Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 2

Koyeba komikitisa

Koyeba komikitisa

KOMIKITISA ELIMBOLI NINI?

Bato ya komikitisa bamemyaka basusu. Bazalaka na lolendo te, mpe balukaka te ete bato mosusu bamona bango ete bazali na ntina mingi. Moto ya komikitisa alukaka nde matomba ya basusu mpe azalaka pene ya koyekola epai ya basusu.

Bato mosusu bamonaka ete komikitisa ezali bolɛmbu, kasi ezali bongo te. Komikitisa esalisaka moto andima mabe na ye mpe ayeba esika makoki na ye esuki.

MPO NA NINI KOMIKITISA EZALI NA NTINA?

  • Komikitisa esalaka ete tózala na boyokani malamu na basusu. Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Bato ya komikitisa balingaka kosala boninga na bato mosusu.” Mpe ebakisi ete bato ya ndenge wana bayokanaka malamu na basusu.

  • Komikitisa ekosalisa mwana na yo ntango akokóma mokóló. Soki mwana na yo ayekoli kozala na komikitisa, ekosalisa ye sikoyo mpe na mikolo ezali koya, na ndakisa, ntango akobanda koluka mosala. Doktɛrɛ Leonard Sax akomi boye: “Bilenge oyo bamimonaka ete bazali na ntina mingi koleka basusu, mpe bakanisaka ete bayebi nyonso, bapatrɔ basepelaka na bango te ntango bazali kotuna bango mituna mpo na kozwa bango na mosala. Kasi baoyo balingaka mpenza koyeba makambo nini patrɔ azali komona ete ezali na ntina, bango nde bakoki kozwa na mosala.” a

NDENGE YA KOTEYA MWANA KOMIKITISA

Salisá ye amonaka te ete aleki basusu.

TOLI YA BIBLIA: “Soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.”​—Bagalatia 6:3.

  • Kopesa ye elikya ya lokuta te. Na ndakisa maloba lokola, “Bandɔtɔ na yo nyonso ekoki kokokisama” to “okoki kokóma moto monene,” ekoki kopesa mwana elikya, kasi mbala mingi esalemaka bongo te. Bana na yo bakoki kolonga soki bamityeli mikano oyo ebongi mpe bazali kosala makasi mpo na kokokisa yango.

  • Pesá longonya soki asali makambo ya malamu. Soki ozali koyebisa mwana na yo ete “aleki basusu”, ekosalisa ye te azala na komikitisa. Na yango, pesá ye longonya mpo na likambo oyo asali mpenza.

  • Salisá mwana ayeba makama ya basite ya kosolola na baninga. Mbala mingi na basite yango bato balobelaka makoki na bango mpe makambo ya minene oyo bazali kosala. Nzokande yango ekeseni mpenza na komikitisa.

  • Lendisá mwana asɛngaka bolimbisi nokinoki. Salisá mwana na yo ayeba mabe oyo asali mpe andima yango.

Lendisá mwana azalaka na botɔndi.

TOLI YA BIBLIA: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

  • Salisá mwana azala na botɔndi mpo na biloko oyo Nzambe asalá. Bana basengeli kozala na botɔndi mpo na biloko oyo Nzambe akelá mpe koyeba ete yango nde esimbi bomoi. Mpo tózala na bomoi, tozali na mposa ya mopɛpɛ mpo na kopema, mai mpo na komɛla, mpe biloko ya kolya. Salelá bandakisa wana mpo na kosalisa bango basepelaka mingi na biloko kitoko oyo Nzambe akelá.

  • Salisá mwana azala na botɔndi epai ya basusu. Yebisáká mwana ete bato mosusu baleki ye na makambo mosusu, mpe ete na esika ayokela bango zuwa, asengeli nde koyekola makambo mosusu epai na bango.

  • Salisá ye ayeba kopesa mersi. Teyá mwana na yo ayeba koloba “mersi,” mpe ayebisa ntina oyo azali na botɔndi. Kozala na botɔndi esalisaka moto azala ntango nyonso na komikitisa.

Teyá bana báyeba ete kosalisa basusu ezali malamu.

TOLI YA BIBLIA: “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:3, 4.

  • Pesáká mwana misala ya ndako. Soki moboti azali kopesa mwana misala ya ndako te, yango ekoki kotinda mwana akanisa ete azali na ntina mingi. Misala ya ndako esengeli kozala na esika ya liboso, mpe kosakana na nsima. Monisá ye ndenge misala ya ndako ememelaka basusu bolamu mpe bakosepela na ye mpe bakomemya ye soki azali kosala misala ya ndako.

  • Monisá ete kosalisa basusu ezali libaku malamu. Soki bana na yo bazali kosalisa basusu, ekomonisa ete bakɔmɛli na makanisi. Na yango, salisá mwana na yo aluka mabaku ya kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisalisi. Yebisá ye oyo akoki kosala mpo na kosunga bango. Pesá ye longonya mpe sungá ye ntango azali kosalisa basusu.

a Euti na buku The Collapse of Parenting.