Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilimu mabe bazali kokosa ete bakufi bazali na bomoi

Bilimu mabe bazali kokosa ete bakufi bazali na bomoi

Biblia ezali koloba ete Satana azali “kozimbisa bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Satana mpe bilimu mabe na ye balingi te ete tondimela Liloba na Nzambe, Biblia. Bazali komeka kondimisa bato ete bakufi bazali na bomoi kati na esika moko na mokili na elimo. Totalela lolenge nini basalelaka.

Mangomba na lokuta

Bato, nyama, mbisi mpe ndeke: bango nyonso bazali milimo

Mangomba mingi mazali koteya ete moto azali na molimo oyo, nsima na kokufa ya nzoto na mosuni, ezali kokende na mokili na elimo. Balobaka ete nzoto nde ezali kokufa kasi molimo te. Lisusu, mangomba yango mazali koloba ete molimo mokoki kokufa te; ete ekufaka te.

Kasi Liloba na Nzambe ezali koteya bongo te. Na yango, Biblia emonisi ete molimo, ezali moto, kasi ezali te eloko moko oyo ezwami kati na moto. Na ndakisa, kati na lisolo ya kozalisama na Adam, Biblia elobi ete: “Na ntango yango Jéhovah Nzambe asalaki moto na putulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Na bongo, Adam azwaki molimo te; azalaki nde molimo.

Nyama ebengami mpe milimo.​—Genese 1:20, 21, 24, 30.

Lokola liloba na Biblia “molimo” elimboli moto ye moko, tokoki kokamwa te na koyoka ete milimo mikokufaka mpe mizali kokufa. Makomami mazali koloba:

  • “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.”​—Ezekiele 18:4.

  • “Samson alobaki ete: ‘Tika molimo na ngai mokufa esika moko na Bafilisitia!’”​—Basambisi 16:30, MN.

  • “Ekoki na mokolo na sabata kosala malamu to mabe, kobikisa molimo to koboma yango?”​—Malako 3:4, MN.

Biblia ezali komonisa ete molimo ekufaka

Mikapo mosusu ya Makomami mizali komonisa ete milimo mikoki kobomama (Genese 17:14), kobetema na mopanga (Yosua 10:37), kokangama na nkingo (Yobo 7:15) mpe kozinda na mai (Yona 2:5). Na yango, molimo ekufaka.

Soki otangi Biblia longwa ebandeli kino nsuka, okokuta esika moko te liloba ete “molimo ekokufaka te.” Molimo ya moto ezali elimo te. Liteya ya molimo ekufaka te ezali liteya na Biblia te. Ezali liteya na Satana mpe badémo na ye. Jéhovah azali koyina lokuta nyonso ya mangomba.​—Masese 6:16-19; 1 Timoté 4:1, 2.

Bato bakosololaka na bilimu

Bilimu mabe bazali mpenza kokosa ete bazali bato oyo basili kokufa

Satana azali mpe na mwango mosusu mpo na kozimbisa bato: basololi na bilimu. Mosololi na bilimu azali moto oyo akoki kozwa nsango uta na mokili na elimo. Ebele na bato, bakisa mpe bango moko basololi na bilimu, bazali kokanisa ete nsango yango ezali kouta na bilimu ya bakufi. Kasi, lokola touti komona yango kati na Biblia, ekoki kosalema te.​—Mosakoli 9:5, 6, 10.

Na bongo, nsango yango ekoutaka epai na nani? Epai na bato mosusu te bobele na bilimu mabe. Bilimu mabe bazali na makoki ya kotala bato malamumalamu na ntango bazali na bomoi; bayebi ndenge nini moto azalaki koloba, bomoto nini azalaki na yango, makambo oyo azalaki kosala mpe makambo oyo ayebaki. Na bongo ezali na bango petee mpo na komekola bato oyo basili kokufa.​—1 Samwele 28:3-19.

Masolo ya lokuta

Satana azali na mwango mosusu mpo na kondimisa lokuta oyo na ntina na bakufi: masolo ya lokuta. Mbala mingi, masolo wana ya lokuta mazali kopengola bato na Biblia.​—2 Timoté 4:4.

SBamosusu bazali kokanisa ete basili komona bato oyo bazongi longwa epai na bakufi

Na Afrike masolo mingi mazali kotambola ete bato bamonaki bato oyo basila kokufa bazali na bomoi na mboka mosusu. Mbala mingi, bamonaka bango mosika na mboka oyo bango bazalaki kofanda. Kasi omituna motuna oyo: ‘Ezali mpenza likambo na mayele na kokanisa ete moto oyo azali na likoki ya kozonga longwa na bakufi ete asala yango na mboka mosusu, mosika na libota na ye mpe na baninga na ye?’

