Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge lipapu ya lipekapeka ebendaka pole

Ndenge lipapu ya lipekapeka ebendaka pole

MPO bato básalelaka kaka esansi to charbon te, bato ya siansi bazali na mposa ya kosala baaparɛyi ya malamu koleka oyo ebendaka nguya ya moi. Moto moko ya siansi alobi ete “mbala mosusu solisyo na likambo yango . . . ezali koleka biso kaka boye na miso.”

Ba écailles ya lipapu ya lipekapeka ezalaka madusumadusu lokola ndako ya nzoi

Tókanisa naino: Lipekapeka esembolaka mapapu na yango na moi na eleko ya malili mpo ezwa molunge. Mapapu ya mapekapeka mosusu ezalaka na likoki ya malamu mpenza ya kobenda mpe kobomba pole ya moi. Sekele na yango ezalaka kaka te mpo na langi na yango ya moindo kasi mpe na ndenge oyo biloko mikemike (écailles) oyo elekáleká moko likoló ya mosusu ezalaka na mapapu na yango. Ba écailles yango ezalaka na milɔngɔ ya madusumadusu oyo ezali lokola ndako ya nzoi, oyo ekabolamá na bansongɛ ya biloko oyo ezali lokola lɛtrɛ V oyo ebaluká, oyo ekɔtisaka pole na madusu yango. Ndenge lipapu yango ezalaka esalaka ete ebendaka pole ya moi, ekómisa mapapu yango moindo makasi mpe ebatela lipekapeka na malili na ndenge moko ya malamu mpenza.

Zulunalo moko Science Daily elobi boye: “Mapapu ya lipekapeka ekoki kotyama na molɔngɔ ya biloko oyo eleki pɛtɛɛ mpenza na mabele, kasi epesi bato ya mayele makanisi ya malamu mpenza mpo na kosala baaparɛyi ya sika oyo ekosala ete bázwa mbala mibale koleka gaze oyo babengi hydrogène na mai mpe na pole ya moi; gaze oyo ekozwa esika ya esansi to charbon na mikolo ezali koya.” Bakoki mpe kosalela mayele yango mpo na kosala baaparɛyi oyo esalisaka miso emona ata biloko ya mikemike mpenza mpe baaparɛyi oyo ebendaka nguya ya moi mpo na kobimisa kura.

Okanisi nini? Ndenge lipapu ya lipekapeka ebongisamá mpo na kobenda pole, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?