LISOLO YA BOYEKOLI 23
Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”—MAT. 22:37.
LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi
NA MOKUSE *
1-2. Limbolá ndenge tokoki kokanga lisusu malamu ntina ya mitinda ya Biblia ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani.
NA MOKOLO ya libala, mobali ya kitoko mpe mwasi na ye ya kitoko balandaka na likebi mpenza diskur moko oyo euti na mitinda ya Biblia oyo elobelaka libala. Mitinda ya Biblia oyo balobelaka na diskur yango ezalaka makambo ya sika te mpo na bango. Kasi kobanda na mokolo wana, mitinda yango ya Biblia ekómaka lisusu na ntina mingi mpo na bango. Mpo na nini? Mpamba te bakosalela mitinda yango na libala na bango.
2 Ezali mpe bongo ntango bakristo oyo babalani bakómi baboti. Na boumeli ya bambula, na ntembe te basili koyoka badiskur mingi oyo elobelaka ndenge ya kobɔkɔla bana. Kasi sikoyo mitinda yango ya Biblia ekokóma na ntina mingi mpo na bango. Bakobota mwana na bango moko mpe bábɔkɔla ye. Oyo nde mokumba moko monene mpenza! Na ntembe te, ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani, tokoki kokanga lisusu malamu ntina ya mitinda ya Biblia. Yango ezali moko ya ntina oyo basambeli ya Yehova batángaka Makomami mpe bamanyolaka yango “mikolo nyonso” ya bomoi na bango, ndenge basɛngaki bakonzi ya Yisraele básalaka.—Mib. 17:19.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Baboti, bozali na mokumba moko monene lokola bozali bakristo, mingimingi, mpo na koteya bana na bino makambo etali Yehova. Kasi bosengeli kosuka kaka te na koteya bango makambo etali Yehova. Bosengeli kosalisa bana na bino bálinga Yehova na motema na bango mobimba. Ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino bálinga Yehova? Na lisolo oyo, tokolobela mitinda ya Biblia minei oyo ekoki kosalisa bino lokola bozali baboti. (2 Tim. 3:16) Tokomona mpe ndenge baboti mosusu oyo bazali bakristo bazwaki matomba na kosalela mitinda ya Biblia.
MITINDA MINEI OYO EKOKI KOSALISA BABOTI
4. Wapi etinda ya liboso oyo ekoki kosalisa baboti básalisa bana na bango bálinga Yehova na motema na bango? (Yakobo 1:5)
4 Etinda 1: Luká litambwisi ya Yehova. Sɛngá Yehova apesa yo bwanya oyo osengeli na yango mpo na kosalisa bana na yo bákóma kolinga ye. (Tángá Yakobo 1:5.) Azali moto oyo abongi mpo na kopesa biso toli. Ezali na bantina ebele. Tólobela ntina mibale mpamba. Ya liboso, Yehova ayebi makambo mingi na likambo etali kozala moboti. (Nz. 36:9) Mpe ya mibale, toli ya bwanya oyo apesaka biso ememelaka biso matomba ntango nyonso.—Yis. 48:17.
5. (a) Ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa nini mpo na kosalisa baboti? (b) Na kotalela video yango, ndenge ndeko mobali Amorim ná mwasi na ye bateyaki bana na bango eteyi yo nini?
5 Na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye, Yehova apesaka biso ebele ya bilei ya elimo oyo ekoki kosalisa yo obɔkɔla bana na yo mpo bálinga ye. (Mat. 24:45) Na ndakisa, okoki kozwa ebele ya toli oyo ebongi na masolo oyo elobelaka “Lisalisi mpo na libota,” oyo ezalaki kobima na zulunalo na biso Lamuká! mpe sikoyo ezali na site Internet na biso jw.org. Lisusu, ezali na bavideo ebele oyo ebimá na jw.org oyo elobeli mituna-lisolo mpe makambo oyo ekoki kosalisa baboti básalela toli ya Yehova wana bazali kobɔkɔla bana na bango. *—Mas. 2:4-6.
