MOKAPO 39
Nzambe akanisi mwana na ye
YESU alelaki ntango moninga na ye Lazalo akufaki. Okanisi ete Yehova ayokaki mpasi na motema ntango Yesu anyokwamaki mpe akufaki?— Biblia elobi ete Nzambe akoki ‘koyoka mpasi na motema’ mpe akoki kutu ‘koyoka mawa’ na makambo oyo ezali kosalema.—Nzembo 78:40, 41, NW; Yoane 11:35.
Okoki kokanisa ndenge Yehova ayokaki mawa ntango azalaki kotala Mwana na ye oyo alingaka mingi azali kokufa?— Yesu ayebaki malamu ete Nzambe akobosana ye te. Yango wana, alobaki boye liboso akufa: “Tata, na mabɔkɔ na yo natiki [bomoi] na ngai.”—Luka 23:46.
Yesu ayebaki malamu ete Nzambe akosekwisa ye, akotika ye te “na kati ya Hadesi,” to lilita. Nsima ya lisekwa ya Yesu, ntoma Petelo atángaki maloba oyo ekomamaki na Biblia mpo na Yesu, ete: “Asundolamaki te na kati ya Hadesi mpe mosuni na ye epɔlaki te.” (Misala 2:31; Nzembo 16:10) Ɛɛ, nzoto ya Yesu eumelaki mingi te na kati ya lilita; yango wana epɔlaki te, elingi koloba ebebaki te to ebimisaki nsolo te.
Luka 9:22) Na bongo, bayekoli na ye basengelaki kokamwa te ntango Yesu asekwaki. Kasi bakamwaki?— Tótala ndenge makambo yango elekaki.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ayebisaki kutu bayekoli na ye ete akoumela kati na liwa te. Alimbolelaki bango ete asengelaki “kobomama, mpe na mokolo ya misato kolamuka.” (Moteyi Monene akufi likoló ya nzete ya mpasi na mokolo ya mitano na ngonga soki ya misato nsima ya midi. Yozefe, moto moko ya Sanedrina oyo azali na bomɛngo, azali mpe moto oyo andimelaka Yesu kasi polele te. Ntango ayoki nsango ete Yesu akufi, akei epai ya Pilato, moto ya Loma oyo azali guvɛrnɛrɛ. Asɛngi soki akoki kokitisa nzoto ya Yesu na nzete mpo na kokunda yango. Nsima na yango, Yozefe azwi ebembe ya Yesu akei na yango na elanga moko esika lilita ezali, epai bakokunda ye.
Nsima ya kotya nzoto na lilita, batye libanga moko monene na monɔkɔ na yango. Na ndenge wana, lilita yango ekangami. Sikoyo tokómi na mokolo ya misato, mokolo ya lomingo. Molili ezali naino mpo moi ebimi naino te. Mibali bazali wana mpo na kokɛngɛla lilita yango. Banganga-nzambe bakonzi batindi bango bákɛngɛla yango. Oyebi mpo na nini?—
Banganga-nzambe mpe bayokaki ete Yesu alobaki akosekwa. Na yango, mpo bayekoli ya Yesu báyiba nzoto na ye te mpe na nsima báloba te ete asekwi, banganga-nzambe batye basoda mpo bákɛngɛla lilita yango. Na mbala moko, mabelé ebandi koningana. Na molili, kongɛnga moko ya makasi ebimi. Ezali bongo anzelu ya Yehova! Basoda babangi makasi mpe bakoki ata koningana te. Anzelu yango akei na lilita, abaloli libanga oyo ezali na monɔkɔ na yango mpe alongoli yango. Lilita etikali mpamba!
Ɛɛ, kaka ndenge ntoma Petelo alobaki na nsima: “Yesu yango Nzambe asekwisaki ye.” (Misala 2:32) Nzambe azongisaki Yesu na bomoi na nzoto oyo ekokani na oyo azalaki na yango liboso aya awa na mabelé. Asekwisaki ye na nzoto ya elimo lokola oyo baanzelu bazalaka na yango. (1 Petelo 3:18) Na bongo, mpo bato bámona Yesu, asengeli kolata nzoto ya mosuni. Ezali yango nde asali?— Tiká tólanda lisolo.
Sikoyo moi ebandi kobima. Basoda bakimi. Malia Magadalena ná basi mosusu, oyo bazali bayekoli ya Yesu, bazali kokende na lilita. Bazali kolobana bango na bango ete: ‘Nani akolongolela biso libanga wana ya kilo?’ (Malako 16:3) Kasi ntango bakómi na lilita yango, bakuti balongoli libanga yango. Mpe lilita ezali mpamba! Ebembe ya Yesu ezali te! Na mbala moko, Malia Magadalena apoti mbangu mpo na kokende koyebisa bantoma mosusu ya Yesu.
