MOKAPO 19
Yesu ateyi mwasi Mosamaria
-
YESU ATEYI MWASI MOSAMARIA MPE BATO MOSUSU
-
LOSAMBO OYO NZAMBE ANDIMAKA
Yesu ná bayekoli na ye balongwe na Yudea, bazali kokende na Galile, bakatisi Samaria na ngámbo ya nɔrdi. Mobembo yango elɛmbisi bango. Ntango midi elingi ekóma, bapemi pene na engumba Sikare na libulu ya mai, oyo balobaka ete Yakobo moto atimolaki yango to afutaki bato mbongo bátimola yango basiɛklɛ mingi liboso. Tii lelo oyo, libulu ya ndenge wana ezali pene na engumba Naplouse.
Ntango Yesu azali kopema pene na libulu yango, bayekoli na ye bakei na engumba moko oyo ezali pene wana mpo na kosomba biloko ya kolya. Mwasi moko Mosamaria ayei kotoka mai nsima na bango. Yesu alobi na ye: “Pesá ngai mai ya komɛla.”—Yoane 4:7.
Banda kala, Bayuda ná Basamaria bayokanaka te mpo bakaniselanaka mabe. Yango wana mwasi yango akamwe, mpe atuni ye: “Ndenge nini yo, atako ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai ya komɛla, nzokande ngai nazali mwasi Mosamaria?” Yesu ayanoli: “Soki oyebaki likabo ya ofele ya Nzambe mpe nani oyo azali koloba na yo ete: ‘Pesá ngai mai ya komɛla,’ olingaki kosɛnga ye, mpe ye alingaki kopesa yo mai ya bomoi.” Mwasi yango azongiseli ye ete: “Tata, ozali ata na katini ya kotoka mai te, mpe libulu ezali mozindo. Bongo ozwi mai yango ya bomoi wapi? Oleki nde nkɔkɔ na biso Yakobo oyo apesaki biso libulu oyo mpe oyo amɛlaki mai na yango, ye ná bana na ye mpe bibwɛlɛ na ye?”—Yoane 4:9-12.
Yesu alobi na ye: “Moto nyonso oyo amɛli mai oyo akoyoka mposa ya mai lisusu. Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka mposa ya mai ata moke lisusu te, kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko.” (Yoane 4:13, 14) Atako Yesu alɛmbi, azali kaka na mposa ya koyebisa mwasi Mosamaria wana maloba ya solo oyo epesaka bomoi.
Nsima na yango, mwasi yango alobi: “Tata, pesá ngai mai yango, mpo nayoka mposa ya mai lisusu te mpe nayaka na esika oyo te mpo na kotoka mai.” Sikoyo, emonani lokola Yesu akɔtisi lisolo mosusu mpe alobi na ye: “Kende, bengá mobali na yo mpe yaká na esika oyo.” Mwasi yango ayanoli: “Nazali na mobali te.” Na ntembe te, mwasi yango akamwe mpenza ntango Yesu ayebisi ye boye: “Olobi malamu ete: ‘Nazali na mobali te.’ Mpo ozwá mibali mitano, mpe oyo ozali na ye sikoyo azali mobali na yo te.”—Yoane 4:15-18.
Makambo oyo Yesu alobi ezali solo, yango wana mwasi yango alobi na ye: “Tata, namoni ete ozali mosakoli.” Na nsima, mpo na komonisa ete asepeli na makambo ya Nzambe, alobi lisusu: “Bankɔkɔ na biso [Basamaria] basambelaki na ngomba oyo [Ngomba Gerizime, oyo ezali pene na esika bazali]; kasi bino [Bayuda] bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”—Yoane 4:19, 20.
Kasi, Yesu alimboli ete esika ya kosambela ezali na ntina te. Alobi boye: “Ngonga ezali koya wana bato bakosambela Tata na ngomba oyo te na Yerusaleme mpe te.” Mpe abakisi: “Ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.”—Yoane 4:21, 23, 24.