6. Tata moko alobi nini mpo na litambwisi oyo ye ná mwasi na ye bazwaka na ebongiseli ya Yehova?
6 Baboti mingi bapesaka matɔndi mingi mpo na lisalisi oyo Yehova apesaka na nzela ya ebongiseli na ye. Tata moko na nkombo Joe alobi boye: “Kobɔkɔla bana misato na kati ya solo ezali mokumba ya pɛtɛɛ te. Ngai ná mwasi na ngai tobondelaka Yehova ntango nyonso mpo asalisa biso. Mpe tozalaki komona ntango nyonso ete lisolo to video moko oyo ebimaki ezalaki koya na ntango oyo ebongi mpo na kosalisa biso na likambo moko oyo tozalaki kokutana na yango. Tozalaki ntango nyonso kotyela toli ya Yehova motema.” Joe ná mwasi na ye bayaki komona ete bavideo mpe masolo yango ezali kosalisa bana na bango bápusana penepene na Yehova.
7. Mpo na nini ezali na ntina baboti básala makasi mpo na kozala ndakisa malamu? (Baroma 2:21)
7 Etinda 2: Zalá ndakisa malamu. Bana batalaka baboti malamumalamu mpe mbala mingi bamekolaka bango. Ya solo, moboti moko te azali moto ya kokoka. (Rom. 3:23) Atako bongo, baboti ya bwanya basalaka nyonso oyo bakoki mpo bázala ndakisa malamu mpo na bana na bango. (Tángá Baroma 2:21.) Tata moko alobaki boye mpo na bana: “Kaka ndenge éponge emɛlaka mai, bana balandaka makambo nyonso oyo baboti basalaka mpe balobaka.” Abakisi boye: “Soki biso moko tozali te kosala makambo oyo tozali kosɛnga bango básala, bayebisaka biso yango.” Yango wana, soki tolingi bana na biso bálinga Yehova, biso moko tosengeli naino kokómisa bolingo na biso mpo na ye makasi mpe komonisa ete tolingaka ye.
8-9. Mateya nini ozwi na makambo oyo Andrew mpe Emma balobi?
8 Ezali na lolenge mingi oyo baboti bakoki koteya bana na bango mpo bálinga Yehova. Talá makambo oyo ndeko mobali moko ya mbula 17 na nkombo Andrew alobi: “Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso koteya ngai ete kobondela ezali na ntina mingi mpenza. Mpokwa nyonso, tata azalaki kobondela elongo na ngai, ata soki nasilaki kobondela. Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso kokundwela ngai ná leki na ngai ya mwasi boye: ‘Bokoki kosolola na Yehova mbala nyonso oyo bolingi.’ Kozongela mbala na mbala likambo ya kobondela esalisaki ngai mingi mpenza, mpe sikoyo nakakatanaka te kobondela Yehova mpe namonaka ye lokola Tata ya bolingo.” Baboti, bóbosanaka te ete bolingo oyo bazalaka na yango mpo na Yehova ekoki kosalisa bana na bino bálinga ye mpe.
9 Tótalela ndakisa mosusu ya Emma. Ntango tata na ye asundolaki bango, azalaki na banyongo ebele oyo esɛngaki mama nde afuta yango. Emma alobi boye: “Ntango mama na ngai azalaki na mbongo mingi te, azalaki ntango nyonso kolobela ndenge Yehova abatelaka basaleli na ye mpe asalisaka bango. Namonaki bomoi oyo mama azalaki na yango eyokanaki na makambo oyo azalaki kondima. Mpe namonaki ndenge mama azalaki kosalela makambo oyo azalaki koteya ngai.” Yango eteyi biso nini? Baboti bakoki kozala ndakisa malamu ata soki bazali kokutana na mikakatano.—Gal. 6:9.
10. Mabaku nini baboti mingi ya Yisraele bazalaki na yango mpo na kosolola ná bana na bango? (Kolimbola Mibeko 6:6, 7)
10 Etinda 3: Sololáká ná bana na yo mbala na mbala. Yehova apesaki Bayisraele ya kala mitindo ete báteyaka bana na bango makambo na ye mbala na mbala. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:6, 7.) Baboti yango bazalaki na mabaku mingi na boumeli ya mokolo mpo na kosolola ná bana na bango mpe kosalisa bango bálinga Yehova na motema na bango. Na ndakisa, elenge mobali Moyisraele akokaki kolekisa ntango mingi na kosalisa tata na ye na kolona mboto to kobuka mbuma ntango eteli. Ndeko na ye ya mwasi akokaki kolekisa ntango ebele na mokolo na kosalisa mama na ye na kosɔna to kotonga bilamba, mpe kosala misala mosusu ya ndako. Lokola baboti ná bana bazalaki kosala elongo, bakokaki kosolola makambo mingi ya ntina. Na ndakisa, bakokaki kolobela bizaleli kitoko oyo Yehova azali na yango mpe ndenge azalaki kosalisa libota na bango.
