Kobosana mokolo ya Yehova te
Mokapo ya ntuku mibale
Kobosana mokolo ya Yehova te
1. Ntango oyebaki mpo na mbala ya liboso ete ebongiseli ya mabe ya makambo ya ntango oyo etikali moke ekufa mpe lobiko ekómi pene, omiyokaki ndenge nini?
MOKO ya makambo ya liboso oyo oyekolaki na Biblia ezalaki ete mokano ya Yehova ezali ete mabele mobimba ekóma paladiso. Na mokili wana ya sika, bitumba, mobulu, bobola, maladi, bampasi, mpe liwa ekozala lisusu te. Ata mpe bato oyo bakufá bakosekwa. Oyo nde elikya kitoko! Kozala oyo ezangi komonana ya Klisto lokola Mokonzi oyo azali koyangela, ebandaki na 1914 mpe banda ntango wana tokɔti na mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe, yango emonani mpenza ete kokokisama ya makambo wana nyonso ekómi pene. Na nsuka ya mikolo oyo ya nsuka, Yehova akobebisa ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe akokɔtisa biso na mokili oyo alakaki!
2. “Mokolo ya Yehova” ezali nini?
2 Biblia ezali kobenga ntango yango ya koboma ete “mokolo ya Yehova.” (2 Petelo 3:10) Ezali “mokolo ya nkanda ya [Yehova]” mpo na kotɛmɛla mokili mobimba ya Satana. (Sefania 2:3) Ekokóma na ntango na yango eleki makasi na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso . . . , oyo ebengami na Liebele ete Hala-Magedona [Armagedon],” ntango “bakonzi ya mabele mobimba” bakobomama. (Emoniseli 16:14, 16) Bomoi na yo ezali komonisa ete ondimi mpenza ete “mokolo ya Yehova” ekómi pene?—Sefania 1:14-18; Yilimia 25:33.
3. (a) Mokolo ya Yehova ekoya ntango nini? (b) Mpo na nini emonani ete ezali likambo malamu ndenge Yehova ayebisaki liboso te “mokolo yango to ngonga yango”?
3 Biblia eyebisi biso te dati mpenza oyo Yesu Klisto akoya lokola Moto oyo akopesa etumbu euti na Yehova likoló ya ebongiseli ya makambo ya Satana. Yesu alobaki ete: “Na oyo etali mokolo yango to ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu na likoló ezala Mwana, kaka Tata.” (Malako 13:32) Baoyo balingaka mpenza Yehova te, basepelaka kokanisa ete mokolo na ye ekoya sikoyo te mpe bazali komipesa na makambo ya mosuni. Kasi baoyo balingaka mpenza Yehova bakosalela ye na molimo na bango mobimba, ezala ata ntango nini nsuka ya ebongiseli oyo ekoya.—Nzembo 37:4; 1 Yoane 5:3.
4. Likambo nini Yesu akebisaki?
4 Yesu akebisaki bato oyo balingaka Yehova boye: “Bókeba, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te ntango nini ntango oyo etyamá ekokoka.” (Malako 13:33-37) Akebisaki biso ete tópesa nzela te na kolya mpe komɛla to “mitungisi ya bomoi” ebenda likebi na biso kino kobosana ete ntango etikali moke.—Luka 21:34-36; Matai 24:37-42.
