Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bóganga na esengo na bomoko”!

“Bóganga na esengo na bomoko”!

Mokapo ya Zomi na Misato

“Bóganga na esengo na bomoko”!

Yisaya 52:1-12

1. Mpo na nini maloba ya esakweli ya Yisaya mokapo 52 ezali kopesa esengo, mpe wapi ndenge mibale oyo maloba yango ezali kokokisama?

 KOSIKOLAMA! Ezali elikya oyo epesaka bato oyo bakangami na boombo esengo mingi koleka, boye te? Lokola motó ya likambo ya mokanda ya Yisaya ezali kosikolama mpe kozongisama, ezali likambo ya kokamwa te ete, longola mokanda ya Nzembo, mokanda oyo ya Yisaya elobeli esengo koleka mikanda mosusu nyonso. Yisaya mokapo 52 epesi mpenza basaleli ya Nzambe bantina mingi ya kosepela. Maloba na yango ya esakweli ekokisamaki likoló ya Yelusaleme na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mpe maloba yango ezali kokokisama na monene na yango likoló ya “Yelusaleme mboka ya likoló,” ebongiseli ya Yehova kuna na likoló oyo esangisi bikelamu na ye ya elimo, ebongiseli oyo balobelaka yango lokola mama mpe mwasi ya libala.—Bagalatia 4:26; Emoniseli 12:1.

“Omilatisa nguya na yo, ee Siona!”

2. Ntango nini Siona alamuki, mpe ndenge nini yango esalemi?

2 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova alobi na Siona, mboka na Ye oyo alingi mingi ete: ‘Lamuká! Lamuká! Omilatisa nguya na yo, ee Siona, omilatisa bilamba na yo ya kitoko, ee Yelusaleme, mboka mosantu. Zambi bakoya kati na yo lisusu te, bato oyo bakatami ngenga te mpe bato ya mbindo. Omilongola na putulu, otɛlɛma, ee Yelusaleme, mofandi na nse; omifungola nkanga na nkingo na yo, ee mwana mwasi mokangami ya Siona.’ (Yisaya 52:1, 2) Mpo bato na ye bapelisaki nkanda ya Yehova, Yelusaleme etikalaki mpamba mbula 70. (2 Mikonzi 24:4; 2 Ntango 36:15-21; Yilimia 25:8-11; Danyele 9:2) Sikoyo ntango ekoki mpo alamuka, alongwa na eleko molai ya kozanga mosala mpe alata bilamba kitoko ya bonsomi. Yehova asimbaki motema ya Sirise mpo na kosikola “mwana mwasi mokangami ya Siona” mpo baoyo kala bazalaki bato ya Yelusaleme mpe bana na bango bálongwa na Babilone, bázonga na Yelusaleme, mpe bázongisa losambo ya solo. Bato oyo bakatami ngenga te mpe bato ya mbindo bakomonana lisusu na Yelusaleme te.—Ezela 1:1-4.

3. Mpo na nini lisangá ya baklisto bapakolami ekoki kobengama “mwana mwasi ya Siona,” mpe na ndenge nini basikolami?

3 Maloba oyo ya Yisaya ezali mpe kokokisama na lisangá ya boklisto. Lisangá ya baklisto bapakolami ekoki kobengama “mwana mwasi ya Siona” ya ntango na biso, mpamba te “Yelusaleme mboka ya likoló” azali mama na bango. a Lokola basikolami na mateya ya bapakano mpe ya bapɛngwi, bapakolami basengeli komibatela pɛto na miso ya Yehova; yango ezali kosɛnga te ete bákatama ngenga na mosuni, kasi nde na mitema na bango. (Yilimia 31:33; Baloma 2:25-29) Yango esangisi makambo lokola kozala pɛto na elimo, na makanisi, mpe na bizaleli na miso ya Yehova.—1 Bakolinti 7:19; Baefese 2:3.

