MOKAPO 46
Mai ebomi mokili—Ekoboma yango lisusu?
OYOKÁ naino te moto moko azali kolobela nsuka ya mokili?— Lelo oyo, bato mingi balobelaka yango. Bato mosusu bakanisaka ete mokili ekokufa na etumba moko oyo bato bakobunda na babɔmbi ya niklɛɛrɛ. Okanisi ete mokolo mosusu Nzambe akotika bato bábebisa mabelé na biso ya kitoko?—
Ndenge toyekolaki yango, Biblia elobelaka nsuka ya mokili. Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka.” (1 Yoane 2:17) Okanisi ete nsuka ya mokili elimboli mabelé ekokufa?— Te, Biblia elobi ete Nzambe asalaki mabelé mpo “bato báfanda wana,” elingi koloba mpo bato bázala na bomoi na mabelé mpe báfanda wana na esengo. (Yisaya 45:18) Nzembo 37:29 (NW) elobi ete: “Bayengebene bakozwa mabelé, mpe bakofanda wana libela na libela.” Yango wana, Biblia elobi lisusu ete mabelé ekoumela libela na libela.—Nzembo 104:5; Mosakoli 1:4.
Soki nsuka ya mokili ezali nsuka ya mabelé te, bongo yango elimboli mpenza nini?— Tokoki kozwa eyano soki totaleli malamumalamu oyo esalemaki na mikolo ya Noa. Biblia elimboli ete: ‘Mokili ya ntango wana ekufaki ntango ezindaki na mai.’—2 Petelo 3:6.
Na Mpela ya mikolo ya Noa, ezalaki nde na moto moko oyo abikaki na nsuka ya mokili yango?— Biblia elobi ete Nzambe “abatelaki Noa, mosakoli moko ya boyengebene, elongo na bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.”—2 Petelo 2:5.
Na bongo, mokili oyo esukaki na ntango wana ezalaki nini? Mabelé to nde bato mabe?— Biblia elobi ete ezalaki “mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.” Mpe oyoki babengi Noa “mosakoli.” Okanisi ete azalaki kosakola makambo nini?— Noa azalaki kokebisa bato ete “mokili ya ntango wana” ekosuka.
Ntango Yesu alobelaki Mpela wana, ayebisaki bayekoli na ye makambo oyo bato bazalaki kosala liboso ete nsuka eya. Alobaki na bango boye: “Na mikolo yango liboso ya mpela, [bato bazalaki] kolya mpe komɛla, mibali bazali kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Na nsima, Yesu alobaki ete bato bakosala makambo ya ndenge wana liboso ete mokili ya lelo esuka.—Matai 24:37-39.
mokapo 10?— Basusu bazalaki konyokola baninga na bango mpe bazalaki kotya mobulu. Kasi Yesu alobaki ete ebele ya bato mosusu bazalaki koyoka te ntango Nzambe atindaki Noa asakwela bango.
Maloba ya Yesu emonisi ete makambo oyo bato bazalaki kosala liboso ya Mpela ekoki koteya biso. Oyebi lisusu makambo oyo bato yango bazalaki kosala, ndenge tomonaki yango naNa yango, mokolo mosusu Nzambe ayebisaki Noa ete akani koboma bato mabe na mpela. Mai ekozindisa mabelé mobimba, ata bangomba mpe ekozinda. Yehova ayebisaki Noa ete asala masuwa moko monene. Ezalaki lokola sanduku moko ya monene mpe ya molai, ndenge ozali komona yango na elilingi oyo ezali na lokasa 238.
Nzambe ayebisaki Noa asala masuwa ya monene mpenza oyo ekobikisa ye ná libota na ye ná ebele ya banyama. Noa ná libota na ye basalaki mpenza mosala moko makasi. Bakataki banzete mineneminene mpo na kosala mabaya mpe babandaki kosala masuwa. Mosala yango eumelaki ebele ya bambula mpo masuwa ezalaki monene mpenza.
Ozali koyeba lisusu mosala mosusu oyo Noa asalaki na bambula nyonso oyo azalaki kosala masuwa?— Azalaki kosakola mpe kokebisa bato ete Mpela ezali koya. Ezalaki nde na moto moko oyo ayokaki likebisi na ye? Ata moto moko te, kaka libota ya Noa. Bato mosusu nyonso bamipesaki kaka na kosala makambo mosusu. Oyebi lisusu makambo oyo Yesu alobaki ete bazalaki kosala?— Bamipesaki kaka na kolya, komɛla mpe kobala. Bazalaki kokanisa te ete bazali mpenza bato mabe, mpe bazalaki kutu na ntango te ya koyoka Noa. Tótala oyo ekómelaki bango.