5. Ndenge Petelo alobi yango, mokolo ya Yehova ekomema makambo nini?
5 Ndenge moko mpe, Petelo apesi biso toli ete tóbosana te “kozala ya mokolo ya Yehova, oyo na yango likoló lokola ekozika na mɔ́tɔ ekosilela mpe biloko na yango lokola ekokóma mɔ́tɔ makasi ekonyangwa.” Baguvɛrnɛma nyonso ya bato—elingi koloba “makoló”—ekokwea, bakisa mpe bato mabe nyonso—“mabele”—mpe “biloko” nyonso, oyo ezali makanisi mpe misala ya mokili oyo mabe, lokola ezaleli na yango ya koboya kotosa Nzambe mpe bomoi na yango ya mbindo mpe komipesa na biloko ya mosuni. “Likoló ya sika [Bokonzi ya Nzambe na likoló] mpe mabele moko ya sika [libota moko ya sika ya bato awa na mabele]” oyo kati na yango “boyengebene ekofanda” ekokamata esika ya oyo ya liboso. (2 Petelo 3:10-13) Makambo yango oyo ekoningisa mokili, ekobanda na mbalakaka na mokolo mpe na ngonga oyo bato bakoyeba te.—Matai 24:44.
Taláká elembo
6. (a) Ndenge nini eyano oyo Yesu apesaki na motuna ya bayekoli na ye ekokisamaki na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya Bayuda? (b) Eteni nini ya eyano ya Yesu ebendi likebi likoló ya makambo mpe bizaleli oyo ezali komonana banda 1914?
6 Na kotalela ntango oyo tozali, tosengeli koluka koyeba malamumalamu makambo ya elembo oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka—“nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Kobosana te ete ntango Yesu ayanolaki na motuna ya bayekoli na ye, oyo ezali na Matai 24:3, makambo mosusu oyo alobelaki na bavɛrsɛ 4 tii 22 ekokisamaki mwa moke na ebongiseli ya makambo ya Bayuda kati na mobu 33 mpe 70 ya ntango na biso (T.B.), Kasi esakweli yango ezali kokokisama na ndenge ya monene banda na 1914, ntango ya kozala ya Klisto mpe “ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Matai 24:23-28 ezali koyebisa makambo oyo esengelaki kosalema banda na mobu 70 T.B. tii na ntango ya kozala ya Klisto. Makambo oyo elobelami na Matai 24:29–25:46 ezali kosalema na ntango ya nsuka.
7. (a) Mpo na nini tosengeli kokeba na ndenge makambo oyo ezali koleka ezali kokokisa elembo? (b) Yanolá na mituna oyo ezali na nsuka ya paragrafe oyo mpo na komonisa ndenge elembo yango ezali kokokisama banda 1914.
7 Tosengeli mpenza kotya likebi na makambo mpe na bizaleli oyo ezali kokokisa elembo yango. Koyokanisa makambo yango na esakweli ya Biblia ekosalisa biso tóbosana mokolo ya Yehova te. Ekosalisa biso mpe tóloba na motema mobimba ntango tozali kokebisa bato mosusu ete mokolo yango ekómi pene. (Yisaya 61:1, 2) Lokola tozali na mikano wana na motó, tiká tótalela lisusu mituna oyo elandi oyo ezali komonisa biteni ya elembo yango, ndenge elobelami na Matai 24:7 mpe na Luka 21:10, 11.
Na lolenge nini ya kokamwa bitumba oyo esakolamaki ete “ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi” ekokisamaki na 1914? Na oyo etali bitumba, nini ezali kosalema banda ntango wana?
Na 1918, maladi mabe nini ebomaki bato mingi koleka bato oyo bakufaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba? Atako bato bakómi koyeba makambo mingi na misala ya minganga, bamaladi nini ezali naino koboma bamilio ya bato?
Na ndenge nini kozanga biloko ya kolya ezali konyokola bato atako makambo ya siansi ekoli mingi na ekeke oyo euti koleka?
Nini ezali kondimisa yo ete 2 Timote 3:1-5, 13 ezali kolobela te lolenge bomoi ezalaka kobanda kala, kasi ndenge makambo ya mabe ezali se kokóma mingi wana tozali kokenda na nsuka ya mikolo ya nsuka?
Kokabola bato
8. (a) Wapi makambo mosusu elobelami na Matai 13:24-30, 36-43, oyo Yesu alobaki ete ekomonisa nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo? (b) Lisese ya Yesu elimboli nini?
