LISOLO YA BOYEKOLI 49
Lisekwa ezali mpenza elikya ya solosolo!
“Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala.”—MIS. 24:15.
LOYEMBO 151 Akobenga
NA MOKUSE *
1-2. Elikya nini ya kitoko mpenza basaleli ya Yehova bazali na yango?
KOZALA na elikya ezali na ntina mingi. Bato mosusu bazalaka na elikya ete bakozala na libala ya esengo, bakobɔkɔla bana oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ, to bakobika na maladi moko makasi oyo enyokolaka bango. Biso mpe tokoki kozala na bilikya ya ndenge wana. Kasi elikya oyo tozwaka na motuya mingi eleki makambo wana mosika mpenza. Tozali na elikya ya bomoi ya seko, mpe tondimaka ete baninga mpe bandeko na biso oyo bakufá bakozonga na bomoi.
2 Ntoma Paulo alobaki boye: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Ntoma Paulo azalaki moto ya liboso te oyo alobelaki lisekwa. Yobo mpe alobelaki yango. Azalaki na kondima ete Nzambe akokanisa ye mpe akozongisa ye na bomoi.—Yobo 14:7-10, 12-15.
3. Mpo na nini 1 Bakorinti mokapo 15 ekoki kosalisa biso?
3 “Lisekwa ya bakufi” ezali na kati ya mateya ya “moboko,” to “mateya ya ebandeli,” oyo bakristo bandimaka. (Ebr. 6:1, 2) Lisolo ya Paulo oyo elobeli lisekwa ezali na 1 Bakorinti mokapo 15. Makambo oyo akomaki elendisaki mpenza bakristo ya ntango na ye. Ezala tobandá kondimela lisekwa kala to te, mokapo yango ekopesa biso makasi mpe ekolendisa mpenza kondima na biso ete lisekwa ekosalema mpenza.
4. Mpo na nini tokoki kondima ete bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakosekwa?
4 Lisekwa ya Yesu Kristo ezali kopesa biso elikya ete bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakosekwa. Yango ezalaki na kati ya “nsango malamu” oyo Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti. (1 Ko. 15:1, 2) Kutu alobaki ete, soki mokristo azali kondima lisekwa te, kondima na ye ezali mpamba. (1 Ko. 15:17) Kondima ete Yesu asekwaki nde esimbi mpenza elikya na biso bakristo.
5-6. Maloba oyo ezali na 1 Bakorinti 15:3, 4 elimboli nini mpo na biso?
5 Ntango ntoma Paulo abandaki kokoma makambo etali lisekwa, atángáki makambo misato. Makambo yango ezali: (1) “Kristo akufaki mpo na masumu na biso.” (2) ‘Bakundaki ye.’ Mpe (3) “alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami.”—Tángá 1 Bakorinti 15:3, 4.
6 Liwa ya Yesu, kokundama, mpe lisekwa na ye elimboli nini mpo na biso? Mosakoli Yisaya asakolaki ete Masiya ‘akolongolama na mokili ya bato ya bomoi’ mpe bakopesa ye lilita “esika moko na bato mabe.” Kasi likambo mosusu esengelaki kosalema. Yisaya abakisaki ete Masiya akomema “lisumu ya bato ebele.” Makambo yango nyonso ekokisamaki ntango Yesu apesaki bomoi na ye lisiko. (Yis. 53:8, 9, 12; Mat. 20:28; Rom. 5:8) Na yango, liwa ya Yesu, kokundama, mpe lisekwa na ye epesi biso elikya makasi mpenza ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Epesi mpe biso elikya ya kokutana lisusu na bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá.
LITATOLI YA BATO EBELE
7-8. Nini esalisaka biso tóndima ete Yesu asekwaki mpenza?
7 Mpo tóndima ete lisekwa ekozala, tosengeli liboso mpenza kondima ete Yesu asekwaki. Mpo na nini tosengeli mpenza kondima ete Yehova asekwisaki Yesu?
