Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

Salelá na mayele eleko ya kimya

Salelá na mayele eleko ya kimya

“Mokili ekómaki na kimya; mpe etumba ata moko te ebimelaki ye na bambula wana, mpo Yehova apesaki ye bopemi.”​—2 NT. 14:6.

LOYEMBO 60 Tolingi bázwa bomoi

NA MOKUSE a

1. Ntango nini ekoki kozala mpasi kosalela Yehova?

 NTANGO nini okanisi ete ekoki kozala mpasi kosalela Yehova: ntango oyo ozali na mikakatano ebele, to ntango oyo makambo ezali kotambola malamu? Ezalaka mpasi te tótyela Yehova motema ntango tokutani na mikakatano. Kasi, tosalaka nini ntango makambo na biso ezali kotambola malamu? Na bantango mosusu tobosanaka ete ezali na ntina mingi kosalela Nzambe? Yehova akebisaki Bayisraele mpo na likambo yango.​—Mib. 6:10-12.

Mokonzi Asa abundisaki mpenza losambo ya lokuta (Talá paragrafe 2) c

2. Ndakisa nini Mokonzi Asa atikelá biso?

2 Mokonzi Asa azali ndakisa malamu mpo na biso. Asalaki na bwanya ndenge atyelaki Yehova motema mobimba. Asalelaki Yehova na ntango ya kimya mpe na ntango oyo makambo ezalaki kotambola malamu te. Uta na ebandeli, “motema ya Asa ezalaki mobimba epai ya Yehova.” (1 Bak. 15:14) Na ndakisa, Asa alongolaki losambo ya lokuta na Yuda mpo na komonisa ete amipesaki mobimba epai ya Yehova. Biblia elobi ete “alongolaki bitumbelo ya bapaya mpe bisika oyo etombwaná, abukaki makonzí ya losambo mpe akataki banzete ya losambo.” (2 Nt. 14:3, 5) Alongolaki kutu Maaka, nkɔkɔ na ye ya mwasi, na esika ya lokumu oyo azalaki na yango na bokonzi. Mpo na nini? Mpo azalaki kolendisa bato na losambo ya bikeko.​—1 Bak. 15:11-13.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Asa asukaki kaka te na kolongola losambo ya lokuta. Azongisaki losambo ya pɛto, mpe asalisaki bato ya Yuda bázongela kosambela Yehova. Yehova apambolaki Asa mpe Bayisraele na ndenge apesaki bango eleko moko ya kimya. b Na boumeli ya mbula zomi na boyangeli ya Mokonzi Asa, “mokili ekómaki na kimya.” (2 Nt. 14:1, 4, 6) Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Asa asalelaki eleko wana ya kimya. Tokolobela mpe ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo, lokola Asa, basalelaki eleko ya kimya na mayele. Na nsuka, tokoyanola na motuna oyo: Soki ofandaka na ekólo oyo guvɛrnema epesá biso bonsomi ya losambo, ndenge nini okoki kosalela eleko yango ya kimya?

NDENGE OYO ASA ASALELAKI ELEKO YA KIMYA

4. Na kotalela 2 Ntango 14:2, 6, 7, ndenge nini Asa asalelaki eleko ya kimya?

4 Tángá 2 Ntango 14:2, 6, 7. Asa ayebisaki bato ete Yehova nde ‘apesaki bango bopemi epai na epai.’ Asa amonaki te ete eleko yango ya kimya ezalaki kaka ntango ya bisengo. Kasi abandaki kotonga bingumba, bifelo, manɔ́ngi, mpe baporte. Ayebisaki bato ya Yuda ete: “Mokili ezali naino na mabɔkɔ na biso.” Asa alingaki koloba nini? Alingaki koloba ete bato ya ekólo bakokaki kotambola na bonsomi nyonso na mokili oyo Nzambe apesaki bango mpe kotonga kozanga ete banguna bátɛmɛla bango. Alendisaki bato ete básalela eleko yango ya kimya malamumalamu.