Lisusu, ekoki kozala ete moto oyo bamonaki, akokani bobele kokokana mpamba elongo na mowei. Na ndakisa, wana ezalaki bango kati na mosala ya kosakola, basakoli mibale baklisto bamonaki mobange moko ya mobali azali kolanda bango na boumeli na ngonga mingi. Batunaki ye soki mpo na nini azali kolanda bango, mpe mobange yango ayanolaki bango ete akanisaki nde moko na bango mibale azali ndeko na ye oyo akufaki mbula mingi liboso. Ya solo, amikosaki; kasi aboyaki kondima. Kanisa oyo mobange wana asololaki na nsima epai na baninga na ye mpe na bato bafandi zingazinga na ye!

Bimonaneli, bandoto mpe mingongo

Bilimu mabe bazali kozimbisa bato na nzela na bandoto, na bimonaneli mpe na mingongo

Na ntembe te osila koyoka lisolo na ntina na bato oyo bamonaki, bayokaki to balotaki makambo ya kokamwa. Baoyo basili kokutana na makambo wana oyo mauti na mokili ya bilimu mbala mingi babangaki makasi. Marein, ye oyo afandi na Afrike ya weste, azalaki koyoka mbala na mbala mongongo ya nkoko na ye oyo asila kokufa, yango ezalaki kobenga ye na butu. Marein azalaki konganga mpo na kobanga mpe azalaki kolamusa bato nyonso ya ndako na ye. Asukaki na kozwa ligboma.

Kanisa naino, soki bakufi bazali solo na bomoi, mbele bakobangisa boye bato oyo bango balingi? Ekoki mpenza kozala bongo te. Ezali bilimu mabe nde bazali koyokisa nsango motindo wana ya mabe.

Kasi, tokoloba boni mpo na nsango oyo ezali komeka kopesa lisalisi to elendiseli? Na ndakisa, na Sierra Leone, Gbassay azalaki maladi. Alotaki tata na ye oyo akufa, kopesaka ye malako: esengelaki na ye akende epai na nzeté moko boye, akamata lokasa moko na yango, asangisa yango na mai mpe amela yango nyonso. Liboso ete asala bongo, asengelaki kolobana na moto moko te. Alandaki malako yango mpe abikaki.

Mwasi mosusu azali koyebisa ete mobali na ye, nsima na kokufa, abimelaki ye na butu. Azali kolimbola ete azalaki na nzoto kitoko mpe na molato kitoko.

Bansango wana mpe bimonaneli wana emonani lokola ete ezali malamu mpe na ntina. Euti mpenza epai na Nzambe? Te. Mpamba te Jéhovah azali “Nzambe na solo.” (Nzembo 31:5) Ata mbala moko te akolinga kotyela biso motambo to kokosa biso. Bobele bilimu mabe nde bazali kosala yango.

Kasi badémo ya malamu bazali? Te. Ata soki mbala mosusu bameki komimonisa malamu, bazali bango nyonso mabe. Ntango Diable asololaki na Eva, amimonisaki moninga na ye. (Genese 3:1) Kasi akomaki ndenge nini nsima na koyoka ye mpe kosala oyo ayebisaki ye? Akufaki.

Satana alobaki ete Eva akokufa te. Eva andimelaki ye, kasi asukaki na kokufa

Oyebi ete emonanaka mbala mingi moto moko ya mabe amimonisa moninga ya bato oyo ye alingi kokosa. Lisese moko ya Afrike elobaka ete, “Mino pembe, motema moindo.” Mpe Liloba na Nzambe ebakisi ete: “Satana akomimonisaka lokola anzelu na moi.”​—2 Bakolinti 11:14.

Nzambe azali kosalela lisusu bandoto te, soko mpe bimonaneli, soko mpe mingongo miuti na mokili ya bilimu mpo na kosolola elongo na bato awa na mabelé. Azali kokamba bango mpe kopesa bango batoli na nzela na Biblia, oyo ekoki kosunga moto moko ete “aselingwa mpo na misala nyonso malamu.”​—2 Timote 3:17.

Na yango, ntango Jéhovah azali kokebisa biso mpo na mayele mabe ya Diable, ezali mpo ete alingi biso. Ayebi ete badémo bazali banguna mabe.