8 Ezalaki na bato ebele oyo bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye mpe balobelaki likambo yango. (1 Ko. 15:5-7) Motatoli ya liboso na kati ya bato oyo ntoma Paulo atángi ezali ntoma Petro (Kefa). Bayekoli mpe balobaki ete ntoma Petro amonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye. (Luka 24:33, 34) Lisusu, Paulo alobaki ete “bantoma zomi na mibale” bamonaki mpe Yesu nsima ya lisekwa na ye. Na nsima, Kristo “abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko,” ntango mosusu, ezalaki na likita ya esengo mpenza oyo esalemaki na Galile oyo Matai 28:16-20 elobeli. Yesu ‘abimelaki mpe Yakobo,’ oyo mbala mosusu azalaki ndeko ya Yesu, oyo liboso, azalaki kondima te ete Yesu azali Masiya. (Yoa. 7:5) Ntango Yakobo amonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye, andimaki mpenza. Likambo ya esengo, ntango Paulo akomaki mokanda oyo na mobu soki 55 ya ntango na biso, bato mingi oyo bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye bazalaki naino na bomoi. Na yango, moto nyonso oyo akokaki kotya ntembe ete Yesu asekwaki te, akokaki kotuna bato yango, oyo bamonaki likambo yango na miso.
9. Ndenge Misala 9:3-5 emonisi yango, makambo nini ekómelaki Paulo oyo ekoki kondimisa biso lisusu ete Yesu asekwaki mpenza?
9 Na nsima, Yesu abimelaki ntoma Paulo ye moko. (1 Ko. 15:8) Paulo, oyo na ntango wana azalaki kobengama Saulo, azalaki kokende na Damasi ntango ayokaki mongongo ya Yesu. Amonaki emonaneli ya nkembo ya Yesu kuna na likoló. (Tángá Misala 9:3-5.) Likambo oyo ekómelaki Paulo ezalaki moko ya makambo oyo emonisi ete Yesu asekwaki mpenza.—Mis 26:12-15.
10. Lokola Paulo andimaki ete Yesu akufaki mpe na nsima asekwaki, yango etindaki ye asala nini?
10 Mpo na bato mosusu, litatoli ya Paulo ezali na ntina mingi mpe esengeli kondimama, mpo na ntango moko boye, anyokolaki bakristo. Na nsima, akómaki kondima mpenza ete Yesu asekwaki, mpe asalaki makasi mpenza mpo andimisa mpe bato mosusu likambo yango. Ayikelaki makambo mingi mpiko. Na ndakisa, babɛtaki ye, akɔtaki bolɔkɔ, mpe azindaki na masuwa ntango azalaki kosakola ete Yesu akufaki kasi azali lisusu na bomoi. (1 Ko. 15:9-11; 2 Ko. 11:23-27) Paulo azalaki kondima mpenza ete Yesu akufaki mpe na nsima asekwaki, yango wana andimaki ata kokufa mpo na kosakola likambo yango. Litatoli ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bandimaki mpenza ete Yesu akufaki mpe na nsima asekwaki, esengeli mpenza kosalisa yo ondima ete Yesu asekwaki, boye te? Mpe yango esengeli kokómisa kondima na yo makasi ete na mikolo ezali koya, bato oyo bakufá bakosekwa.
ASEMBOLAKI BAOYO BAZALAKI NA MAKANISI MABE
11. Ekoki kozala mpo na ntina nini bato mosusu ya Korinti bazalaki na makanisi ya mabe mpo na lisekwa?
11 Bakristo mosusu oyo bazalaki kofanda na Korinti, engumba moko ya Bagrɛki, bazalaki na makanisi ya mabe mpo na lisekwa; bakómaki kutu koloba ete “lisekwa ya bakufi ezali te.” Mpo na nini? (1 Ko. 15:12) Bato ya filozofi ya Atene, engumba mosusu ya Bagrɛki, bazalaki kotyola liteya oyo elobaka ete Yesu asekwaki. Na yango, ekoki kozala ete bato mosusu ya Korinti bakómaki mpe na makanisi ya ndenge wana. (Mis. 17:18, 31, 32) Ekoki mpe kozala ete bamosusu bazalaki kozwa liteya ya lisekwa na ndenge ya elilingi. Bazalaki kokanisa ete soki moto azali mosumuki ezali lokola “akufi,” mpe soki akómi mokristo ezali lokola azongi na “bomoi.” Ata soki ezalaki mpo na ntina nini, koboya kondima liteya ya lisekwa emonisaki ete kondima na bango ezalaki mpamba. Soki Nzambe asekwisaka Yesu te, lisiko mpe elingaki kofutama te, mpe masumu ya bato elingaki kolimbisama te. Yango wana, bato oyo bandimaka lisekwa te bazali ata na elikya moko te ya solosolo.—1 Ko. 15:13-19; Ebr. 9:12, 14.