8 Ezali na makambo mosusu oyo Yesu alobaki ete ekomonisa nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo. Moko na yango ezali kokabola “bana ya bokonzi” na “bana ya moto mabe.” Yesu alobelaki likambo yango na lisese na ye ya elanga ya ble oyo monguna atondisaki na matiti mabe. Na lisese na ye, “ble” ezali komonisa baklisto bapakolami ya solo. “Matiti mabe” ezali baoyo balobaka ete bazali baklisto kasi bazali komonisa ete bazali mpenza “bana ya moto mabe” mpamba te bakangami na mokili oyo moyangeli na yango ezali Zabolo. Bango bakabwani na “bana ya bokonzi [ya Nzambe]” mpe batyami elembo mpo na kobomama. (Matai 13:24-30, 36-43) Kokabwana yango ezali kosalema mpenza?
9. (a) Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bokabwani nini monene esalemaki ya baoyo nyonso bazalaki koloba ete bazali baklisto? (b) Ndenge nini baklisto bapakolami bamonisaki ete bazali basaleli ya solo ya Bokonzi?
9 Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bokabwani esalemaki kati na baoyo nyonso bazalaki koloba ete bazali baklisto, bakabwanaki na ngámbo mibale: (1) Bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe bandimi na bango oyo bazalaki kosimba Lisangá ya Mabota to Société des Nations (lelo oyo ONU) atako bazalaki naino kokangana na ekólo na bango makasi, mpe (2) baklisto ya solo na nsima ya etumba yango, oyo basimbaki mpenza Bokonzi ya Masiya ya Nzambe, kasi bikólo ya mokili oyo te. (Yoane 17:16) Bamonisaki ete bazali mpenza basaleli ya solo ya Bokonzi ya Nzambe ndenge babandaki kosala mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” na mabele mobimba. (Matai 24:14) Ebimisaki matomba nini?
10. Mosala ya kosakola Bokonzi ebimisaki liboso litomba nini?
10 Libosoliboso, kosangisama ya ndambo ya bapakolami na elimo esalemaki, baoyo bazali na elikya ya kozala elongo na Klisto na Bokonzi ya likoló. Atako baklisto yango bapanzanaki na bikólo mingi, bayanganisamaki na bomoko na kati ya ebongiseli moko. Kotyama bilembo ya bapakolami yango etikali moke esila.—Emoniseli 7:3, 4.
11. (a) Mosala nini ya koyanganisa ezali kokoba kosalema, mpe yango ezali na boyokani na esakweli nini? (b) Kokokisama ya esakweli yango elimboli nini?
11 Na nsima, mosala ya koyanganisa “ebele ya bato . . . bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” oyo etambwisami na Klisto, ebandaki. Bango bazali “bampate mosusu” oyo babiki na “bolɔzi monene” mpe bakɔti na mokili ya sika ya Nzambe. (Emoniseli 7:9, 14; Yoane 10:16) Mosala wana ya kosakola Bokonzi ya Nzambe liboso ete nsuka eya ezali kokoba tii lelo oyo. Na bosembo nyonso, ebele ya bampate mosusu yango, oyo bakómi sikoyo bamilio, bazali kosalisa batikali bapakolami mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi oyo ezali na ntina mingi. Nsango yango ezali kosakolama na mabota nyonso.
Nini ekosalema na mikolo ezali koya?
12. Na ndenge nini mosala ya kosakola esengeli naino kosalema liboso ete mokolo ya Yehova eya?
12 Makambo oyo nyonso ezali komonisa ete tokómi pene na nsuka ya mikolo ya nsuka mpe ete mokolo ya Yehova ekómi mpenza pene. Kasi bisakweli mosusu ezali oyo esengeli kokokisama liboso ete mokolo yango ya nsɔmɔ ebanda? Ɛɛ. Ya liboso, kokabola bato na likambo ya Bokonzi esili naino te. Na bisika mosusu epai botɛmɛli ezalaki makasi na boumeli ya bambula, bayekoli ya sika bakómi sikoyo mingi. Ata epai bato bazali koboya nsango malamu, motema mawa ya Yehova ezali komonisama ndenge tozali kopesa litatoli. Yango wana, kobá kosala mosala ya kosakola! Yesu alobi na biso ete ntango mosala ekosila, nsuka ekoya.
13. Lokola ekomami na 1 Batesaloniki 5:2, 3, likambo nini ya ntina mingi esengeli naino kosalema, mpe yango ekolimbola nini mpo na biso?
13 Esakweli mosusu ya Biblia oyo ezali na ntina mingi elobi ete: “Na ntango oyo bakoloba: ‘Kimya mpe kobatelama!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi; mpe bakokima soki moke te.” (1 Batesaloniki 5:2, 3) Toyebi naino te ndenge nini kosakolama yango ya “kimya mpe kobatelama” ekosalema. Kasi, ekolimbola soki moke te ete bakonzi ya mokili basilisi mikakatano ya bato. Baoyo bazali kobosana te mokolo ya Yehova bakokosama te na kosakolama yango. Bayebi ete nokinoki nsima na yango, libebi ekoya na mbalakaka.
14. Makambo nini ekosalema na boumeli ya bolɔzi monene, mpe ekolanda molɔngɔ nini?
14 Na ebandeli ya bolɔzi monene, bakonzi ya mokili bakobalukela Babilone Monene, lisangani ya mangomba nyonso ya lokuta ya mokili mobimba, mpe bakosilisa yango nyonso. (Matai 24:21; Emoniseli 17:15, 16) Nsima na yango, bikólo bakoluka kotya miso epai ya baoyo bazali na ngámbo ya boyangeli ya Yehova, yango ekopelisa nkanda ya Yehova likoló ya biyangeli ya politiki mpe bato na yango, mpe ekosuka na koboma bango nyonso. Wana ekozala Armagedon, oyo ekozala ntango ya mpasi ya makasi koleka na kati ya bolɔzi monene. Na nsima, Satana na bademo na ye bakokangama, bakozala lisusu na likoki te ya kotungisa bato. Yango ekosukisa mokolo ya Yehova ntango nkombo na ye ekosantisama.—Ezekiele 38:18, 22, 23; Emoniseli 19:11–20:3.
15. Mpo na nini ekozala malamu te kokanisa ete mokolo ya Yehova ezali naino mosika?
15 Nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekoya na ntango na yango mpenza, ndenge Nzambe ye moko akani yango. Ekoya na nsima ya ntango te. (Habakuku 2:3) Kanisá ndenge babebisaki Yelusaleme na mobu 70 T.B., ezalaki mbala moko na ntango Bayuda bazalaki kokanisa yango te, ntango bakanisaki ete likama elongwi. Mpe ndenge babebisaki Babilone, ezalaki ndenge nini? Babilone ezalaki ekólo moko ya nguya makasi, ezalaki na bifelo ya milai mpe ya monene. Kasi ekweaki na butu moko mpamba. Ndenge wana mpe libebi ya mbalakaka ekokómela ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo. Ntango yango ekoya, tiká ete tózala biso nyonso na bomoko na kati ya losambo ya solo, mpe tóbosana te mokolo ya Yehova.
Bozongeli
• Mpo na nini ezali na ntina mingi kobosana te mokolo ya Yehova? Ndenge nini tokoki kosala yango?
• Ndenge nini kokabola bato oyo ezali kosalema sikoyo etaleli mpenza biso?
• Likambo nini ekosalema naino liboso ete mokolo ya Yehova ebanda? Na bongo, tosengeli kosalaka nini?
[Mituna ya boyekoli]
[Bililingi na lokasa 180, 181]
Etikali moke, mikolo ya nsuka ekosuka na kobebisama ya ebongiseli ya Satana