4. Atako “Yelusaleme mboka ya likoló” ezangá naino botosi te epai ya Yehova, makambo nini oyo bamonisi na yango awa na mabelé bakutanaki na yango oyo ekokani na oyo ya bato ya Yelusaleme ya kala?

4 Ya solo, “Yelusaleme mboka ya likoló” ezangá naino botosi te epai ya Yehova. Nzokande, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bamonisi na yango awa na mabelé—baklisto bapakolami—babukaki mibeko ya Yehova, kasi na nko te, mpamba te bayebaki malamumalamu te ndenge nini baklisto basengeli te kokɔta na makambo ya mokili. Lokola Nzambe azalaki kondima bango lisusu te, bakɔtaki na boombo ya elimo na “Babilone Monene,” lisangani ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 17:5) Boombo na bango ekómaki makasi koleka na sanza ya Yuni 1918 ntango bakambi mwambe ya la Société bakangamaki na bolɔkɔ mpo na bifundeli ya lokuta, ná efundeli ya botomboki. Na ntango yango emonanaki lokola nde ebongiseli ya Batatoli ya Yehova etiki mosala ya kosakola nsango malamu. Nzokande na 1919, kelelo mpo na kolamuka na elimo ebɛtaki. Baklisto bapakolami babandaki kotika mpenza mbindo nyonso ya Babilone Monene ezala na bizaleli mpe na elimo. Balongwaki na putulu ya boombo, mpe “Yelusaleme mboka ya likoló” ezwaki lisusu kitoko ya “mboka mosantu” esika mbindo ya elimo ekoki kondimama te.

5. Mpo na nini Yehova azali na lotomo ya kosikola basaleli na ye kozanga kofuta baoyo bakangaki bango?

5 Ezala na mobu 537 L.T.B. to na 1919 ya ntango na biso (T.B.), Yehova azalaki na lotomo mpenza ya kosikola basaleli na ye. Yisaya alobi boye: ‘Mpo ete Yehova alobi boye ete, Botɛkisamaki mpe na motuya te, bokosikolama mpe na motuya te.’ (Yisaya 52:3) Ezala Babilone ya kala to Babilone Monene, bango nyonso mibale bapesaki eloko te ntango bazwaki na boombo bato oyo Nzambe asalaki na bango kondimana. Lokola basombaki bango na mbongo te, Yehova azalaki kaka Nkolo mpenza ya bato ya ekólo na ye. Asengelaki nde komona ete azali na nyongo ya moto moko? Eloko te. Na mabɔkɔ na bango nyonso mibale, Yehova azalaki na lotomo ya kosikola basaleli na ye kozanga kofuta baoyo bakangaki bango.—Yisaya 45:13.

6. Liteya nini banguna ya Yehova bazwi te na makambo eleká?

6 Banguna ya Yehova bazwaki naino liteya te na makambo oyo eleká. Totángi boye: ‘Yehova alobi boye ete, Bato na ngai bakitaki epai ya Ezipito na ntango ya liboso mpo na kofanda wana, mpe Asiria anyokolaki bango na ntina te.’ (Yisaya 52:4) Farao, mokonzi ya Ezipito, akómisaki Bayisalaele baombo, nzokande babengaki bango kobenga mpo báfanda kuna. Kasi Yehova abomaki Farao mpe basoda na ye na kati ya Mbu Motane. (Exode 1:11-14; 14:27, 28) Ntango Senakeriba, mokonzi ya Asiria, akanelaki Yelusaleme, anzelu ya Yehova abomaki basoda 185 000 ya mokonzi yango. (Yisaya 37:33-37) Bobele bongo, ezala Babilone ya kala to Babilone Monene bakoki te kokima etumbu mpo na minyoko oyo banyokolaki basaleli ya Nzambe.