12. Na kotalela 1 Petro 3:18, 22, ndenge nini lisekwa ya Yesu ekeseni na lisekwa ya bato oyo basekwaki liboso?
12 Ntoma Paulo ye moko ayebaki malamu ete “Kristo alamukaki uta na bakufi.” Lisekwa ya Yesu eleki lisekwa ya bato nyonso oyo basekwaki liboso na ye, mpo bato yango bakufaki lisusu. Paulo alobaki ete Yesu azalaki “mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” Na ndenge nini Yesu azalaki mbuma ya liboso? Azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpe akómaki ekelamu ya elimo, mpe na nsima amataki na likoló.—1 Ko. 15:20; Mis. 26:23; tángá 1 Petro 3:18, 22.
BAOYO “BAKOZONGISAMA NA BOMOI”
13. Bokeseni nini ntoma Paulo asali kati na Adama ná Yesu?
13 Ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kopesa bamilio ya bato bomoi? Ntoma Paulo apesaki eyano ya polele na motuna yango. Amonisaki bokeseni oyo ezali kati na likambo oyo Adama amemelá bato mpe mapamboli oyo tokoki kozwa na nzela ya mbeka ya Kristo. Mpo na makambo oyo Adama asalaki, ntoma Paulo akomaki boye: “Liwa eyei na nzela ya moto moko.” Ntango Adama asalaki lisumu, amemaki liwa mpo na ye moko, mpe mpo na bakitani na ye nyonso. Tii lelo tozali komona mpasi mpo na kozanga botosi na ye. Kasi lokola Nzambe asekwisaki Mwana na ye, tozwi likoki ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya! “Lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko,” Yesu. Ntoma Paulo abakisaki boye: “Mpo kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”—1 Ko. 15:21, 22.
14. Adama akosekwa? Limbolá.
14 Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama”? Azalaki kolobela bato nyonso, oyo bazwá libula ya lisumu mpe ya ezaleli ya kozanga kokoka epai ya Adama mpe mpo na yango bakokufa. (Rom. 5:12) Adama azali te na kati ya bato oyo “bakozongisama na bomoi.” Lisiko ya Kristo ekoki kozipa lisumu ya Adama te, mpo azalaki moto ya kokoka kasi aboyaki kotosa Nzambe na nko. Makambo oyo ekómelá Adama ekokómela mpe baoyo “Mwana ya moto” akosambisa bango ete bazali “bantaba,” elingi koloba, “bakokufa liwa ya seko.”—Mat. 25:31-33, 46; Ebr. 5:9.
15. Banani bazali na kati ya “bato nyonso” oyo “bakozongisama na bomoi”?
15 Kobosana likambo oyo te: Ntoma Paulo alobaki ete “bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” (1 Ko. 15:22) Paulo akomaki mokanda na ye epai ya bakristo ya Korinti oyo batyamaki mafuta na elimo, mpe oyo basengelaki kosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Bakristo yango ‘basantisamaki na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo babengamaki mpo na kozala basantu.’ Paulo alobelaki mpe “baoyo balalá na kati ya liwa na bomoko elongo na Kristo.” (1 Ko. 1:2; 15:18; 2 Ko. 5:17) Na mokanda mosusu oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, akomaki ete ‘baoyo basangani na Yesu ntango bakufi liwa lokola oyo ya ye, bakosangana mpe na ye ntango bakosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye.’ (Rom. 6:3-5) Yesu asekwisamaki na nzoto ya elimo mpe azongaki na likoló. Yango nde makambo oyo ekokómela baoyo nyonso bazali na “bomoko elongo na Kristo,” elingi koloba, bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo.
16. Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango abengaki Yesu “mbuma ya liboso”?
16 Ntoma Paulo akomaki ete Kristo asekwaki mpo na kozala “mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” Kobosana te ete bato mosusu, na ndakisa Lazare, bakufaki mpe na nsima basekwisamaki kasi bafandaki awa na mabele. Nzokande Yesu azalaki moto ya liboso mpenza oyo akufaki mpe asekwisamaki na nzoto ya elimo mpo na kozwa bomoi ya seko. Akokanaki na mbuma ya liboso oyo Bayisraele bazalaki kobuka mpo na kopesa Nzambe mbeka. Lokola Paulo abengi Yesu “mbuma ya liboso,” yango emonisi ete ezali mpe na bato mosusu oyo bakokufa kasi bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Ndenge moko na Yesu, bantoma ná bato mosusu oyo bazali na “bomoko elongo na Kristo,” basengeli mpe kosekwa na ntango oyo ebongi mpo na kozala na bomoi na likoló.
