Nakosala nini soki papa to mama amɛlaka bangi to alangwaka masanga?
Mokapo 23
Nakosala nini soki papa to mama amɛlaka bangi to alangwaka masanga?
“Papa alobaki ete akei kobongisa motuka, kasi tomonaki ye lisusu te mokolo mobimba. Mama amekaki kobenga ye na telefone kasi ayanolaki te. Mwa moke na nsima, namonaki mama na elongi ya mawa mpe azalaki komibongisa mpo abima. Ayebisaki ngai ete: ‘Nakei naino koluka papa na yo.’
“Na nsima, mama azongaki kaka ye moko. Natunaki ye boye: ‘Papa azali kuna te?’ Alobaki na ngai ete: ‘Te.’
“Na ntango yango nayebaki ete papa azongeli makambo na ye. Ezalaki kaka boye mikolo eleki. Oyebi, papa na ngai azali moombo ya bangi. Mpe tii ntango akómaki na ndako, ngai ná mama tozalaki mitema likoló mpenza. Na mokolo oyo elandaki nakipaki ye ata moke te, mpe ezali kosala ngai mpasi mingi.”—Karen, azali na mbula 14.
BAMILIO ya bilenge bazali mokolo na mokolo komona mpasi mpo bafandi na moboti oyo azali moombo ya bangi to ya masanga. Soki moboti na yo azali na boombo ya ndenge wana, akoki koyokisa yo nsɔni, kolɛmbisa yo nzoto to mpe kopesa yo nkanda.
Na ndakisa, Marie, abɔkwamaki na papa oyo azalaki komonana malamu na miso ya bato. Kasi na nkuku azalaki moombo ya masanga mpe azalaki kosalela maloba ya kofinga mpe ya nsɔni na ndako. Marie akanisi na nkanda nyonso boye: “Bato bazalaki koya epai na biso bana mpe bazalaki koyebisa biso ete tozali na tata moko ya malamu mpe ete tozali na esengo.” *
Okosala nini soki moboti na yo azali moombo ya masanga to bangi?
Yebá ntina nini akómá moombo
Ya liboso, ezalaka malamu soki oyebi mokakatano ya moboti na yo. Masese 1:5 elobi boye: “Moto ya mayele nde moto oyo akómaka na makoki ya koyeba kotambwisa makambo.” Yango wana, ekozala malamu oyeba mwa moke soki kokóma moombo ya masanga to ya bangi ezali nini, nani akómaka moombo ya ndenge wana, mpe mpo na nini?
Na ndakisa, moombo ya masanga azali te moto oyo amɛlaka masanga mingi na mbala moko. Kasi, azali nde moto oyo azali na momeseno ya komɛla mingi mpe akokaka kotika te. * Soki amɛli te, ayokaka mabe—kutu akanisaka kaka masanga—mpe soki abandi komɛla ayebaka esika ya kosuka te. Komɛla ya ndenge wana ememaka mpasi na libota, na mosala, mpe na nzoto ya moto ye moko.
Atako nzoto ya bato mosusu ekoki nokinoki kokómisa bango baombo ya masanga, makanisi ya moto ekoki mpe Masese 14:13) Bamosusu kati na bango bakolá na mabota oyo baboti bazalaki baombo ya masanga. Mpo na bato ya ndenge wana, komɛla ekitisaka mpasi ya mpota oyo bazoká na motema banda bomwana. Makambo ya ndenge wana ekoki mpe kosala ete moto akóma moombo ya bangi.
kokómisa ye bongo. Kutu, bato mingi oyo bazali baombo ya masanga bamimonaka na ntina te. (Ya solo, komɛla masanga to bangi ebakisaka kaka mikakatano ya moto; makanisi na ye ebebaka mpenza. Yango wana, mpo na kolongwa na boombo yango, moboti na yo akoki kozala na mposa ya lisalisi ya moto oyo ayekolá makambo yango.
Bongisá bilikya na yo
Ya solo, koyeba ntina oyo moboti na yo azali kosala makambo oyo epesi yo nsɔni ekosilisa mokakatano yango te. Atako bongo, koyeba mokakatano na ye ekosalisa yo omitya mwa moke na esika na ye.
Na ndakisa, okoluka moboti na yo oyo abukani lokolo abɛta na yo bale? Ekozala boni soki oyebi ete moboti na yo abukanaki mpo asalaki ye moko makambo moko ya bozoba? Na ntembe te, ekopesa yo mawa mingi. Atako bongo, okomona ete tii ntango lokolo na ye ekobonga, moboti na yo akokoka mpenza te kobɛta na yo bale. Koyeba likambo wana ekosalisa yo obongisa bilikya na yo.
