Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

INDONÉSIE

Liyangani oyo etiká nsango

Liyangani oyo etiká nsango

KOBANDA na mwa 15 tii na mwa 18 na sanza ya mwambe na 1963, ebele ya basakoli oyo bautaki na Indonésie mobimba mpe bandeko 122 oyo bautaki na mikili mosusu bayaki na engumba Bandung, na Java occidental. Bayaki liyangani ya liboso oyo esangisaki mikili mingi na Indonésie, oyo elobaki “Nsango malamu ya seko.”

Mpo na kobongisa liyangani yango, bandeko balongaki mikakatano ebele. Esika ya kosala liyangani yango ebongwanaki mbala misato mpo na milulu ya lipanda ya ekólo. Ntango guvɛrnema ematisaki mbongo ya tike mpo biloko emataki ntalo, bandeko mosusu bazwaki kaka bibongiseli mosusu mpo na koya na liyangani yango. Ndeko moko atambolaki makolo mikolo motoba mpo na kokóma na esika ya liyangani. Bandeko 70 oyo bautaki na Sulawesi basalaki mobembo ya mikolo mitano na masuwa oyo etondaki na bato.

Na liyangani yango, bandeko ya Indonésie basepelaki mingi kokutana na bandeko oyo bautaki na mikili mosusu, kati na bango bandeko mibale ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, Frederick Franz ná Grant Suiter. Ndeko moko oyo ayaki na liyangani yango alobaki boye: “Bandeko bazali mpenza na esengo; bazali kaka kosɛkasɛka.”

Bato 750 bayaki na liyangani yango, mpe 34 bazwaki batisimo. Ndeko Ronald Jacka alobaki boye: “Liyangani wana oyo etiká nsango etindaki bato mingi oyo bazalaki kosepela na solo bámonisa yango polele. Ebakiselaki bandeko esengo na mosala ya Nzambe.”

Ndeko Ronald Jacka (na lobɔkɔ ya mobali) azali kosala diskur na liyangani ya 1963 “Nsango malamu ya seko,” ndeko mosusu azali kobongola diskur