“Bato na ngai bakoyeba nkombo na ngai”

7. Kokangama ya bato ya ekólo ya Yehova na boombo ezalaki na bopusi nini likoló na nkombo na ye?

7 Kokangama ya bato ya Yehova na boombo etali mpe nkombo na ye, ndenge esakweli emonisi yango: ‘Bongo Yehova Nzambe alobi ete, Nazali na nini awa ete bato na ngai balongolami na ntina te? Yehova alobi ete, Baoyo bazali na lokumu likoló na bango bazali konguluma, mpe mokolo mobimba, ntango nyonso, nkombo na ngai ezali kotyolama. Bongo, bato na ngai bakoyeba nkombo na ngai; na mokolo yango bakoyeba ete ezali ngai moto nakoloba; ngai nazali awa.’ (Yisaya 52:5, 6) Nyonso wana ezali na litomba nini mpo na Yehova? Ntango Yisalaele ezalaki na boombo na Babilone, yango etalaki ye na nini? Yehova asengeli kosala likambo moko mpamba te Babilone akangi bato ya ekólo na ye na boombo mpe azali koganga na esengo mpo alongi bango. Komikumisa wana etindi Babilone asakana na nkombo ya Yehova. (Ezekiele 36:20, 21) Azali koyeba te ete soki Yelusaleme etikali mpamba ezali mpo Yehova asilikelaki bato ya ekólo na ye. Kasi Babilone azali komona nde ete Bayuda bakangami na boombo mpo Nzambe na bango azali na makasi te. Kutu Belesasala, mokonzi-molandi ya Babilone asɛkaki Yehova mpe asalelaki bakɔpɔ ya tempelo na Ye na fɛti moko oyo asalaki mpo na kokumisa banzambe ya Babilone.—Danyele 5:1-4.

8. Kobanda liwa ya bantoma, ndenge nini nkombo ya Yehova etalelamaki?

8 Ndenge nini makambo wana nyonso etaleli “Yelusaleme mboka ya likoló”? Kobanda lipɛngwi ekɔtelaki baoyo bazalaki koloba ete bazali baklisto, tokoki koloba ete “nkombo ya Nzambe ezali kotukama mpo na [bango] na kati ya bikólo mosusu.” (Baloma 2:24; Misala 20:29, 30) Ya solo, mpo na biyambayamba Bayuda babandaki koboya kosalela nkombo ya Nzambe. Nokinoki nsima ya liwa ya bantoma, baklisto bapɛngwi balandaki likanisi yango mpe batikaki kosalela nkombo mpenza ya Nzambe. Lipɛngwi ebotaki mangomba ya boklisto, oyo ezali eteni monene ya Babilone Monene. (2 Batesaloniki 2:3, 7; Emoniseli 17:5) Makambo ya mbindo mpenza mpe ya kosopa makila na nko oyo mangomba ya boklisto esalaki eyokisi nkombo ya Yehova nsɔni.—2 Petelo 2:1, 2.

9, 10. Bososoli nini ya solosolo etali masɛngami ya Yehova mpe nkombo na ye bato oyo Nzambe asali na bango kondimana na ntango na biso bakómi na yango?

9 Ntango Yesu Klisto, Sirise Monene, asikolaki bato oyo Nzambe asalaki na bango kondimana na boombo ya Babilone Monene na 1919, bayaki koyeba malamu makambo oyo Yehova azali kosɛnga bango. Batikaki ebele ya mateya ya mangomba ya boklisto oyo eutaki na bapakano, liboso kutu losambo ya boklisto ebanda: mateya lokola Bosato to Trinité, molimo ekufaka te, mpe monyoko ya seko na lifelo ya mɔtɔ. Na ntango yango, bazwaki ekateli ya kolongola eloko nyonso oyo ezalaki na boyokani na Babilone. Bayaki mpe kokanga ntina ya komikɔtisa soki moke te na makambo ya politiki. Balingaki kutu komipɛtola na nyongo nyonso ya makila oyo basusu kati na bango bakokaki komibendela.