Ndenge moko mpe, moboti oyo azali moombo ya bangi azali lisusu mobimba te na motema mpe na makanisi. Ya solo, ye moko nde “amizokisaki.” Mpe etamboli na ye ya bozoba ekoki kopesa yo nkanda. Nzokande, kino moboti na yo akoluka lisalisi mpo alongwa na boombo na ye, akokoka mpenza te kobatela yo malamu. Soki ozali komona ezaleli na ye wana ya kozala moombo ya masanga to bangi lokola mpota oyo ekitisi makoki na ye, ekosalisa yo obongisa bilikya na yo.
Oyo okoki kosala
Osengeli kondima ete kino moboti na yo akotika ezaleli wana, ekosɛnga ofanda na ye kaka ná bizaleli wana. Kasi liboso atika osengeli kosala nini?
Komema mokumba ya milangwa ya moboti na yo te. Moboti na yo moko nde asengeli komema mokumba ya milangwa na ye, kasi moto mosusu te. Bagalatia 6:5 elobi boye: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.” Na yango, yo te moto okoki kobongisa moboti na yo, to okoki kobatela ye mpo bampasi ya milangwa na ye ekómela ye te. Na ndakisa, osengeli te kokosa patrɔ na ye mpo na kobomba ye to kolongola ye na veranda soki akwei kuna mpo na kwiti.
Lendisá moboti aluka lisalisi. Mbala mosusu likambo monene ya moboti na yo ezali ya kondima ete azali na mokakatano. Ntango azali na kwiti te mpe azoyeba makambo malamu, mbala mosusu moboti oyo alangwaka te ná bana ya mikóló bakoki koyebisa ye ndenge ezaleli na ye ezali koyokisa libota mpasi mpe makambo oyo asengeli kosala mpo kotika ezaleli yango.
Lisusu, ekozala malamu moboti na yo oyo akómá moombo ya masanga to ya bangi akoma biyano na mituna oyo elandi: Nini ekokómela ngai mpe libota na ngai soki natiki te komɛla masanga to bangi? Matomba nini ekomonana soki natiki ezaleli na ngai oyo? Nasengeli kosala nini mpo na kozwa lisalisi?
Soki omoni ete elingi eyinda, bendá nzoto. Masese 17:14 elobi boye: “Liboso koswana ebima, bendá nzoto.” Komitya na likama te na komikɔtisáká na matata. Soki likoki ezali, kɔtá na shambrɛ na yo to kende epai ya moninga moko. Soki bazali koluka kaka kosala yo mabe, okoki kobenga bato mosusu mpo básalisa yo.
Ndimá ndenge ozali koyoka. Bilenge mosusu bamipesaka foti mpo basilikelaki moboti na bango oyo azali moombo ya masanga to ya bangi. Ezali mabe te koyoka mwa nkanda, mingimingi soki milangwa ya moboti na yo ezali kopekisa ye alinga yo mpe asalisaka yo na makambo oyo osengeli na yango. Ya solo, Biblia esɛngi yo okumisa moboti na yo. (Baefese 6:2, 3) Kasi ‘kokumisa’ elimboli nde komemya bokonzi na ye, ndenge kaka osengeli komemya bokonzi ya polisi to ya zuzi. Elimboli te ete osepelaka na ezaleli ya milangwa ya moboti na yo. (Baroma 12:9) Ozali mpe moto mabe te kaka mpo oboyi milangwa ya moboti na yo; tókende epai mpe tózonga, milangwa ya masanga to ya bangi ezali mabe!—Masese 23:29-35.
Luká baninga oyo bakoki kolendisa yo. Ntango bomoi na ndako ekómi na yikiyiki, okoki kobosana makambo ya malamu. Yango wana, ezali na ntina ozalaka esika moko ná bato oyo bakangamaka na Yehova mpe bazali na makanisi malamu. Bandeko ya lisangá bakoki kopesa bilendiseli mpe lisungi oyo ebongi mpe na ntango mosusu, bakoki kokitisa mitungisi oyo ozali kokutana na yango na ndako. (Masese 17:17) Kozala esika moko ná mabota ya bakristo ekoki kosalisa yo omona ndenge okoki kosala mpo olonga ezaleli mabe oyo ozali komona na ndako na bino.
