MOKAPO 12
Bimisáká maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
“Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga.”—BAEFESE 4:29.
1-3. (a) Nini ezali moko ya makabo ya malamu oyo Yehova apesá biso? Nini ekomonisa ete tosaleli yango mabe? (b) Ndenge nini tokoki kosalela malamu likoki ya koloba?
TATA moko apesi mwana na ye ya elenge velo. Tata yango azali na esengo ndenge akabeli mwana na ye kado ya malamu mpenza. Kasi, kanisá ete mwana yango atambwisi velo yango na loyenge, atuti moto mpe azokisi ye! Tata akoyoka ndenge nini?
2 Yehova azali Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yakobo 1:17) Moko ya makabo yango ezali likoki na biso ya koloba. Likoki yango esalisaka biso tóbimisa makanisi mpe mayoki na biso. Tokoki koloba makambo oyo ekosalisa bato mpe ekopesa bango esengo. Kasi, maloba na biso ekoki mpe kozokisa basusu mpe kopesa bango mpasi.
3 Maloba ezali na nguya mingi, mpe Yehova ateyaka biso ndenge ya kosalela malamu likoki ya koloba. Alobi na biso: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” (Baefese 4:29) Tótalela ndenge oyo tokoki kosalela likabo yango ya Nzambe na ndenge oyo ekosepelisa ye mpe ekolendisa basusu.
KEBÁ NA MALOBA NA YO
4, 5. Mokanda ya Masese emonisi ete maloba ezali na nguya, yango ekoki koteya biso nini?
4 Maloba ezali na nguya; yango wana tosengeli kokeba na makambo oyo tozali koloba mpe ndenge oyo tozali koloba yango. Masese 15:4 elobi: “Kimya ya lolemo ezali nzete ya bomoi, kasi bongolabongola kati na yango nde kobukana na elimo.” Ndenge kaka nzete moko kitoko epesaka malili mpe ebatelaka bomoi, maloba ya boboto ekitisaka motema ya moto oyo ayoki yango. Nzokande, maloba makasi ezokisaka basusu mpe esalaka bango mpasi.—Masese 18:21.
5 “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Masese 12:18) Maloba oyo ezangi boboto ekoki kopesa moto mpasi na motema mpe kobebisa boninga. Mbala mosusu ozali koyeba ndenge moto moko alobaki na yo na boboto te mpe mpasi oyo esalaki yo. Kasi, vɛrsɛ yango ebakisi ete: “Lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” Maloba ya malamu ekoki kosilisa mpota oyo motema ezokaki mpe kozongisa boninga oyo ebebaki mpo na kozanga boyokani. (Tángá Masese 16:24.) Na yango, lokola maloba na biso ekoki kopesa mpasi to kolendisa, tosengeli kokeba na maloba na biso.
6. Mpo na nini kopona makambo ya koloba ezali etumba?
6 Ntina mosusu ya kokeba na maloba na biso ezali ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. “Mposa ya motema ya moto ezali mabe,” mpe mbala mingi maloba na biso emonisaka oyo ezali na motema na biso. (Ebandeli 8:21; Luka 6:45) Yango wana, kopona makambo ya koloba ekoki kozala etumba mpenza. (Tángá Yakobo 3:2-4.) Kasi, tosengeli kosala makasi mpo na kobongisa elobeli na biso.
7, 8. Ndenge nini maloba na biso ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova?
7 Tosengeli mpe kokeba na maloba na biso mpo tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na makambo oyo tolobaka mpe ndenge oyo tolobaka yango. Yakobo 1:26 emonisi ete soki moto akanisaka ete asambelaka Nzambe kasi apekisaka lolemo na ye te, azali kokosa motema na ye moko, mpe losambo na ye ezali mpamba. Soki tozali kokeba te na maloba na biso, tokoki kobebisa boyokani na biso na Yehova mpo na libela.—Yakobo 3:8-10.