10 Basaleli ya Nzambe na ntango na biso bakangaki mpe malamu mpenza ntina ya nkombo ya Yehova. Na 1931 bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova, basakolaki bongo polele ete bazali na ngámbo ya Yehova mpe ya nkombo na ye. Lisusu, ntango Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na 1950, Batatoli ya Yehova bazongisaki nkombo ya Nzambe na esika na yango. Na ntembe te, bakangi ntina ya nkombo ya Yehova mpe bazali kosakola yango kino na nsukansuka ya mabelé.

“Ye oyo akoyeisa nsango malamu”

11. Mpo na nini maloba “Nzambe na yo akómi Mokonzi” ebongi mpenza na makambo oyo esalemaki na mobu 537 L.T.B.?

11 Sikoyo likebi na biso ezongi lisusu epai ya Siona ntango oyo yango ezali naino kaka mpamba. Momemi-nsango moko apusani penepene, azali koya na nsango malamu: “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu [ya eloko oyo eleki malamu], ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo [akómi] mokonzi.” (Yisaya 52:7) Na mobu 537 L.T.B., ndenge nini bakokaki koloba ete Nzambe ya Siona akómi Mokonzi? Yehova azalaka ntango nyonso Mokonzi te? Na ntembe te, ye azali “Mokonzi ya seko”! (Emoniseli 15:3) Kasi maloba “Nzambe na yo akómi Mokonzi” ebongi mpenza mpamba te kokwea ya Babilone mpe maloba ya mokonzi mpo na kotonga lisusu tempelo na Yelusaleme mpe kozongisa losambo ya pɛto kuna ezali lolenge ya sika oyo Yehova amonisi bokonzi na ye.—Nzembo 97:1.

12. Nani apesaki ndakisa na mosala ya “komema nsango malamu,” mpe na ndenge nini?

12 Na mikolo ya Yisaya, moto moko te to etuluku moko te ya bato bayebanaki ete bazali “ye oyo akoyeisa nsango malamu.” Nzokande, lelo oyo momemi-nsango malamu yango ayebani. Yesu Klisto nde momemi-nsango ya kimya ya Yehova oyo aleki monene. Ntango azalaki na mabelé, asakolaki nsango malamu ete bato bakosikolama na mitungisi nyonso oyo euti na lisumu ya Adama, ná maladi ná liwa. (Matai 9:35) Yesu atiki ndakisa ya molende mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu ya eloko oyo eleki malamu, mpe asalelaki mabaku nyonso mpo na koteya bato makambo ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 5:1, 2; Malako 6:34; Luka 19:1-10; Yoane 4:5-26) Mpe bayekoli na ye balandaki ndakisa na ye.

13. (a) Ndenge nini ntoma Paulo asaleli maloba “kitoko boni likoló ya ngomba makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu” mpo na kolobela bato mingi? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete makolo ya bamemi-nsango ezali “kitoko”?

13 Na mokanda na ye epai ya Baloma, ntoma Paulo atángi maloba ya Yisaya 52:7 mpo na komonisa ntina ya mosala ya kosakola nsango malamu. Alandisi ebele ya mituna oyo ezali kotinda na kokanisa, na ndakisa: ‘Ndenge nini bato bakoyoka nsango soki moto oyo akosakola azali te?’ Na nsima alobi: “Kaka ndenge ekomamá ete: ‘Oyo nde kitoko makolo ya baoyo bazali kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu!’” (Baloma 10:14, 15) Na ndenge yango, Paulo asaleli maloba ya Yisaya 52:7 mpo na kolobela bato mingi, mpamba te asaleli “baoyo” na esika ya “ye oyo” ndenge ezali na makomi ya ebandeli ya Yisaya. Na ndakisa ya Yesu Klisto, baklisto nyonso bazali bamemi ya nsango malamu ya kimya. Ndenge nini makolo na bango ezali “kitoko”? Yisaya azali koloba lokola nde momemi-nsango yango auti na bangomba oyo ezali penepene na Yuda azali koya na Yelusaleme. Na mosika, moto akoki te komona makolo ya momemi-nsango. Nzokande, awa batye likebi na momemi-nsango, mpe makolo ezali komonisa momemi-nsango yango ye mei. Kaka ndenge bato ya komikitisa na ekeke ya liboso bazalaki kosepela komona Yesu ná bayekoli na ye, lelo mpe ezali se bongo, bato ya komikitisa oyo bazali kotosa nsango malamu oyo epesaka bomoi basepelaka mingi komona Batatoli.