5. Mpo na nini Asa akómisaki limpinga na ye makasi?

5 Asa asalelaki mpe eleko yango ya kimya mpo na kokómisa lisusu limpinga na ye makasi. (2 Nt. 14:8) Yango elingi nde koloba ete azalaki kotyela Yehova motema te? Te. Kasi, Asa asalaki bongo mpo ayebaki ete lokola azalaki mokonzi, azalaki na mokumba ya kobongisa bato mpo na mikakatano oyo ekokaki kokómela bango. Ayebaki ete mbala mosusu eleko yango ya kimya oyo ezalaki na Yuda ekoumela libela te, mpe yango nde esalemaki.

NDENGE OYO BAKRISTO YA SIƐKLƐ YA LIBOSO BASALELAKI ELEKO YA KIMYA

6. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki eleko ya kimya?

6 Atako mbala mingi bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokutana na minyoko, bazalaki mpe na bileko ya kimya. Ndenge nini basalelaki bileko yango ya kimya? Bakristo yango ya sembo basakolaki nsango malamu kozanga kotika. Mokanda ya Misala ya bantoma elobi ete bazalaki “kotambola na kobanga Yehova.” Bakristo yango bakobaki kosakola nsango malamu mpe yango esalaki ete ‘bákoba kokola.’ Na ntembe te, Yehova apambolaki milende oyo bamonisaki na mosala ya kosakola na bileko yango ya kimya.​—Mis. 9:26-31.

7-8. Ntango libaku emonanaki, ntoma Paulo ná bakristo mosusu basalaki nini? Limbolá.

7 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki mabaku nyonso mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, ntango ntoma Paulo amonaki ete porte moko ya monene efungwamelaki ye ntango azalaki na Efese, asalelaki libaku yango mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli na engumba yango.​—1 Ko. 16:8, 9.

8 Libaku mosusu oyo Paulo ná bakristo mosusu bazwaki ezalaki ntango likambo ya kokatama ngenga ebimaki na mobu 49 T.B. (Mis. 15:23-29) Ntango bayebisaki masangá ekateli oyo ezwamaki, bayekoli basakolaki na molende “nsango malamu ya liloba ya Yehova.” (Mis. 15:30-35) Yango ebotaki mbuma nini? Biblia elobi ete “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.”​—Mis. 16:4, 5.

NDENGE YA KOSALELA BILEKO YA KIMYA LELO OYO

9. Makambo ezali ndenge nini na bikólo mingi lelo oyo, mpe motuna nini tosengeli komituna?

9 Na bikólo mingi lelo oyo, tozali na bonsomi ya kosakola. Ofandaka na moko ya bikólo yango? Soki ezali bongo, omituna boye: ‘Ndenge nini nasalelaka bonsomi yango?’ Mikolo ya nsuka ezali ntango moko ya malamu mpo na basaleli ya Yehova, mpo bazali kosala mosala monene ya kosakola mpe ya koteya oyo esalemá naino te. (Mrk. 13:10) Tozali na makambo mingi oyo tokoki kosala na mosala yango.

Bandeko mingi bazwi mapamboli ebele ndenge bakei kosakola na bikólo mosusu mpe na ndenge basakwelaka bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu (Talá paragrafe 10-12) d

10. Vɛrsɛ ya 2 Timote 4:2 elendisi biso tósala nini?

10 Ndenge nini okoki kosalela malamu eleko ya kimya? (Tángá 2 Timote 4:2.) Ekozala malamu soki otaleli makambo ya bomoi na yo mpo oyeba soki yo to moto moko ya libota na bino bokoki komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola, mbala mosusu mpe kosala ata mosala ya mobongisi-nzela. Sikoyo ezali te ntango ya konduka bozwi to biloko ya mokili; biloko yango ekobika ná biso te na ntango ya bolɔzi monene.​—Mas. 11:4; Mat. 6:31-33; 1 Yoa. 2:15-17.

11. Bandeko mosusu basali nini mpo bákoka kosakwela bato mingi nsango malamu?

11 Basakoli mingi bayekoli monɔkɔ mosusu mpo bákoka kosalela yango na mosala ya kosakola mpe ya koteya. Ebongiseli ya Yehova esalisaka bango na ndenge ezali kokoba kobimisa na minɔkɔ ebele bavideo mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na ndakisa na 2010, tozalaki kobimisa mikanda na minɔkɔ soki 500. Lelo oyo, tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ koleka 1 000!

