Makambo oyo nyonso elingi koloba nini?
Makambo oyo nyonso elingi koloba nini?
YESU KLISTO alobaki ete bitumba, kozanga bilei, maladi mabe, mpe koningana ya mabelé ekomonisa “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Matai 24:1-8; Luka 21:10, 11.
Kobanda na 1914, bomoi ya bato ebebi mpo na bitumba kati na bikólo mpe kati na bana-mboka oyo balobaka monɔkɔ moko te—bitumba oyo mbala mingi ezali kobima mpo bakonzi ya mangomba bazali komikɔtisa na makambo ya politiki—mpe, na mikolo oyo, mpo na misala ya terorisme oyo epalangani mingi.
Atako siansi ezali kozwa mayele ya sika mpo na kobimisa bilei, kasi bamilio ya bato bazali kozanga bilei na mokili mobimba. Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kokufa na nzala.
Maladi mabe, elingi koloba maladi oyo ezwaka bato mingi, ezali mpe na kati ya elembo oyo Yesu apesaki. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, gripɛ moko ebomaki bato koleka milio 21. Yango ekeseneki na bamaladi ya ntango ya kala oyo ezalaki kozwa mpenza bato ya bamboka mingi te, mpamba te yango ezwaki bato ya bikólo mingi, ata mpe bato ya bisanga ya mosika. Sida ezali sikoyo kozwa ebele ya bato na mokili, mpe bamaladi lokola maladi ya ntolo, malaria, kokufa miso oyo eutaka na mikrobe moko ya ebale, mpe maladi ya Chagas ezali se kozwa bato mingi na mikili ya bobola.
Balapolo emonisi ete mbula na mbula mabelé ezali koningana mbala mingi mpenza, makasi ya koningana ya mabelé yango ezali kokesene. Atako bisaleli ndenge na ndenge ezali, bakisa mpe mayele ya sika ya koyeba soki mabelé eningani, tokómi koyoka mingi na bansango ndenge koningana ya mabelé ezali kobebisa bamboka oyo ezali na bato ebele.
Biblia esakolaki mpe ete: “Yebá likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango; mpe yo kimá bato yango.”—2 Timote 3:1-5.
Ondimi te ete tozali mpenza kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”?
Omoni te ete bato bazali komilinga bango moko, balingi mbongo, mpe bazali na lolendo, na ndenge oyo eleki ndelo?
Nani akoki kotya ntembe ete mokili etondi na bato oyo balukaka kaka bolamu na bango
moko kasi bazangi botɔndi, bandimaka boyokani te mpe bazali sembo te?Oyebi ete na bisika mingi na mokili mobimba, bana mingi batosaka baboti na bango te mpe bolingo ezali mpenza kozanga?
Na ntembe te, ozali komona ete tozali kobika na mokili oyo elingi mpenza bisengo kasi elingi makambo ya malamu te. Ezali ndenge wana nde Biblia ezali kolobela makambo oyo ekomonana mingi na “mikolo ya nsuka.”
Tosengeli na bilembeteli mosusu mpo na koyeba ntango oyo tozali kobika? Yesu asakolaki mpe ete na ntango oyo, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esengeli kosakolama na mabelé mobimba na bisika bato bafandi. (Matai 24:14) Ezali kosalema bongo?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo ya makambo ya Biblia oyo eyebisaka nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova, ebimaka mbala na mbala na minɔkɔ ebele koleka bazulunalo mosusu.
Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova balekisaka ngonga koleka miliare moko na kopesa bato mosusu litatoli na ntina na Bokonzi ya Nzambe.
Batatoli ya Yehova bazali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ pene na 400, ezala na minɔkɔ oyo balobaka na bamboka ya mosika to na bamboka oyo ezali na bato mingi te. Bakómisi nsango malamu na bikólo nyonso, basakoli mpe na bisanga mpe bateritware mingi oyo na mokili emonanaka ete ezali na ntina te mpo ezali moke mingi. Na bisika ebele, bazalaka na programɛ ya koteya mpe koyekola Biblia.
Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza kosakolama na mabelé mobimba esika bato bafandi, ezali te mpo mokili mobimba ebongwana kasi nde mpo na kopesa litatoli. Bazali kopesa bato na bisika nyonso libaku ya komonisa soki bazali kotyela moto oyo akelaki likoló ná mabelé likebi mpe soki bakotosa mibeko na ye mpe bakomonisa ete balingaka bazalani na bango.—Luka 10:25-27; Emoniseli 4:11.
Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola bato mabe nyonso na mabelé mpe ekokómisa yango paladiso.—Luka 23:43.
[Etanda na lokasa 6]
Mikolo ya nsuka ya nini?
Ezali mikolo ya nsuka mpo na bato nyonso te. Biblia emonisi ete bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe bakozala na bomoi libela na libela.—Yoane 3:16, 36; 1 Yoane 2:17.
Ezali mpe mikolo ya nsuka mpo na mabelé te. Liloba ya Nzambe elaki ete mabelé ekoumela libela na libela.—Nzembo 37:29; 104:5; Yisaya 45:18.
Kasi, ezali nde mikolo ya nsuka mpo na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, oyo etondi na mobulu mpe ezangi bolingo, mpe mpo na baoyo bazali kotingama na makambo na yango.—Masese 2:21, 22.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe?
Mbala na mbala, basakoli ya Biblia bakomaki boye: “[Yehova] alobi boye.” (Yisaya 43:14; Yilimia 2:2) Ata Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, alobaki mbala mingi ete ‘azali koloba na ndenge na ye moko te.’ (Yoane 14:10) Biblia yango moko elobi polele ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe.”—2 Timote 3:16.
Lapolo moko ya Alliance biblique universelle emonisi ete Biblia ebimisami na minɔkɔ koleka 2200, nzokande ata buku moko te ebimisami na minɔkɔ ebele bongo. Buku moko mpe te esili kokabolama mingi lokola yango—sikoyo Babiblia ekabolami koleka miliare minei. Nsango oyo Nzambe atindeli bato nyonso esengeli mpenza kokokisa masɛngami wana, boye te?
Mpo na kozwa bandimbola ya polele ya makambo oyo emonisi ete Biblia epemami na Nzambe, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Soki ozali kotánga Biblia mpe ozali kondima ete ezali solosolo Liloba ya Nzambe, okozwela yango matomba mingi.
[Etanda/Bililingi na lokasa 8]
Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
Ezali guvɛrnema oyo ekeseni na baguvɛrnema mosusu nyonso; Nzambe ya solo, Yehova, Mozalisi ya likoló mpe mabelé atye yango mpo eyangela.—Yilimia 10:10, 12.
Biblia emonisi ete Yesu Klisto azali moto oyo Nzambe apesi bokonzi mpo ayangela. (Emoniseli 11:15) Ntango Yesu azalaki na mabelé, amonisaki ete Nzambe asilaki kopesa ye bokonzi monene, oyo na ndakisa epesaki ye nzela apekisa mopɛpɛ mpe mai, abikisa maladi ya ndenge nyonso, mpe kutu asekwisa bakufi. (Matai 9:2-8; Malako 4:37-41; Yoane 11:11-44) Bisakweli euti na Nzambe oyo ezali na Biblia elobaki ete Nzambe akopesa ye mpe ‘nguya mpe nkembo mpe bokonzi, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye.’ (Danyele 7:13, 14) Babengi guvɛrnema yango Bokonzi ya likoló; ezali kuna nde Yesu Klisto azali koyangela sikawa.
[Bililingi na lokasa 7]
Nsango malamu ezali kosakolama na mokili mobimba