11. Libaku nini baboti oyo bazali bakristo bazalaka na yango mpo na kosolola ná bana na bango?
11 Lelo oyo, makambo ezali lisusu te ndenge ezalaki na ntango ya kala. Na bamboka mingi, ekoki kozala mpasi mpo baboti bálekisa ntango elongo na bana na bango na mokolo. Baboti bakoki mbala mosusu kozala na mosala, mpe bana bakoki kozala na kelasi. Yango wana, baboti basengeli koluka mabaku mpo na kosolola ná bana na bango. (Ef. 5:15, 16; Flp. 1:10) Losambo na kati ya libota epesaka baboti libaku ya kosolola ná bana. Elenge mobali moko na nkombo Alexander alobi boye: “Tata na ngai azwaka ntango nyonso bibongiseli mpo na losambo na kati ya libota, mpe atikaka ata eloko moko te epekisa ye azala elongo na biso na ntango ya kosala losambo na kati ya libota. Nsima ya kosala losambo na kati ya libota, tobɛtaka masolo mosusu ya ntina.”
12. Makambo nini mokonzi ya libota asengeli te kobosana ntango bazali kosala losambo na kati ya libota?
12 Soki ozali mokonzi ya libota, okoki kosala nini mpo losambo na kati ya libota esepelisa bana na yo? Ekoki kozala malamu oyekola na bana na yo buku ya sika Sepelá na bomoi libela na libela! Mpamba te boyekoli yango ekopesa yo libaku malamu ya kosolola ná bana na yo. Soki ozali na mposa ya koyeba makanisi mpe mitungisi oyo bana na yo bazali na yango, ekozala malamu osalela te ntango ya losambo na kati ya libota mpo na kopamela bango to kolobela bango mabe. Mpe komeka kosilika te soki bana na yo bapesi likanisi moko oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Na esika osilika, zalá nde na esengo mpo bazali koyebisa yo na bosembo nyonso makambo oyo bazali kokanisa mpe tiká bango bámonisa yango polele. Okoki kosalisa bana na yo malamu kaka soki oyebi ndenge bazali komiyoka mpenza.
13. Mabaku nini mosusu baboti bazali na yango mpo na kosalisa bana na bango bápusana penepene na Yehova?
13 Baboti, bóluka mabaku ndenge na ndenge na mokolo mpo na kosalisa bana na bino bápusana penepene na Yehova. Bosengeli kozela kaka te ntango bokoyekola na bango Biblia nde bóteya bango makambo etali Nzambe na biso ya bolingo. Talá makambo oyo mama moko na nkombo Lisa alobi: “Tosalisaki bana na biso báyeba Yehova na nzela ya biloko oyo asalá oyo ezingi biso. Na ndakisa, ntango mbwa na biso ezalaki kosala likambo oyo ezalaki kosɛkisa bana, tozalaki koyebisa bango ete Mozalisi na biso asalaka masɛki mpe asepelaka na bomoi, mpe alingi ete biso mpe tosalaka bongo.”
14. Mpo na nini ezali na ntina baboti básalisa bana na bango bápona baninga ya malamu? (Masese 13:20)
14 Etinda 4: Salisá bana na yo bápona baninga ya malamu. Liloba ya Nzambe emonisi polele ete boninga oyo tosalaka ná basusu ekoki kotinda biso tósala malamu to mabe. (Tángá Masese 13:20.) Baboti, boyebi baninga ya bana na bino? Bosili kokutana na bango mpe kolekisa ntango elongo na bango? Ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino bázwa baninga oyo balingaka Yehova? (1 Ko. 15:33) Bokoki kosalisa bango bázwa baninga ya malamu soki bozali kobengisa bato oyo bazali na boyokani malamu ná Yehova mpo na kolekisa mwa ntango to kosala makambo mosusu ya libota elongo na bango.—Nz. 119:63.
15. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bázwa baninga ya malamu?
15 Tótalela ndakisa ya tata moko na nkombo Tony. Amonisi makambo oyo ye ná mwasi na ye basalaki mpo na kosalisa bana na bango bázwa baninga ya malamu: “Na boumeli ya bambula, ngai ná mwasi na ngai tozalaki kobengisa na ndako bandeko basi mpe mibali ya mbula ekeseni mpe mimeseno ekeseni. Tozalaki kolya mwa biloko elongo na bango mpe kosala losambo na kati ya libota. Yango ezali lolenge eleki malamu ya koyeba baoyo balingaka mpe basalelaka Yehova na esengo. Tozwaki mabaku ya koyamba bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, mpe bandeko mosusu bafandaka na ndako na biso. Makambo oyo bakutanaki na yango, milende na bango, mpe elimo na bango ya komipesa ezalaki na bopusi mingi likoló ya bana na biso mpe esalisaki bango bápusana penepene na Yehova.” Baboti, bózala na ekateli ya kosalisa bana na bino bápona baninga ya malamu.
