Yebá kopona mpo nzoto na yo ezala kolɔngɔnɔ
Yebá kopona mpo nzoto na yo ezala kolɔngɔnɔ
LELO oyo kolya malamu mpe kozala nzoto kolɔngɔnɔ ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Na mokili oyo ya mpasi, ekoki komonana lokola ezali malamu kolya “biloko ya sukali” na esika ya kolamba biloko. Bato mingi bamonaka mpe ete ezali pɛtɛɛ kolekisa ntango mingi kaka na kotala televizyo to liboso ya ordinatɛrɛ na esika ya kosala ngalasisi. Nzokande, mbala mosusu kopona makambo ya ndenge wana ememelaka ebele ya mikoló ná bilenge mikakatano mingi ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto.
Zulunalo moko (Asiaweek) elobi mpo na bato ya Azia ete: “Biloko ya kolya oyo ezali mafutamafuta mpe momeseno ya kofandaka kaka esika moko, ememeli ebele ya bato maladi ya diabɛtɛ.” Likambo ya mawa ezali ete maladi yango ekómi kozwa bilenge mingi. Mpe Zulunalo Globe and Mail elobi ete na Canada, “bato oyo basalaki bolukiluki bamonisi ete kaka elenge moko likoló ya bilenge nsambo nde alyaka mbuma mingi ná ndunda. Kaka bilenge mitano likoló na zomi nde basakanaka mingi kino kobimisa mitɔki.” Zulunalo yango ebakisi lisusu ete lolenge wana ya kosala ekoki kutu komemela bilenge yango “maladi ya motema ntango bakokokisa kaka mbula 30.”
Ndenge moko mpe, bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya mpɔngi balobi ete esengeli mikóló bálalaka ngonga mwambe na butu mpe bilenge bálalaka ngonga mingi koleka wana. Kutu, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Iniversite ya Chicago emonisi ete bilenge oyo bazalaki na nzoto malamu mpe oyo balalaki kaka ngonga minei na butu moko na boumeli ya mikolo motoba, nsukansuka bakómaki kobɛla maladi oyo mikóló nde bábɛlaka. Atako bato mingi balalaka mingi te mpo na mosala, mpo na kelasi, to mpo na bisengo, lolenge wana ya kosala ekoki komema bango na kosala mosala malamu te. James Maas, moto oyo asalaka bolukiluki mpo na makambo ya mpɔngi na Université Cornell na New York, alobi boye: “Kokende mosala ezali likambo mosusu. Kasi kolala te na mosala, kosala mosala malamu mpe kolala te ntango ozali kotambwisa motuka ezali mpe likambo mosusu.”
Ya solo, mpo tózala nzoto malamu, yango etaleli mpe makambo mosusu. Na ndakisa, kozala na makanisi ebongi ezali malamu mpo nzoto ezala kolɔngɔnɔ. Koyeba ete bomoi na biso ezali mpenza na ntina, ekosalisa biso mpo tóyeba kopona biloko oyo ekosalisa biso tózala na nzoto kolɔngɔnɔ.