Ntango Noa mpe libota na ye bakɔtaki na masuwa, Yehova akangaki porte. Bato oyo bazalaki libándá bazalaki kaka kondima te ete Mpela ekoya. Kasi na mbala moko, mai ebandaki kokwea! Mbula yango ezalaki ya ndenge mosusu. Ezalaki mbula moko ya makasi mpenza! Eumelaki te, mai yango esalaki bibale ya minene Matai 24:39; Genese 6:5-7.
oyo ezalaki kosala makɛlɛlɛ mingi. Ekweisaki banzete ya minene mpe ebalolaki mabanga ya minene lokola kaka mwa mabanga ya mike. Bongo bato oyo bakɔtaki na masuwa te?— Yesu alobi ete: “Mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Bato nyonso oyo bakɔtaki na masuwa te bakufaki. Mpo na nini?— Kaka ndenge Yesu alobaki, mpo “batyaki likebi te.” Bayokaki te!—Kobosana te, Yesu alobaki ete oyo ekómelaki bato wana ezali liteya mpo na biso lelo oyo. Liteya nini tokoki kozwa?— Soki bato babomamaki ezali te kaka mpo bazalaki bato mabe, kasi lisusu ezali mpo mingi bazalaki na ntango te ya koyekola makambo ya Nzambe mpe makambo oyo ye alingaki kosala. Tosengeli kokeba ete tózala lokola bango te, ezali bongo te?—
Okanisi ete Nzambe akoboma lisusu mokili na mpela?— Te, Nzambe apesaki elaka ete akoboma lisusu mokili na mpela te. Alobaki ete: “Natii monama na ngai na lipata, mpe yango ekozala elembo.” Yehova alobaki ete monama ekozala elembo mpo na komonisa ete “mai ekoya lisusu mpela monene te, ete eboma mosuni nyonso te.”—Genese 9:11-17.
Na bongo, tokoki kondima ete Nzambe akoboma lisusu mokili na mpela te. Ata bongo, ndenge tomonaki yango, Biblia elobeli mpenza nsuka ya mokili. Ntango Nzambe akoboma mokili oyo, akobikisa nani?— Akobikisa nde bato
oyo bamipesaki na makambo mosusu, oyo balingaki soki moke te koyekola makambo na ye? Akobikisa nde bato oyo bazalaki na ntango te ya koyekola Biblia? Yo okanisi nini?—Biso tolingi kozala na kati ya bato oyo Nzambe akobikisa, ezali bongo te?— Ekozala malamu libota na biso ezala lokola libota ya Noa mpo Nzambe akoka kobikisa biso nyonso, ezali bongo te?— Soki tolingi kobika na nsuka ya mokili, tosengeli koyeba ndenge oyo Nzambe akoboma yango mpe ndenge akosala mokili na ye ya sika mpe ya boyengebene. Tótala ndenge akosala yango.
Biblia epesi biso eyano na Danyele mokapo 2, vɛrsɛ 44. Mokapo yango ezali kolobela ntango na biso, elobi boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi [to, guvɛrnema] ekobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”
Okangi mpenza ntina ya maloba wana?— Biblia elobi ete guvɛrnema ya Nzambe ekobebisa baguvɛrnema nyonso oyo ezali awa na mabelé. Mpo na nini?— Ezali mpo bazali kotosa te Moto oyo Nzambe atye Mokonzi. Mokonzi yango nani?— Ezali Yesu Klisto!
Yehova Nzambe azali na lotomo ya kotya guvɛrnema oyo esengeli koyangela, mpe aponi Mwana na ye, Yesu, azala Mokonzi. Mosika te, Moyangeli oyo Nzambe atye, Yesu Klisto, akokamba mampinga oyo ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya mokili oyo. Biblia elobi likambo yango na Emoniseli mokapo 19, vɛrsɛ 11 tii 16 kaka ndenge elilingi oyo emonisi yango. Biblia ebengaka etumba ya Nzambe oyo ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya mokili ete Hala–Magedona, to Armagedona.
Emoniseli 16:14, 16) Ɛɛ, Armagedona ezali etumba ya Nzambe, mpe akotinda Yesu Klisto akamba mampinga ya likoló na etumba yango. Etumba ya Armagedona ekómi nde pene? Tiká tótala ndenge tokoki koyeba yango.
Nzambe alobi ete Bokonzi na ye ekobebisa baguvɛrnema ya bato. Kasi asɛngi nde biso tóbebisa yango?— Te, Biblia ebengi Armagedona “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Mpo na oyo etali ntango oyo Nzambe akolongola bato nyonso ya mabe mpe akobikisa baoyo bazali kosalela ye, tótánga Masese 2:21, 22; Yisaya 26:20, 21; Yilimia 25:31-33; mpe Matai 24:21, 22.