12. Matomba nini bato bazwaka ntango bayokaka nsango ya Bokonzi na monɔkɔ ya mboka na bango? Pesá ndakisa.

12 Bato bamiyokaka ndenge nini ntango bayoki solo ya Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango? Tólobela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo alandaki liyangani ya etúká na engumba Memphis, na etúká ya Tennesse, na États-Unis. Liyangani yango esalemaki na monɔkɔ ya Kinyarwanda; monɔkɔ oyo elobamaka na Rwanda, na Congo (Kinshasa), mpe na Ouganda. Nsima ya liyangani, ndeko mwasi yango, oyo alobaka monɔkɔ yango, alobaki boye: “Nasali mbula 17 na États-Unis, kasi oyo nde mbala ya liboso nakanga mpenza ntina ya mateya ya liyangani.” Na ntembe te, lokola ndeko mwasi yango alandaki liyangani na monɔkɔ ya mboka na ye, esimbaki mpenza motema na ye. Soki makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela, mpo na nini te koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bato mosusu ya teritware na bino? Ekoki kozala malamu mingimingi soki na teritware ya lisangá na bino, ezali na bato mosusu oyo basepelaka koloba mingi monɔkɔ ya mboka na bango. Milende oyo okosala na likambo yango ekomemela yo esengo mingi.

13. Ndenge nini bandeko na biso ya Russie basalelaki eleko ya kimya oyo bazalaki na yango?

13 Bandeko na biso mosusu bazali te na bonsomi ya kosakola. Na bikólo mosusu, bakoki te kosakola na bonsomi nyonso mpo guvɛrnema etyá bipekiseli makasi na mosala na biso. Na ndakisa, tólobela bandeko na biso ya Russie. Nsima ya konyokwama bambula ebele, mosala na biso endimamaki na ekólo yango na sanza ya 03/1991. Na ntango yango, basakoli bazalaki soki 16 000 na Russie. Mbula 20 na nsima, motángo ya basakoli elekaki 160 000. Ya solo mpenza, bandeko na biso basalaki na bwanya ntango bazalaki na bonsomi ya kosakola. Eleko yango ya kimya eumelaki te. Atako makambo ebongwani na ekólo yango, bandeko bazali kaka na molende na losambo ya Yehova. Bazali kokoba kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalela ye.

ELEKO YA KIMYA EKOUMELA LIBELA TE

Mokonzi Asa abondelaki Yehova na motema mobimba mpe Yehova asalisaki ekólo Yuda elonga limpinga moko monene ya banguna (Talá paragrafe 14-15)

14-15. Ndenge nini Yehova asalelaki nguya na ye mpo na kosalisa Asa?

14 Na mikolo ya Asa, eleko ya kimya ekómaki na nsuka na yango. Limpinga moko monene ya basoda koleka milio moko oyo eutaki na Etiopi eyelaki bango. Zera, oyo azalaki kotambwisa limpinga yango, akanisaki ete ye ná basoda na ye bakokweisa Yuda. Kasi, Mokonzi Asa atyaki nde motema epai ya Yehova Nzambe na ye, kasi te na motángo ya basoda oyo azalaki na yango. Abondelaki boye: “Salisá biso, Ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema, mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo.”​—2 Nt. 14:11.

15 Atako motángo ya basoda ya Etiopi ezalaki soki mbala mibale koleka oyo ya ye, Asa ayebaki ete Yehova azali na nguya mpe na likoki ya kosalisa bato na ye. Mpe Yehova ayokisaki ye nsɔni te. Asa ná basoda na ye, balongaki limpinga ya bato ya Etiopi.​—2 Nt. 14:8-13.