14. Na ntango na biso, ndenge nini Yehova akómaki Mokonzi, mpe kobanda ntango nini likambo yango ezali kosakolama epai ya bato?

14 Na mikolo na biso, kobanda ntango nini maloba “Nzambe na yo akómi Mokonzi” eyokanaki? Kobanda na 1919. Na mbula yango, na liyangani moko oyo esalemaki na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, Joseph Rutherford, oyo azalaki na ntango yango prezida ya la Société, alendisaki bayoki na ye na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo “Lisukulu mpo na baninga ya mosala.” Lisukulu yango, oyo euti na Yisaya 52:7 mpe Emoniseli 15:2, elendisaki baoyo nyonso bazalaki na liyangani yango ete bámipesa na mosala ya kosakola. Na ndenge yango, ‘makolo kitoko’ ebandaki komonana likoló ya “bangomba.” Libosoliboso baklisto bapakolami, mpe na nsima baninga na bango “bampate mosusu,” bakendeki kosakola na molende nyonso nsango malamu ete Yehova akómi Mokonzi. (Yoane 10:16) Ndenge nini Yehova akómaki Mokonzi? Amonisaki lolenge ya sika ya bokonzi na ye na 1914 ntango atyaki Mwana na ye, Yesu Klisto, Mokonzi na Bokonzi ya likoló oyo eutaki kosalema. Mpe Yehova amonisaki lolenge mosusu ya bokonzi na ye na 1919 ntango asikolaki “Yisalaele ya Nzambe” na Babilone Monene.—Bagalatia 6:16; Nzembo 47:8; Emoniseli 11:15, 17; 19:6.

“Bakɛngɛli na yo batomboli mongongo”

15. Banani bazali “bakɛngɛli” oyo bazali kotombola mongongo na bango na mobu 537 L.T.B.?

15 Ntango bagangaki ete “Nzambe na yo akómi Mokonzi,” maloba yango esɛngaki nde bato básala likambo moko boye? Ɛɛ. Yisaya akomi boye: ‘Yoká! Bakɛngɛli na yo batomboli mongongo na bango likoló. Bayembi elongo mpo na esengo, bakomona liso na liso kozonga na Yehova epai ya Siona.’ (Yisaya 52:8) Na mobu 537 L.T.B., mokɛngɛli ya solo ata moko te atyamaki na Yelusaleme mpo na koyamba bato ya liboso oyo bautaki na boombo. Engumba yango etikalaki mpamba mbula 70. (Yilimia 25:11, 12) Na yango, “bakɛngɛli” oyo batomboli mongongo ezali bongo Bayisalaele oyo bayokaki liboso mpenza nsango ete Siona ekozongisama, mpe oyo bapesaki bana mosusu ya Siona nsango yango. Ntango bamonaki ndenge Yehova apesaki Babilone na mabɔkɔ ya Sirise na mobu 539 L.T.B., bakɛngɛli yango bazalaki na ntembe moko te na makanisi na bango ete Yehova alingi kosikola bato na ye. Esika moko na baoyo bandimi libyangi na bango, bakɛngɛli balandi koganga na esengo, na bomoko, mpo basusu mpe báyoka nsango malamu yango.

16. Nani oyo bakɛngɛli bazali komona “liso na liso,” mpe ndenge nini?

16 Bakɛngɛli wana ya bokɛngi bazali kosala boyokani ya makasi mpe ya malamu mpenza elongo na Yehova, bazali komona ye “liso na liso” lokola nde bazali komona elongi na ye. (Mituya 14:14) Boyokani ya malamu mpenza oyo ezali kati na bango ná Yehova mpe bango na bango ezali komonisa bomoko na bango mpe ete nsango na bango ezali nsango ya esengo.—1 Bakolinti 1:10.