Luká lisalisi mpo na yo moko. Kozala na moto moko ya mokóló, oyo otyelaka motema mpe okoki koyebisa ye ndenge ozali koyoka, esalisaka mpenza. Bankulutu ya lisangá Yisaya 32:2) Yango wana, kobangaka te to koyokaka nsɔni te mpo na kokende epai na bango mpo na kosɛnga ete bálendisa mpe bápesa yo toli.
bazali wana mpo na kosalisa yo ntango ozali na bosɛnga. Biblia elobi ete mibali yango bakoki kozala “lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai, lokola elili ya libanga monene na mokili oyo ekauká.” (Na makambo 6 oyo touti kolobela, komá likambo moko oyo okomeka kosala liboso. ․․․․․
Mbala mosusu okokoka te kobongola makambo oyo ezali koleka na ndako na bino, kasi okoki kobongola ndenge oyo ozali koyoka mpo na makambo yango. Na esika oluka kopekisa moboti na yo, tyá makanisi na yo na moto oyo okoki kotambwisa: moto yango nde yo moko. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko.” (Bafilipi 2:12) Kosala bongo ekosalisa yo otalela makambo na ndenge ya malamu, mpe ekoki kutu kotinda moboti na yo báluka lisalisi.
Okosala nini soki baboti na yo baswanaka mingi? Ndenge nini okoki kosala mpo na kolonga mpasi oyo ozali na yango na motema?
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 7 Soki moboti oyo amɛlaka masanga mingi azali konyokola yo, ekozala malamu oluka lisalisi. Yebisá mokóló moko oyo otyelaka motema. Soki ozali Motatoli ya Yehova, okoki kosolola na nkulutu moko ya lisangá to na mokristo mosusu oyo akɔmɛli.
^ par. 11 Atako moombo ya masanga to bangi oyo tolobeli awa akoki kozala mobali, batoli oyo epesami na lisolo oyo etali mpe basi.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye.”—Masese 19:11.
TOLI
Na esika oyina moboti na yo, luká nde koyina makasi mabe oyo moboti na yo asalaka.—Masese 8:13; Yuda 23.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Na Biblia, ‘kokumisa’ ekoki kolimbola kondima moto oyo batye mokonzi. (Baefese 6:1, 2) Kasi, kokumisa tata to mama na yo ezali kosɛnga te ete olandaka ezaleli nyonso oyo akomonisa.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki moboti na ngai akómi na maloba makasimakasi to kosimba na nzoto, nako ․․․․․
Mpo na kolendisa moboti na ngai aluka lisalisi, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Nini ekómisaka bato mosusu baombo ya masanga to bangi?
● Mpo na nini ezali foti na yo te soki moboti na yo azali moto ya milangwa?
● Makambo nini okoki komipekisa, mpe ndenge nini okoki kosala yango?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 192]
‘‘Nayebi ete baboti na ngai bakoki koyokisa ngai lisusu nsɔni na mikolo ezali koya, kasi nayebi mpe ete, soki natyeli Yehova motema, akopesa ngai makasi ya koyika mpiko.’’—Marc
[Etanda na lokasa 198]
soki moboti moko atiki kosalela Yehova
Soki moboti moko atiki kosalela mateya ya Biblia—mbala mosusu amonisi kutu ete alingi lisusu te kozala na kati ya lisangá ya bokristo—okosala nini?
● Yebá ete Yehova akopesa yo foti te mpo na makambo oyo moboti na yo azali kosala. Biblia elobi boye: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”—Baroma 14:12.
● Tiká momesano ya komikokanisa na bilenge mosusu oyo makambo na bango ezali malamu koleka yo. (Bagalatia 5:26) Elenge mobali moko oyo tata na ye asundolaki libota na bango alobi boye: “Na esika ya kokangama na makanisi ya ndenge wana, ekozala malamu mingi kokanisa ndenge ya kosala mpo na kolonga likambo yango.”
● Kobá komemya moboti oyo azali matata, mpe soki mitindo oyo apesi ebuki mibeko ya Nzambe te, tosá yango. Mobeko oyo Yehova apesi bana ete bákumisaka baboti na bango etali te kaka moboti oyo azali mondimi. (Baefese 6:1-3) Soki ozali kokumisa mpe kotosa baboti na yo atako bazali na mabunga, wana ezali nde komonisa ete olingaka Yehova.—1 Yoane 5:3.
● Kangamá makasi na lisangá ya bokristo. Kuna, ebele ya bandeko bakristo bakolendisa yo mpe bakopesa yo makasi. (Marko 10:30) Elenge moko na nkombo David azalaki kobanga ete mbala mosusu bandeko ya lisangá bakokima ye ná bato ya libota na ye mpo papa na ye atikaki kosalela Yehova. Kasi David amonaki ete abangaki kaka mpamba. Alobi boye: “Bazalaki komonisa te ete tobongi kozala ná bango te. Yango endimisaki biso ete lisangá ezalaki mpenza kokanisa biso.”
[Elilingi na lokasa 194]
Soki ozali kotalela ezaleli wana ya moboti ya milangwa lokola mpota oyo ekitisi makoki na ye, ekosalisa yo obongisa bilikya na yo