17. Ntango nini baoyo bazali “na bomoko elongo na Kristo” bakosekwa mpo na kokende na likoló?
17 Ntango ntoma Paulo akomelaki Bakorinti ete baoyo bazali “na bomoko elongo na Kristo” bakosekwa mpo na kokende na likoló, lisekwa yango ebandaki naino te. Kasi, amonisaki ete ekosalema na mikolo ezali koya. Alobaki ete: “Moto na moto na ngala na ye: Kristo mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye.” (1 Ko. 15:23; 1 Tes. 4:15, 16) Lelo oyo, tozali na ntango yango ya “kozala” ya Kristo oyo esakolamaki. Ya solo, bantoma ná bakristo mosusu oyo batyamaki mafuta na elimo oyo bakufá, basengelaki kozela eleko yango ya kozala ya Kristo mpo na kozwa mbano na bango na likoló mpe ‘kosangana na Yesu ntango bakosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye.’
ELIKYA NA BISO EKOKOKISAMA MPENZA!
18. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete nsima ya lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló, ekozala mpe na lisekwa mosusu? (b) Na kotalela 1 Bakorinti 15:24-26, makambo nini ekosalema na likoló?
18 Bongo bakristo nyonso ya sembo oyo bazali Flp. 3:11) Yango emonisi ete, longola lisekwa ya liboso, ezali mpe na lisekwa mosusu. Yango eyokani na oyo Yobo alobaki mpo na bomoi na ye na mikolo ezali koya. (Yobo 14:15) “Baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye” bakozala na likoló elongo na Yesu ntango akobebisa baguvɛrnema nyonso, makonzi nyonso, mpe nguya nyonso. Ata “liwa, monguna ya nsuka,” akosilisama makasi. Baoyo nyonso bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló bakokufa lisusu te. Bongo bato oyo bakokende na likoló te?—Tángá 1 Bakorinti 15:24-26.
na elikya te ya kokende na likoló mpo na kozala elongo na Kristo? Bango mpe bazali na elikya ya lisekwa. Biblia elobi ete Paulo ná bakristo mosusu oyo bakokende na likoló bakosekwa na “lisekwa ya liboso uta na bakufi.” (19. Bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele bakoki kozela nini?
19 Bongo baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele? Bakoki kotya elikya na maloba oyo ya ntoma Paulo. Akomaki boye: “Nazali na elikya . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Ezali polele ete, moto moko te oyo azangi boyengebene akoki kokɔta na likoló. Na yango, maloba wana emonisi ete lisekwa mosusu ekosalema na mikolo ezali koya awa na mabele.
20. Na ndenge nini elikya ya lisekwa elendisi yo?
20 Na ntembe te, “lisekwa ekozala”! Bato oyo bakosekwa mpo na kofanda awa na mabele, bakozala na bomoi libela. Zalá na elikya ete elaka wana ekokokisama mpenza. Elikya yango ekoki kobɔndisa yo ntango ozali kokanisa bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá. Bakoki kozonga lisusu na bomoi ntango Kristo ná bato mosusu “bakoyangela . . . mbula nkóto moko (1 000).” (Em. 20:6) Yo mpe osengeli kozala na elikya makasi ete, soki okufi liboso Kristo abanda Boyangeli na ye ya mbula nkóto, okozonga lisusu na bomoi. ‘Elikya yango eyokisaka nsɔni te.’ (Rom. 5:5) Ekoki kopesa yo makasi sikoyo mpe kobakisela yo esengo ya kosalela Nzambe. Kasi, ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, 1 Bakorinti mokapo 15 ekoki mpe koteya biso makambo mosusu mingi.
LOYEMBO 147 Nzambe alaki biso bomoi ya seko
^ par. 5 Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti mokapo 15 elobeli mingimingi lisekwa. Liteya yango ezali na ntina nini mpo na biso, mpe nini ekoki kondimisa biso ete Yesu asekwaki? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango mpe na mituna mosusu ya ntina oyo etali lisekwa.
^ par. 56 ELILINGI: Yesu azalaki moto ya liboso ya kokende na likoló. (Mis. 1:9) Kati na bayekoli na ye oyo bakozala elongo na ye kuna na likoló tokoki kotánga Toma, Yakobo, Lidia, Yoane, Maria, mpe Paulo.
^ par. 58 ELILINGI: Mwasi ya ndeko mobali moko akufi. Bango mibale basalelaki Nzambe elongo bambula ebele. Ndeko mobali yango azali na elikya ete mwasi na ye akosekwa, mpe azali kokoba kosalela Yehova na bosembo.