LITEYA 67
Bifelo ya Yerusaleme
Tózonga mwa bambula na nsima. Moyisraele moko na nkombo Nehemia, mosaleli ya Mokonzi Artazerezese, azalaki kofanda na Shushane, engumba moko ya Perse. Bandeko ya Nehemia bautaki na Yuda mpe bamemelaki ye nsango ya mabe, balobaki na ye ete: ‘Bato oyo bazongaki na Yerusaleme bazali na libateli te. Bifelo ya engumba mpe baporte na yango oyo bato ya Babilone babebisá etongamá lisusu te.’ Nehemia ayokaki mpasi na motema. Ayokaki mposa ya kokende na Yerusaleme mpo na kosalisa bango, mpe abondelaki Nzambe mpo mokonzi atika ye akende.
Na nsima, mokonzi amonaki ete Nehemia akómaki mawamawa. Alobaki na ye boye: ‘Namoná yo naino boye te. Likambo nini?’ Nehemia azongisaki ete: ‘Mpo na nini nayoka mawa te lokola Yerusaleme mboka na ngai ebebi?’ Mokonzi atunaki ye: ‘Olingi nasalela yo nini? Na mbala moko, Nehemia abondelaki na nse ya motema. Mpe alobaki: ‘Nabondeli yo, tiká ngai nakende na Yerusaleme kotonga lisusu bifelo na yango.’ Mokonzi Artazerezese ayebisaki Nehemia ete akoki kokende, mpe mokonzi asalaki nyonso mpo mobembo molai oyo akosala eleka malamu. Atyaki mpe Nehemia guvɛrnɛrɛ ya Yuda mpe apesaki ye mabaya mpo na kobongisa baporte.
Ntango Nehemia akómaki na Yerusaleme, atalaki malamumalamu bifelo ya engumba yango. Na nsima, ayanganisaki banganga-nzambe mpe bakambi mpe ayebisaki bango boye: ‘Ezali mawa. Tosengeli kobanda mosala.’ Bato bandimaki, mpe babandaki kotonga bifelo.
Kasi banguna mosusu ya Bayisraele babandaki kotyola bango mpe koloba ete: ‘Ata gambala ekoki kokweisa efelo oyo bozali kotonga.’ Bato oyo bazalaki kotonga balandaki kofinga wana te, bakobaki kaka kotonga. Efelo yango ekómaki molai mpe makasi.
Banguna bazwaki mokano ya kouta bipai na bipai mpo na koya kobundisa Yerusaleme na mbalakaka. Ntango Bayuda bayokaki likambo yango, bakómaki kobanga. Kasi Nehemia alobaki na bango ete: ‘Bóbanga te. Yehova azali na biso.’ Atyaki basinzili mpo na
kobatela bato oyo bazalaki kotonga, mpe banguna bakokaki kobundisa bango te.Nsima ya mikolo 52, basilisaki kotonga bifelo mpe kosala baporte. Nehemia amemaki Balevi nyonso na Yerusaleme mpo na kosala molulu ya kofungola yango. Abongisaki bituluku ya bayembi mibale. Bamataki na bifelo na baeskalye oyo ezalaki na Porte ya Liziba mpe na nsima, etuluku na etuluku etambolaki ngambo na ngambo ya engumba. Babɛtaki kelelo, nzɛnzɛ, sɛmbalɛ mpe bayembelaki Yehova. Ezera abimaki na etuluku moko, mpe Nehemia abimaki na etuluku mosusu, bayaki kokutana na tempelo. Bato nyonso, elingi koloba, basi, mibali ná bana, bapesaki Yehova mbeka mpe basalaki fɛti. Lokito ya esengo ya mingongo na bango eyokanaki mosika mpenza.
“Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga.”—Yisaya 54:17