8 Ezali polele ete tosengeli kokeba na maloba na biso mpe ndenge na biso ya koloba. Mpo na kosalisa biso tósalela malamu likoki ya koloba na ndenge oyo Yehova alingi tósalela yango, tosengeli koyeba maloba nini ebongi tóboya.
MALOBA OYO ETONGAKA TE
9, 10. (a) Bato mingi lelo bazali na elobeli ya ndenge nini? (b) Mpo na nini toboyaka kozala na elobeli ya mbindo?
9 Bato mingi lelo bazali na elobeli ya nsɔni to ya mbindo. Mingi bakanisaka ete basengeli koloba na nkanda to kobimisa maloba ya mpambampamba mpo basusu bákanga ntina. Mbala mingi, bato ya teyatre basalaka masɛki ya nsɔni mpe balobaka makambo ya mbindo mpo na kosɛkisa bato. Kasi, ntoma Paulo alobaki: “Bólongola makambo oyo nyonso mosika na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” (Bakolose 3:8) Alobaki mpe ete “masɛki ya nsɔni” esengeli ‘kotángama ata kotángama te na kati’ ya bakristo ya solo.—Baefese 5:3, 4.
10 Yehova mpe bato oyo balingaka ye basepelaka te na maloba ya nsɔni. Ezali mbindo. Biblia etángi “mbindo” na kati ya “misala ya nzoto.” (Bagalatia 5:19-21) “Mbindo” esangisi masumu ndenge na ndenge, mpe momeseno moko ya mbindo ekoki komema na mosusu. Soki moto akómi na momeseno ya kosalela elobeli ya mbindo, ya nsɔni makasi mpe aboyi kobongwana, ekoki komonisa ete asengeli lisusu kozala na kati ya lisangá te.—2 Bakorinti 12:21; Baefese 4:19; talá Maloba ya nsuka ya lisolo 23.
11, 12. (a) Matɔngi ezali nini? (b) Mpo na nini tosengeli koboya kokosela basusu makambo?
11 Tosengeli mpe koboya kotɔnga to kosilisa basusu loposo. Biso nyonso tolingaka kotyela basusu likebi mpe kopesa bansango ya baninga mpe bato ya libota na biso. Ata na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki koluka koyeba ndenge bandeko na bango bazali mpe ndenge oyo bakokaki kosalisa bango. (Baefese 6:21, 22; Bakolose 4:8, 9) Kasi, ezali mpasi te masolo ya bato ebongwana matɔngi. Soki tozali na momeseno ya kotɔnga basusu, tokoki koloba makambo oyo ezali solo te to kobimisa basekele na bango. Soki tozali ekɛngɛ te, maloba na biso ekoki kokóma makambo ya lokuta, to kokosela basusu makambo. Bafarisai bakoselaki Yesu makambo ntango bafundaki ye mpo na makambo oyo asalaki te. (Matai 9:32-34; 12:22-24) Kokosela moto makambo, ebebisaka lokumu na ye, ebimisaka koswana, epesaka mpasi, mpe ebebisaka boninga.—Masese 26:20.
12 Yehova alingaka tósalela maloba oyo esalisaka mpe elendisaka basusu, kasi te oyo ekabolaka baninga. Yehova ayinaka moto oyo “abimisaka kowelana na kati ya bandeko.” (Masese 6:16-19) Mokoseli bato makambo ya libosoliboso ezali Satana, oyo akoselaki Nzambe makambo. (Emoniseli 12:9, 10) Lelo, bato mingi balobaka lokuta mpo na basusu. Kasi, esengeli kozala bongo te na lisangá ya bokristo. (Bagalatia 5:19-21) Yango wana, tosengeli kokeba na makambo oyo tolobaka mpe tosengeli ntango nyonso kokanisaka liboso ya koloba. Liboso oloba likambo ya moto, omituna boye: ‘Likambo oyo nalingi naloba ezali solo? Ezali ya boboto? Ekosalisa? Nakolinga nkolo-likambo ayoka likambo yango? Nakoyoka ndenge nini soki moto alobi bongo mpo na ngai?’—Tángá 1 Batesaloniki 4:11.