17, 18. (a) Ndenge nini etuluku ya bakɛngɛli ya ntango na biso etomboli mongongo na yango? (b) Ndenge nini etuluku ya bakɛngɛli bagangaki na bomoko?

17 Na kokokisama ya esakweli yango na mikolo na biso, etuluku ya bakɛngɛli, “moombo ya sembo mpe ya mayele” atomboli mongongo na ye kaka te mpo na baoyo bazali na kati ya ebongiseli ya Nzambe oyo ezali komonana kasi mpe mpo na baoyo bazali libándá. (Matai 24:45-47) Libyangi epesamaki na 1919 mpo na koyanganisa batikali ya baklisto bapakolami, mpe na 1922 libyangi yango ekómaki makasi na liyangani oyo esalemaki na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na nzela ya elendiseli oyo ete “bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Kobanda na 1935, likebi etyami mingi na koyanganisama ya ebele ya bato oyo bakokani na bampate. (Emoniseli 7:9, 10) Na bambula oyo, bokonzi ya Yehova ezali kosakolama makasi mpenza. Ndenge nini? Na mobu 2000, basakoli soki milio motoba bazalaki koyebisa bokonzi ya Yehova na bamboka mpe bateritware koleka 230. Lisusu, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, eloko ya liboso oyo etuluku ya bakɛngɛli ezali kosalela, ezali kosakola nsango yango ya esengo na minɔkɔ koleka 130.

18 Mpo na kosangana na mosala wana oyo ezali kosangisa bato esika moko, ezali kosɛnga komikitisa mpe kolinga bandeko. Mpo libyangi yango eyokana malamu, baoyo nyonso bazali kosangana na yango basengeli kosakola nsango kaka moko, kolobela nkombo ya Yehova, lisiko oyo apesaki, bwanya na ye, bolingo na ye mpe Bokonzi na ye. Soki baklisto nyonso na mokili mobimba bazali kosala na bomoko, bokangami na bango na Yehova ekokóma makasi, mpe yango ekotinda bango básakola nsango malamu na bomoko.

19. (a) Ndenge nini ‘bisika oyo etikalaki mpamba na Yelusaleme’ ekómi na nsai? (b) Ndenge nini Yehova “azipolaki lobɔkɔ na ye mosantu”?

19 Ntango basaleli ya Nzambe bazali koganga na esengo, ata esika oyo bafandaka emonanaka ete ezali na nsai. Esakweli yango elandi koloba boye: ‘Bandá koyemba nzembo, bino bisika ya mpamba kati na Yelusaleme; zambi Yehova abɔndisi bato na ye, asikoli Yelusaleme. Yehova azipoli lobɔkɔ na ye mosantu, liboso na miso ya mabota nyonso; mpe nsuka nyonso na mokili bakomona kobikisa na Nzambe na biso.’ (Yisaya 52:9, 10) Ntango baoyo bazali kouta na Babilone bakómi, bisika ya Yelusaleme oyo etikalaki mpamba, mawamawa, ekómi na nsai monene mpamba te sikoyo losambo ya pɛto ya Yehova ekoki kozongisama. (Yisaya 35:1, 2) Ya solo, lobɔkɔ ya Yehova nde esali likambo yango. “Azipoli lobɔkɔ na ye mosantu,” lokola mpo na kogumba mabɔkɔ ya elamba mpo akoka komipesa na mosala ya kobikisa bato na ye.—Ezela 1:2, 3