Basi mosusu batikali pene na lilita yango. Bazali komituna: ‘Nzoto ya Yesu ekoki kozala wapi?’ Na mbala moko, mibali mibale oyo balati bilamba ya ngɛlingɛli babimi. Ezali baanzelu! Balobi na basi yango ete: ‘Mpo na nini bozali koluka Yesu awa? Asili kosekwa. Bókende nokinoki koyebisa bayekoli na ye.’ Kanisá naino mbangu oyo basi yango bapotaki! Ntango bazali na nzela, moto moko akutani na bango. Oyebi moto yango?—
Ezali Yesu, oyo alati nzoto ya mosuni! Ye mpe alobi na basi yango ete: ‘Bókende koyebisa bayekoli na ngai.’ Basi yango basepeli mingi. Bakómi epai bayekoli bazali mpe bayebisi bango ete: ‘Yesu azali na bomoi! Tomoni ye!’ Malia asili koyebisa Petelo ná Yoane ete lilita etikali mpamba. Sikoyo bazali kotala yango, ndenge ozali komona awa na elilingi. Bazali kotala bilamba ya lini oyo bazingaki Yesu, kasi bazali koyeba te likambo nini ekómi. Balingi mpenza kondima ete Yesu azali lisusu na bomoi, kasi likambo yango elekeli bango.
Na mpokwa ya mokolo ya lomingo yango, Yesu abimeli bayekoli mibale oyo bazali kokende na mboka Emausi. Yesu azali kotambola elongo na bango mpe azali kosolola na bango, kasi bango bazali koyeba ye te mpo azali na nzoto oyo ekeseni na oyo azalaki na yango liboso.
Bayei koyeba Yesu kaka ntango asali libondeli na ntango ya kolya. Bayekoli basepeli mingi mpe bazongi mbangu na Yelusaleme atako ezali mosika! Mbala mosusu ezali mwa moke nsima na yango nde Yesu abimeli Petelo mpo na komonisa ye ete Ye azali na bomoi.Na nsima, kaka na mpokwa ya mokolo ya lomingo yango, bayekoli mingi bayangani na shambrɛ moko. Baporte ekangami. Na mbala moko, bámona kaka Yesu abimeli bango! Sikoyo bayebi ete Moteyi Monene azali lisusu solo na bomoi. Kanisá esengo oyo bazali na yango!—Matai 28:1-15; Luka 24:1-49; Yoane 19:38–20:21.
Na boumeli ya mikolo 40, Yesu azali kobimela bayekoli na ye mbala na mbala na nzoto ya ndenge na ndenge mpo na komonisa bango Misala 1:9-11) Nsima ya mwa mikolo bayekoli na ye babandi koyebisa bato nyonso ete Nzambe asekwisi Yesu. Ata ntango banganga-nzambe bazali kobɛta bango mpe kotinda ete báboma bamosusu kati na bango, bazali kaka kosakola. Bayebi ete soki bakufi, Nzambe akokanisa bango kaka ndenge akanisaki Mwana na ye.
ete azali na bomoi. Na nsima atiki mabelé mpe azongi epai ya Tata na ye na likoló. (Bayekoli wana ya liboso ya Yesu bakeseni mpenza na bato mingi lelo oyo! Na bamboka mosusu, bato bakanisaka kaka basimbiliki (lapins) ya Pasika mpe maki ya Pasika oyo bapakoli langi na eleko ya mbula oyo bakanisaka lisekwa ya Yesu. Kasi Biblia elobeli basimbiliki to maki ya Pasika te. Yango elobeli nde ndenge ya kosalela Nzambe.
Tokoki kozala lokola bayekoli ya Yesu ntango tozali koyebisa bato ete Nzambe asalaki likambo moko ya kokamwa ntango asekwisaki Mwana na ye. Tóbanga ata moke te, ata soki bato balobi ete bakoboma biso. Soki tokufi, Yehova akokanisa biso mpe akosekwisa biso, kaka ndenge asalaki mpo na Yesu.
Tozali mpenza na esengo lokola toyebi ete Nzambe akanisaka bato oyo bazali kosalela ye mpe akosekwisa kutu bango, ezali bongo te?— Lokola toyebi makambo yango, tosengeli koluka koyeba ndenge oyo tokoki kosala mpo na kosepelisa Nzambe. Oyebaki ete biso tokoki kosepelisa ye?— Tiká tólobela yango na mokapo oyo elandi.
Soki tozali kondima lisekwa ya Yesu, elikya na biso ekoningana te mpe kondima na biso ekozala makasi. Tosɛngi yo otánga Misala 2:22-36; 4:18-20; mpe 1 Bakolinti 15:3-8, 20-23.