13, 14. (a) Maloba ya kofinga esalaka bato nini? (b) Mpo na nini bakristo basengeli koboya ezaleli ya kofinga basusu?
13 Na bantango mosusu, biso nyonso toyokaka mawa mpo na makambo mosusu oyo tolobaki. Kasi, tosengeli te kokolisa momeseno ya koloba mabe ya basusu, to kokatela bango mangala. Maloba ya kofinga ezali na esika te na bomoi na biso. Ntoma Paulo alobaki: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.” (Baefese 4:31) Babiblia mosusu ebongoli “maloba ya kofinga” na “maloba ya mabe.” Maloba ya kofinga esilisaka lokumu ya moto mpe etindaka ye amimona ntina te. Mingimingi bana bakoki koyoka mpasi mbala moko soki bafingi bango, yango wana tosengeli kokeba na maloba na biso.—Bakolose 3:21.
14 Biblia ekebisi biso mpenza na likambo ya kofinga basusu mpo na koyokisa bango mpasi. Ekozala mawa mingi soki moto azali kosala molongani to bana na ye ndenge wana! Kutu, moto oyo aboyi kotika ezaleli ya kofinga basusu akoki kolongolama na lisangá. (1 Bakorinti 5:11-13; 6:9, 10) Ndenge tomoni yango, soki tolobaka makambo ya mbindo, ya lokuta, to oyo ezangi boboto, tokobebisa boyokani na biso na Yehova mpe basusu.
MALOBA OYO ETONGAKA
15. Maloba ya ndenge nini etongaka?
15 Ndenge nini tokoki kosalela likoki ya koloba na ndenge oyo Yehova alingi? Ya solo, Biblia elobi te maloba nini tosengeli koloba mpe koloba te, kasi elobi ete tosengeli koloba “nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga.” (Baefese 4:29) Maloba oyo etongaka ezalaka pɛto, ya boboto, mpe ya solo. Yehova alingi tózala na maloba oyo ekoki kolendisa mpe kosalisa basusu. Mbala mosusu likambo yango ekoki kozala pɛtɛɛ te. Esɛngaka milende mingi mpo na koloba maloba ya malamu. (Tito 2:8) Tólobela ndenge oyo tokoki koloba maloba ya kotonga basusu.
16, 17. (a) Mpo na nini tosengeli kopesaka basusu longonya? (b) Banani oyo tokoki kopesa longonya?
16 Yehova ná Yesu bazali ndakisa ya malamu na oyo etali kopesa basusu longonya. Tosengeli kolanda ndakisa na bango. (Matai 3:17; 25:19-23; Yoane 1:47) Mpo na kopesa moto longonya na ndenge oyo ekolendisa ye mpenza, tosengeli kokanisa malamu mpe kotyela ye mpenza likebi. Masese 15:23 elobi: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!” Tosepelaka ntango moto apesi biso longonya oyo euti na motema mpo na mosala na biso ya makasi to alobi ete asepeli na mosala oyo tosali.—Tángá Matai 7:12; talá Maloba ya nsuka ya lisolo 27.
17 Soki tozwi momeseno ya koluka komona makambo malamu ya basusu, ekozala mpasi te tópesa bango longonya oyo euti na motema. Na ndakisa, mbala mosusu omonaka ete moto moko na lisangá amibongisaka malamu mpo na badevuare na ye to asalaka makasi apesa biyano na makita. Ekoki kozala na elenge moko oyo akɔtelaki mateya ya solo na kelasi, to ndeko moko ya mobange oyo abimaka mosala ya kosakola sanza nyonso. Koyebisa bango ete osepeli mpo na oyo basali ekoki kolendisa bango mingi. Ezali mpe na ntina mingi ete mobali ayebisaka mwasi na ye ete alingaka ye mpe asepelaka na ye. (Masese 31:10, 28) Ndenge kaka nzete ezalaka na mposa ya pole mpe mai, bato balingaka komona ete basusu basepelaka na bango. Ezali bongo mingimingi mpo na bana. Lukáká mabaku ya kopesa bango longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu mpe milende na bango. Kopesa basusu longonya ekoki kopesa bango mpiko, kobakisa lokumu na bango mpe kopesa bango makasi ya kosala oyo ezali sembo.