Eloko oyo Tata alukaka epai ya basambeli ya solosolo ezali te esika oyo bazali kosambela, kasi nde ndenge oyo bazali kosambela. Mwasi yango akamwe makasi mpe alobi: “Nayebi ete Masiya azali koya, oyo abengami Kristo. Ntango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso polele.”—Na yango, Yesu ayebisi ye likambo moko ya ntina mpenza; alobi: “Ngai oyo nazali koloba na yo nde ye.” (Yoane 4:26) Kanisá naino! Mwasi yango ayei kotoka mai na midi. Kasi, Yesu asaleli ye likambo moko ya malamu mpenza. Ayebisi ye polele ete azali Masiya, likambo oyo emonani ete ayebisá yango naino polele te moto mosusu liboso.
BASAMARIA EBELE BANDIMI
Bayekoli ya Yesu bauti na Sikare mpe bayei na biloko ya kolya. Bakuti Yesu esika batikaki ye pene na libulu ya Yakobo, kasi sikoyo azali kosolola na mwasi Mosamaria. Ntango bayekoli bakómi, mwasi yango atiki elokó na ye ya mai mpe akei na engumba.
Ntango mwasi yango akómi na Sikare, ayebisi bato makambo oyo Yesu alobi na ye. Na kondima nyonso, alobi na bango boye: “Bóya kotala moto moko oyo ayebisi ngai makambo nyonso nasalá.” Na nsima, ntango mosusu mpo na kobenda likebi na bango atuni boye: “Mbala mosusu ye nde Kristo te?” (Yoane 4:29) Ezali motuna moko ya ntina mpenza oyo bato bazalaki kotyela yango likebi banda na ntango ya Moize. (Kolimbola Mibeko 18:18) Esali ete bato ya engumba yango bákende komona Yesu na miso na bango moko.
Na ntango yango, bayekoli bazali kotya Yesu mbamba alya biloko oyo bayei na yango. Kasi azongisi ete: “Nazali na biloko ya kolya oyo bino boyebi te.” Bayekoli bazali komituna, mpe bazali kolobana ete: “Moto moko amemeli ye nde eloko ya kolya?” Na boboto nyonso, Yesu ayebisi bayekoli na ye likambo moko oyo ezali na ndimbola monene mpo na bango nyonso: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”—Yoane 4:32-34.
Mosala oyo Yesu azali kolobela ezali te ya kobuka mbuma, oyo etikali naino sanza minei mpo Yoane 4:35, 36.
ebanda. Kasi, Yesu azali kolobela nde kobuka mbuma ya elimo, mpo abakisi: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma. Libelalibela mobuki-mbuma azali kozwa lifuti mpe azali koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko, mpo moloni ná mobuki-mbuma básepela elongo.”—Ntango mosusu, Yesu azali kokanisa matomba oyo lisolo na ye ná mwasi Mosamaria ekobimisa. Bato mingi ya Sikare babandi kondimela Yesu mpo na litatoli ya mwasi yango, mpo azali koloba na bato: “Ayebisaki ngai makambo nyonso oyo nasalá.” (Yoane 4:39) Na yango, ntango bato ya Sikare bayei na libulu ya mai, basɛngi Yesu akende te mpo ayebisa bango makambo mosusu. Yesu andimi mpe atikali na Samaria mikolo mibale.
Ntango Basamaria bayoki Yesu, mingi na bango bandimeli ye. Balobi na mwasi yango: “Ezali lisusu te mpo na maloba na yo nde tozali kondima; mpo toyoki biso moko mpe toyebi ete moto oyo azali solo mpenza mobikisi ya mokili.” (Yoane 4:42) Na ntembe te, mwasi Mosamaria oyo apesi biso ndakisa malamu mpenza mpo na ndenge oyo tokoki kopesa litatoli oyo etali Kristo, kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka biso mpo báluka koyeba makambo mosusu.
Kobosana te ete likambo yango esalemaki sanza minei liboso eleko ya kobuka mbuma ebanda—mingimingi mbuma ya ɔrje oyo ebandaka na prɛnta na etúká yango. Boye, ekoki sikoyo kozala sanza ya 11 to ya 12. Yango elingi koloba ete nsima ya Elekeli ya mobu 30 T.B., Yesu ná bayekoli na ye balekisi sanza mwambe to koleka na Yudea mpo na koteya mpe kobatisa bato. Bazali sikoyo kozonga epai na bango, na Galile. Makambo nini ezali kozela bango kuna?