KOBUNGISA ELIKYA TE!
16. Okosala nini soki mwana alobi ete azali na mposa ya kosalela Yehova te?
16 Ata soki osali milende ya ndenge nini, okosala nini soki mwana na yo alobi ete azali na mposa ya kosalela Yehova te? Kokanisa te ete olongi te kosalisa ye lokola ozali moboti. Yehova apesá biso nyonso, ezala mpe mwana, bonsomi ya kopona, elingi koloba, likoki ya kopona soki tokosalela ye to te. Soki mwana na yo aponi kotika Yehova, kobungisa elikya te mpo mokolo mosusu akoki kozongela ye. Kobosana te ndakisa ya mwana mobali oyo abungaki nzela. (Luka 15:11-19, 22-24) Elenge mobali yango akendaki mpenza mosika na nzela ya boyengebene, kasi nsukansuka, azongaki na nzela yango. Bato mosusu bakoki koloba: “Ezalaki na yango kaka ndakisa. Ekoki mpenza kosalema na bomoi?” Ɛɛ, ekoki kosalema! Kutu, yango nde ekómelaki elenge mobali moko na nkombo Elie.
17. Ndakisa ya Elie elendisi yo na nini?
17 Elie alobi boye mpo na baboti na ye: “Basalaki nyonso mpo na kosalisa ngai nalinga Yehova mpe Liloba na ye, Biblia. Kasi, ntango nazalaki elenge, nakómaki motomboki.” Elie akómaki na bomoi ya liso na nse ya lokasa, mpe aboyaki lisalisi ya elimo oyo baboti na ye bapesaki ye. Na nsima alongwaki na ndako, mpe akómaki na bomoi ya mbindo. Atako bongo, na bantango mosusu, azalaki kobɛtela moninga na ye moko masolo ya Biblia. Elie alobi boye: “Ntango nazalaki koyebisa baninga na ngai makambo etali Yehova, ezalaki kotinda ngai nakanisa ye lisusu mingi. Mokemoke, mboto ya solo ya Biblia ekómaki kokola na motema na ngai, elingi koloba, mboto oyo baboti na ngai basalaki makasi bálona, ekómaki kokola.” Mpe na nsima, Elie azongelaki solo. * Kanisá esengo oyo baboti na ye bayokaki ndenge bateyaki ye alinga Yehova banda na bomwana na ye!—2 Tim. 3:14, 15.
18. Ozali komiyoka ndenge nini mpo na baboti oyo bazali kosala makasi mpo na kosalisa bana na bango bálinga Yehova?
18 Baboti, Yehova apesá bino likabo moko kitoko ya kobɔkɔla libota ya basambeli na ye oyo ekoya na nsima. (Nz. 78:4-6) Ezali mokumba moko ya pɛtɛɛ te, mpe tozali kopesa bino longonya oyo euti mpenza na motema ndenge bozali kosala makasi mpenza mpo na kosalisa bana na bino bálinga Yehova! Soki bokobi kosala nyonso oyo bokoki mpo na kosalisa bana na bino bálinga Yehova mpe bákola na disiplini mpe makebisi na ye, bokoki komindimisa ete Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akosepela.—Ef. 6:4.
LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’
^ Baboti oyo bazali bakristo balingaka bana na bango mingi. Basalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bana na bango ezala ya mosuni to ya mayoki. Likambo oyo eleki ntina, baboti yango basalaka makasi básalisa bana na bango bálinga lisusu Yehova mingi. Na lisolo oyo, tokolobela mitinda ya Biblia minei oyo ekoki kosalisa baboti bákokisa mokano yango.
^ Talá na jw.org video Yehova ateyaki biso ndenge ya kobɔkɔla bana.
^ Talá lisolo “Biblia ebongolaka bato” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2012.
^ ELILINGI: Wana azali kosala makasi mpo na koyeba baninga ya mwana na ye, tata moko azali kosakana lisano ya basketball elongo na mwana na ye mpe moninga ya mwana na ye.