MITUNA-LISOLO | RACQUEL HALL
Mwasi moko Moyuda amonisi ntina oyo atalelaki lisusu mateya ya lingomba na ye
Mama ya Racquel Hall azali moto ya Israël mpe asambelaka na lingomba ya Bayuda; tata na ye azali moto ya Autriche mpe akómaki kosambela na lingomba ya Bayuda. Baboti ya mama na ye bazalaki kosambela na lingomba ya Siona, mpe bakómaki kofanda na Israël na 1948, mobu oyo ekólo yango ezwaki lipanda. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna mpo na koyeba nini etindaki ye atalela lisusu mateya ya lingomba na ye malamumalamu.
Yebisá biso ndenge obɔkwamá.
Nabotamaki na 1979, na États-Unis. Ntango nazalaki na mbula misato, baboti na ngai babomaki libala. Mama abɔkɔlaki ngai na kolanda mimeseno ya Bayuda mpe akɔtisaki ngai eteyelo ya Bayuda oyo babengi yeshivas. Ntango nakómaki na mbula 7, tokendaki kofanda na Israël mbula mobimba, mpe nakɔtaki kelasi na kibboutz (esika oyo bato babɔkɔlaka bibwele mpe basalaka bilanga bafandaka). Na nsima, ngai ná mama tokendaki kofanda na Mexique.
Atako sinagoga ezalaki te na esika yango, nabatelaki mimeseno na biso ya Bayuda. Na mokolo ya sabata nazalaki kopelisa babuji, kotánga Torah, mpe kotánga mabondeli oyo ezali na siddur to buku ya mabondeli. Mbala mingi na eteyelo, nazalaki koyebisa baninga na ngai ya kelasi ete lingomba na ngai ezali lingomba ya solo. Natángaki naino te eteni ya Biblia oyo babengaka Kondimana ya sika, oyo elobelaka mosala mpe mateya ya Yesu Kristo. Kutu, mama apekisaki ngai kotánga yango, mpo mateya na yango ebebisa ngai te.
Mpo na nini ozwaki ekateli ya kotánga Kondimana ya Sika?
Ntango nakómaki na mbula 17, nazongaki na États-Unis mpo na kosilisa kelasi na ngai. Kuna, moninga na ngai moko oyo azalaki mokristo ayebisaki ngai ete bomoi na ngai ekozala na ntina te soki nandimeli Yesu te.
Nayebisaki ye ete “baoyo bandimelaka Yesu babungá nzela.”
Atunaki ngai boye: “Osí otángá Kondimana ya Sika?”
Nayebisaki ye ete “natángá yango naino te.”
Alobaki na ngai ete “soki ezali bongo, omoni te ete oyebi eloko te,
mpe ozali koloba makambo oyo oyebi te?”Maloba na ye eswaki ngai mpenza, mpo nazalaki komona yango bozoba kopesa makanisi na likambo oyo nayebi te. Na nsɔni nyonso, namemaki Biblia na ye na ndako mpe nabandaki kotánga Kondimana ya Sika.
Makambo oyo otángaki esalaki yo nini?
Nakamwaki ntango nayebaki ete Bayuda nde bakomaki Kondimana ya Sika. Lisusu, ntango nazalaki kotánga yango, namonaki ete Yesu azalaki boboto, Moyuda ya komikitisa oyo alingaki kosalisa bato, kasi te kolyela bango. Nakendaki kutu na esika oyo babombaka babuku mpe nadefaki babuku oyo ezalaki kolobela makambo na ye. Ata buku moko te endimisaki ngai ete Yesu azalaki Masiya. Kutu, babuku yango mosusu ezalaki kobenga ye Nzambe; nazalaki komona yango ntina te. Yesu azalaki kobondela nani? Azalaki nde komibondela? Longola yango, Yesu akufaki. Nzokande Biblia elobi ete “Nzambe akufaka te.” *
Ndenge nini ozwaki biyano na mituna yango?
Solo ezalaka bongolabongola te, mpe nazalaki na ekateli ya koyeba solo. Yango wana, mpo na mbala ya liboso, nabondelaki Nzambe na motema moko mpe na mai na miso, kozanga ete natánga libondeli yango na siddur. Nsima ya kosilisa libondeli, eumelaki te babɛtaki na porte na ngai. Ezalaki Batatoli ya Yehova mibale. Bapesaki ngai mwa buku na bango oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia. Mwa buku yango mpe masolo oyo tosololaki endimisaki ngai ete mateya na bango eutaka na Biblia. Na ndakisa, Batatoli bandimaka te ete Yesu azalaka na kati ya bosato, kasi azali nde “Mwana ya Nzambe” * mpe “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” *
Mwa moke na nsima, nazongaki na Mexique, mpe Batatoli ya Yehova bakobaki koyekola na ngai bisakweli oyo elobeli Masiya. Nakamwaki komona ete bisakweli yango ezali ebele mpenza! Ata bongo, nazalaki kaka na mwa bantembe. Nazalaki komituna boye: ‘Kaka Yesu nde akokisaki bisakweli yango?’ mpe ‘ezali boni soki azalaki kaka mosani moko ya mayele oyo azalaki kosala lokola ye nde Masiya?’
Nini mpenza endimisaki yo?
Batatoli balakisaki ngai bisakweli oyo mokosi moko te akokaki kokokisa. Na ndakisa, mbula koleka 700 liboso, mosakoli Mika asakolaki ete Masiya akobotama na Beteleme, na Yudea. * Nani ayebaka liboso ete akobotama na mboka boye to boye? Yisaya asakolaki ete Masiya akobomama lokola mosali mabe, ata bongo, akokundama esika moko ná bazwi. * Bisakweli wana nyonso ekokisamaki epai ya Yesu.
Likambo ya nsuka oyo endimisaki ngai ezali molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu. Biblia esakolaki ete Masiya akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. * Lokola Bayuda ya kala bazalaki kobomba mikanda ya milɔngɔ ya bankɔkɔ na bango, soki Yesu azalaka moto ya libota ya Davidi te, banguna na ye balingaki kolobela yango polele! Kasi bakokaki kosala yango te mpo ezalaki polele ete Yesu azalaki moto ya libota ya Davidi. Ebele ya bato bazalaki kutu kobenga ye “Mwana ya Davidi.” *
Na mobu 70 ya ntango na biso, mbula 37 nsima ya liwa ya Yesu, limpinga ya basoda ya Roma ebebisaki Yerusaleme, mpe mikanda ya milɔngɔ ya bankɔkɔ ya Bayuda ebungaki to ebebisamaki. Na yango, mpo emonana ete azali moto ya libota ya Davidi, esengelaki ete Masiya amonana liboso ya mobu 70 ya ntango na biso.
Kokokisama ya bisakweli yango etindaki yo osala nini?
Kolimbola Mibeko 18:18, 19 esakolaki ete Nzambe akotɛlɛmisa mosakoli moko na Yisraele oyo akozala lokola Moize. Nzambe alobaki ete moto nyonso “oyo akoyoka te maloba na ngai oyo akoloba na nkombo na ngai, ngai moko nakosɛnga ye azongisa monɔkɔ.” Ntango nayekolaki Biblia mobimba na mozindo, nandimisamaki ete Yesu moto ya Nazarete azalaki mpenza mosakoli yango.
^ par. 21 Yisaya 9:6, 7; Luka 1:30-32. Matai mokapo 1 elobeli bankɔkɔ ya Yesu oyo babotá Yozefe, mpe Luka mokapo 3, elobeli bankɔkɔ ya Yesu oyo babotá Maria.