, kasi nakómaki na esengo mingi mpe bomoi na ngai ekómaki na ntina.”
14 Reylene, ndeko mwasi moko ya Philippines, azalaki na mokakatano ya ndenge mosusu. Atako azalaki na kati ya solo, amityelaki mokano ya kotánga bakelasi ya milai mpe kozwa mosala ya mbongo mingi. Alobi boye: “Nazalaki lisusu kokipe mikano na ngai ya elimo te. Kasi nakómaki komona ete eloko moko ezalaki kozanga na bomoi na ngai, eloko moko ya ntina koleka mosala na ngai. Na yango, nazongisaki makanisi na mosala ya Yehova.” Lelo oyo, Reylene atyaka motema na elaka ya Yehova oyo ezali na Matai 6:33, 34. Alobi boye: “Nayebi ete Yehova akokokisa bamposa na ngai!” Ntango mosusu na lisangá na bino oyebi bandeko oyo bazali mpe na makanisi ya ndenge wana. Ntango tomonaka ndenge bamekolaka Kristo, epesaka biso mposa tólanda mpe ndakisa na bango ya sembo.—1 Bakorinti 11:1; 2 Batesaloniki 3:7.
ZALÁ NA “MAKANISI YA KRISTO”
15, 16. (a) Tosengeli kosala nini mpo tómekola Yesu? (b) Tokoki kosala nini mpo tókóma na “makanisi ya Kristo”?
15 Ndenge nini okoki komekola Kristo? Na 1 Bakorinti 2:16, Biblia elobi ete tosengeli kozala na “makanisi ya Kristo.” Mpe Baroma 15:5 emonisi ete tosengeli kozala na “makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango.” Na yango, mpo tózala lokola Kristo, tosengeli naino koyeba makanisi mpe bomoto na ye. Na nsima, tosengeli kolanda ndakisa na ye. Yesu atyaki makanisi nyonso na boyokani na ye na Nzambe. Na yango, soki tomekoli Yesu, tokozala mpe na boyokani malamu na Yehova. Yango wana ezali na ntina mingi tóyekola kokanisa lokola Yesu.
16 Ndenge nini tokoki kosala yango? Bayekoli ya Yesu bamonaki makamwisi oyo asalaki, bayokaki mateya na ye, bamonaki ndenge azalaki na boboto epai ya bato ya lolenge nyonso, mpe ndenge azalaki kolanda litambwisi ya Yehova. Balobaki: “Tozali batatoli ya makambo nyonso oyo ye asalaki.” (Misala 10:39) Biso lelo tokoki komona Yesu te. Kasi, Yehova akomisaki masolo ya Evanzile mpo na kosalisa biso tóyeba Yesu malamu. Ntango tozali kotánga mpe komanyola masolo ya mokanda ya Matai, ya Marko, ya Luka, mpe ya Yoane, tokoyeba makanisi ya Yesu. Yango ekosalisa biso ‘tólanda matambe na ye malamumalamu’ mpe tózala na “makanisi” lokola oyo azalaki na yango.—1 Petro 2:21; 4:1.
17. Ndenge nini kokanisa lokola Kristo ekosalisa biso?
17 Ndenge nini koyekola kokanisa lokola Kristo ekosalisa biso? Ndenge kaka kolya malamu epesaka nzoto makasi, kotondisa bɔɔngɔ na biso na makanisi ya Kristo ekokómisa elimo na biso makasi. Mokemoke, tokobanda koyeba oyo Yesu alingaki kosala na likambo boye to boye. Yango ekosalisa biso tózwaka bikateli oyo ekosepelisa Nzambe mpe tokozala na lisosoli ya pɛto. Omoni te ete matomba nyonso wana esengeli kotinda biso ‘tólata Nkolo Yesu Kristo’?—Baroma 13:14.
18. Makambo nini oyo etali moto ya elimo toyekoli na lisolo oyo?
18 Lisolo oyo esalisi biso tóyeba soki kozala moto ya elimo elimboli nini. Tomoni mpe ete tokoki kozwa mateya na bandakisa malamu ya bato ya elimo. Toyekoli mpe ete kozala na “makanisi ya Kristo” esalisaka biso tókanisa lokola Yehova mpe tózala na boyokani malamu na ye. Kasi ezali na makambo mosusu ya koyekola. Na ndakisa: Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali makasi na elimo? Nini ekoki kosalisa biso tókóma makasi na elimo? Mpe ndenge nini kozala moto ya elimo esalisaka biso mokolo na mokolo? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.