Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Batyaki likebi te”

“Batyaki likebi te”

“Batyaki likebi te”

KOBOYA kolanda makebisi ekoki komema na makama minene.

Na 1974, na engumba Darwin, na Australie, bazalaki komilɛngɛla mpo na fɛti moko, na mbala moko bayoki loseba ebɛti mpo na kokebisa ete mopɛpɛ makasi ezali koya. Nzokande, elekaki mbula soki 30, mopɛpɛ ya ndenge wana ebebisá Darwin te. Mpo na nini ekosalema mbala oyo? Ebele ya bato bazwaki likambo yango na lisɛki kino ntango bamonaki ete mopɛpɛ ya makasi ebandi kolongola bansamba ya bandako mpe kokweisa bifelo ya bandako epai oyo ebele ya bato batondanaki. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, engumba yango ebebaki makasi.

Ngomba moko ya mɔtɔ etombokaki na sanza ya Novɛmbɛ 1985, na Colombie. Mɔtɔ oyo ngomba wana esanzaki enyangwisaki mbula-mpɛmbɛ ná bangalasi oyo ezalaki likoló na yango mpe yango esalaki pɔtɔpɔtɔ oyo ekundaki bato koleka 20000 oyo bazalaki kofanda na engumba Armero. Bazwaki ata likebisi moko te liboso? Ngomba wana eninganaki basanza ebele. Kasi bato mingi ya Armero batyelaki likambo yango likebi te lokola bamesaná kofanda pene na ngomba ya mɔtɔ. Bakebisaki bakonzi na bango ete likama moko ya monene ekosalema mosika te, kasi basalaki eloko moko te mpo na kokebisa bato. Bazalaki koyebisa na radio ete bato bábanga te. Basalelaki bikoliseli-lolaka (haut-parleurs) ya ndako-nzambe mpo na koyebisa bato bámitungisa te. Na kati ya butu, lokito makasi mpenza eyokanaki mbala mibale. Soki ozalaka wana, olingaki kosundola biloko na yo mpe kokima? Kaka mwa bato moke nde basalaki yango, kasi na nsima likoki ezalaki lisusu te.

Mbala mingi, bato oyo bayekolaka makambo ya mabelé (géologues) bayebisaka liboso mpe na bosikisiki epai wapi mabelé ekoningana. Kasi balobaka mpenza te ntango nini ekosalema. Na 1999, na mokili mobimba, bato 20000 bakufaki na bisika oyo mabelé eninganaki. Mingi kati na bato oyo bakufaki bakanisaki ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekokómela bango.

Ntango Nzambe apesaka makebisi, osalaka nini?

Biblia elobelaki banda kala makambo oyo ezali komonana na mikolo oyo ya nsuka. Na boyokani na makambo yango, Biblia elendisi biso tókanisa “mikolo ya Noa.” ‘Na mikolo wana liboso ya mpela,’ bato bamipesaki mingi na makambo oyo bato basalaka, mpe bazalaki kotya likebi ata moke te na mobulu oyo ekómaki mingi. Likebisi oyo Nzambe apesaki na nzela ya mosaleli na ye Noa, ‘batyelaki yango likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.’ (Matai 24:37-39) Soki ozalaka wana, olingaki kolanda likebisi yango? Ozali kosala bongo sikoyo?

Bongo soki ozalaka na bomoi na Sodoma, pene na Mbu Ekufá, na mikolo ya Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama? Bamboka na yango ya mikemike ezalaki lokola paladiso. Engumba yango moko ezalaki na bozwi mingi. Bato ya esika yango bazalaki na elimo ya mafumafu. Na mikolo ya Lota, “bazalaki kolya, bazalaki komɛla, bazalaki kosomba, bazalaki kotɛka, bazalaki kolona, bazalaki kotonga bandako.” Makambo ya mbindo mpenza ezalaki kosalema na engumba na bango. Soki yo, olingaki kondima na motema moko mpenza likebisi ya Lota ntango azalaki kokweisa misala ya mabe? Olingaki koyoka soki alobaki na yo ete Nzambe azwi mokano ya kobebisa Sodoma? To mpe olingaki komona yango lokola lisɛki, ndenge bakilo ya Lota basalaki? Mbala mosusu, olingaki nde obanda kokima mpe nsima na yango obaluka, lokola mwasi ya Lota? Atako bato mosusu bandimaki likebisi wana te, mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, “mɔtɔ mpe sufulu enɔkaki uta na likoló mpe ebomaki bango nyonso.”​—Luka 17:28, 29.

Bato mingi na mikolo na biso bazali kotya likebi te. Kasi soki bandakisa wana ekomamaki na Liloba ya Nzambe, ezali nde mpo na kokebisa biso, kolendisa biso mpo TÓKƐNGƐLAKA!

[Etanda/Elilingi na lokasa 22]

Mpela ezindisaká mpenza mokili mobimba?

Bato mingi ya mayele balobaka ete mpela ezindisaká mokili te. Kasi Biblia elobaka ete mpela ezindisaká mpenza mokili mobimba.

Yesu Klisto alobelaki yango, mpe azalaki na bomoi ntango likambo yango esalemaki; amonaki yango uta na likoló.

[Etanda/Elilingi na lokasa 23]

Sodoma ná Gomola ebomamaká mpenza?

Arkeoloji endimi likambo yango.

Masolo ya mokili elobeli mpe yango.

Yesu Klisto amonisaki ete likambo yango ezali solo, mpe likambo yango elobelami na mikanda 14 ya Biblia.