18, 19. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kolendisa mpe kobɔndisa basusu? Ndenge nini tokoki kosala yango?
18 Ntango tolendisi mpe tobɔndisi basusu, tozali kolanda ndakisa malamu ya Yehova. Atyelaka bato “ya komikitisa” mpe “bato oyo batutami” likebi mingi. (Yisaya 57:15) Yehova alingi ‘tókoba kobɔndisana’ mpe ‘tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:11, 14) Ntango toluki kosala yango, amonaka milende na biso mpe asepelaka na yango.
19 Okoki komona ete moto moko na lisangá alɛmbi nzoto to azali konyokwama na makanisi. Okoki koloba nini mpo na kosalisa ye? Mbala mosusu okokoka kosilisa mokakatano na ye te, kasi okoki kosala mwa likambo oyo ekomonisa ete otyelaka ye likebi. Na ndakisa, okoki kozwa bibongiseli mpo bólekisa ntango elongo. Okoki kotángela ye vɛrsɛ oyo ekolendisa ye mpe kosɛnga ye bósala libondeli. (Nzembo 34:18; Matai 10:29-31) Yebisáká bato ya ndenge wana ete bandeko ya lisangá balingaka bango. (1 Bakorinti 12:12-26; Yakobo 5:14, 15) Mpe lobá na lolenge oyo ekomonisa ete makambo oyo ozali koloba euti mpenza na motema mpe oyebi makambo oyo ozali koloba.—Tángá Masese 12:25.
20, 21. Nini esalaka ete bato bándima toli mbala moko?
20 Maloba ya kotonga ekoki mpe kozala toli ya malamu oyo topesi basusu. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tozalaka na mposa ya toli na bantango mosusu. Masese 19:20 elobi: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.” Ezali kaka bankulutu te nde bakoki kopesa basusu toli. Baboti basengeli kopesa bana na bango malako. (Baefese 6:4) Mpe bandeko basi bakoki kopesana batoli ya malamu bango na bango. (Tito 2:3-5) Lokola tolingaka bandeko na biso, tosengeli kosala makasi mpo tópesa bango toli na ndenge ya malamu. Nini ekoki kosalisa biso?
21 Mbala mosusu oyebi lisusu ntango moto moko apesaki yo toli mpe ondimaki yango mbala moko. Mpo na nini toli yango ezalaki malamu? Ntango mosusu omonaki ete moto yango azalaki mpenza kotyela yo likebi. To alobaki na yo na bolingo mpe na boboto. (Bakolose 4:6) Ekoki kozala ete toli yango eutaki na Biblia. (2 Timote 3:16) Ezala totángi mpenza maloba ya Biblia to te, toli nyonso oyo tokopesa esengeli kouta na Biblia. Moto moko te asengeli kotya basusu mbamba mpo bándima makanisi na ye to kobalola bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolongisa makanisi na ye. Kokanisa ndenge oyo bapesaki yo toli ekoki kosalisa yo ntango olingi mpe kopesa basusu toli.
22. Olingi kosalela likabo ya koloba ndenge nini?
22 Likoki ya koloba ezali likabo ya Nzambe. Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na ye esengeli kotinda biso tósalela likabo yango malamu. Kobosana te ete maloba ezali na nguya ya kotonga to ya kobebisa. Yango wana, tósala nyonso oyo tokoki mpo tózala na maloba oyo ekopesa basusu makasi mpe ekolendisa bango.