16. Ndenge nini toyebi ete eleko ya kimya ekoumela libela te?

16 Ata soki toyebi na bosikisiki te makambo nini ekokómela mokomoko na biso na mikolo ezali koya, kasi toyebi ete eleko ya kimya oyo biso basaleli ya Nzambe tozali na yango ekoumela libela te. Kutu, Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka ‘bikólo nyonso bakoyina bayekoli na ye.’ (Mat. 24:9) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobaki ete “baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:12) Satana azali na “nkanda makasi,” mpe tokomikosa mpenza soki tokanisi ete tokokoka kokima nkanda na ye na ndenge moko boye.​—Em. 12:12.

17. Na ndenge nini kondima na biso ekoki komekama?

17 Mosika te, bosembo na biso nyonso ekomekama. Etikali moke, ekozala na “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo.” (Mat. 24:21) Na ntango yango, bato ya libota na biso bakoki kobalukela biso mpe mosala na biso ekoki kopekisama. (Mat. 10:35, 36) Na ndakisa ya Asa, tosengeli kotya motema ete Yehova akosalisa mpe akobatela biso.

18. Na kotalela Baebre 10:38, 39, nini ekosalisa biso tómibongisa malamu ntango eleko ya kimya ekosuka?

18 Yehova azali kobongisa biso sikoyo na elimo, mpo kondima na biso ezala makasi. Azali kotambwisa “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa biso “bilei . . . na ntango oyo ebongi” mpo esalisa biso tózala ntango nyonso makasi na elimo. (Mat. 24:45) Kasi, tosengeli kosala oyo tokoki mpo kondima na biso ezala makasi epai ya Yehova.​—Tángá Baebre 10:38, 39.

19-20. Na kotalela 1 Ntango 28:9, mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?

19 Ndenge moko na Mokonzi Asa, tosengeli ‘koluka Yehova.’ (2 Nt. 14:4; 15:1, 2) Tobandaka koluka Yehova ntango toyekoli koyeba ye mpe tozwi batisimo. Tosalelaka mabaku nyonso mpo na kokómisa makasi bolingo na biso mpo na Yehova. Mpo na yango, tosengeli komituna boye: ‘Nayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá?’ Na makita, tozwaka makasi mpo tókoba kosalela Yehova mpe tozwaka bilendiseli epai ya bandeko na biso. (Mat. 11:28) Tokoki mpe komituna boye: ‘Nazalaka na programɛ na ngai ya koyekola Biblia mbala na mbala?’ Soki ofandaka elongo na bato ya libota na yo, bozalaka na mokolo oyo bosalaka losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ? Soki ofandaka yo moko, otyá mpe ntango ya koyekola yo moko, lokola nde ozali na kati ya libota? Lisusu, omipesaka na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na kotalela makoki na yo?

20 Mpo na nini tosengeli komituna mituna yango? Biblia elobi ete Yehova atalaka makanisi mpe makambo oyo ezali na mitema na biso. Yango wana, biso mpe tosengeli kosala bongo. (Tángá 1 Ntango 28:9.) Soki tomoni ete ebongi tóbongola mikano to makanisi na biso, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tósala bambongwana yango. Sikoyo nde ntango ya komibongisa mpo na komekama oyo tokokutana na yango. Kotika eloko moko te epekisa yo kosalela na mayele eleko ya kimya oyo ozali na yango!

LOYEMBO 62 Loyembo ya sika

a Ofandaka na ekólo oyo okoki kosalela Yehova na bonsomi? Soki ezali bongo, ndenge nini ozali kosalela eleko yango ya kimya? Lisolo oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki komekola Asa mokonzi ya Yuda mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Basalelaki na mayele eleko ya kimya.

b NDIMBOLA YA MALOBA: Liloba “kimya” elimboli kaka te kozanga bitumba. Euti na liloba ya Ebre oyo epesaka mpe likanisi ya kozala na nzoto kolɔngɔnɔ, kozanga likama to mpe kozala malamu.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Mokonzi Asa alongolaki nkɔkɔ na ye ya mwasi na esika ya lokumu oyo azalaki na yango mpo nkɔkɔ yango azalaki kolendisa losambo ya lokuta. Bato oyo bazalaki kopesa Asa mabɔkɔ balandaki ndakisa na ye mpe babebisaki bikeko yango.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko moko ná mwasi na ye bazali kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bákende kopesa mabɔkɔ na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi.