Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá moninga ya Nzambe libela na libela!

Zalá moninga ya Nzambe libela na libela!

Liteya 18

Zalá moninga ya Nzambe libela na libela!

Esɛngaka milende mpo na kozwa moninga; esɛngaka mpe milende mpo na kobatela boninga. Milende na yo mpo na kokóma moninga ya Nzambe mpe kotikala moninga na ye ekopambolama mpenza. Yesu alobaki na baoyo bandimelaki ye ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Yango elingi koloba nini?

Okoki kozala na bonsomi sikawa. Okoki kosikolama na mateya ya lokuta mpe na lokuta oyo Satana apalanganisi. Atako bamilio ya bato oyo bayebi Yehova te bazali na elikya te, yo okoki kozala na elikya. (Baloma 8:22) Baninga ya Nzambe basikolami ata na “kobanga kufa.”​—Baebele 2:14, 15.

Okoki kozala na bonsomi na mokili ya sika ya Nzambe. Oyo nde bonsomi malamu okoki kozala na yango na mikolo mizali koya! Na Paladiso awa na mabele, bitumba, maladi, kobomana, ekozala lisusu te. Bobola mpe nzala ekozala lisusu te. Bato bakokóma lisusu mibange te mpe bakokufa lisusu te. Bato bakozala lisusu na kobanga te, bakonyokwama te, mpe makambo nyonso ekosalema na bosembo. Biblia elobi mpo na Nzambe ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.”​—Nzembo 145:16.

Baninga ya Nzambe bakozala na bomoi libela na libela. Bomoi ya seko ezali likabo moko ya malamu mpenza oyo Nzambe akopesa baoyo nyonso bazali koluka kozala baninga na ye. (Baloma 6:23) Kanisá naino likambo oyo: kozala na bomoi oyo ezangi nsuka!

Okozala na ntango ya kosala makambo mingi. Mbala mosusu okosepela koyekola kobɛta ebɛtɛli moko ya miziki. Mbala mosusu okosepela koyekola koyema bililingi to kozala mosali ya mabaya. Mbala mosusu okosepela koyekola banyama to milona. To okoki mpe kosepela kosala mibembo mpo na komona bisika mpe bato ndenge na ndenge. Kozwa bomoi ya seko ekopesa nzela mpo na kokokisa makambo oyo nyonso!

Okozala na ntango ya kozwa baninga mingi. Kozala na bomoi ya seko ekopesa nzela ya koyeba bato mosusu mingi oyo bakómi baninga ya Nzambe. Okoyeba makoki mpe bizaleli na bango ya malamu, bakozala mpe baninga na yo. Okolinga bango, mpe bakolinga yo. (1 Bakolinti 13:8) Kozala na bomoi ya seko ekopesa yo ntango ya kosala boninga na moto nyonso awa na mabele! Oyo eleki nyonso, boninga na yo na Yehova ekokóma makasi wana ebele ya bambula ezali koleka. Tiká ete Nzambe azala moninga na yo libela na libela!