20. Kozipola lobɔkɔ ya Yehova na mikolo na biso ebimisi nini mpe ekobimisa lisusu nini?

20 Na “mikolo ya nsuka” oyo, Yehova azipoli lobɔkɔ mosantu na ye mpo na kopesa nguya na batikali bapakolami, “batatoli mibale” oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. (2 Timote 3:1; Emoniseli 11:3, 7-13) Kobanda na 1919, bakɔti na paladiso ya elimo, ezaleli ya elimo oyo bazali na yango sikawa elongo na bamilio ya baninga na bango, bampate mosusu. Nsukansuka, Yehova akozipola lobɔkɔ na ye mosantu mpo na kobikisa basaleli na ye na “Hala–Magedona.” (Emoniseli 16:14, 16) Na ntango yango, “nsuka nyonso na mokili bakomona kobikisa ya Nzambe na biso.”

Likambo oyo basengeli kosala nokinoki

21. (a) Nini basɛngi baoyo ‘bakumbi biloko ya Yehova’? (b) Mpo na nini Bayuda oyo balongwe na Babilone basengeli te kobanga?

21 Baoyo bazali kobima na Babilone mpo na kozonga na Yelusaleme bazali na likambo moko oyo basengeli kosala nokinoki. Yisaya akomi boye: ‘Bólongwa! Bólongwa! Bókima esika yango, bósimba eloko ya mbindo te; bóbima na kati na ye, bómisantisa, bino baoyo bokumbaka biloko ya Yehova. Zambi bokobima na mbangu te, bokolongwa mpo na kokima te, mpo ete Yehova akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Yisalaele akozala mokɛngɛli na nsima.’ (Yisaya 52:11, 12) Bayisalaele oyo balingi kokende basengeli kotika na Babilone eloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya lokuta ya Babilone. Lokola bamemi biloko ya Yehova oyo eutaki na tempelo ya Yelusaleme, basengeli kozala pɛto, kaka te na libándá to na ndenge esɛngami na milulu, kasi libosoliboso na kati ya mitema na bango. (2 Mikonzi 24:11-13; Ezela 1:7) Lisusu, Yehova azali kotambola liboso na bango, yango wana basengeli kobanga te, to basengeli mpe te kokimakima, lokola nde babomi-bato bazali koluka kosala bango mabe. Nzambe ya Yisalaele nde azali nsima na bango mpo na kobatela bango.—Ezela 8:21-23.

22. Ndenge nini Paulo amonisi mpenza ntina ya bopɛto kati na baklisto bapakolami?

22 Maloba ya Yisaya mpo na komibatela pɛto ezali kokokisama na monene na yango epai ya bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló.” Ntango ntoma Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti ete básala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te, atángaki maloba ya Yisaya 52:11: “‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, mpe ‘bótika kosimba eloko ya mbindo.’” (2 Bakolinti 6:14-17) Ndenge kaka Bayisalaele bazalaki kokima Babilone mpo na kozonga na mboka na bango, baklisto mpe basengeli kokima losambo ya lokuta ya Babilone.

23. Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali lelo kosala milende mpo na komibatela pɛto?

23 Likambo yango ekokisamaki mpenza epai ya bayekoli bapakolami ya Yesu Klisto, oyo bakimaki Babilone Monene na 1919. Bamipɛtolaki mokemoke na kotikáká makambo nyonso ya mbindo oyo etali losambo ya lokuta. (Yisaya 8:19, 20; Baloma 15:4) Bakangaki mpenza ntina ya kozala na bizaleli ya pɛto. Atako Batatoli ya Yehova batosaka ntango nyonso mitinda ya bizaleli ya pɛto, na 1952 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki na masolo oyo emonisaki ntina ya kopesa bato ya mbindo disipilini mpo na kobatela lisangá pɛto. Disipilini ya ndenge yango esalisaka mpe moto oyo asali masumu mpo ayeba mpenza ntina ya kobongola motema na ndenge ya solosolo.—1 Bakolinti 5:6, 7, 9-13; 2 Bakolinti 7:8-10; 2 Yoane 10, 11.

24. (a) Na mikolo na biso, “biloko ya Yehova” ezali nini? (b) Mpo na nini lelo oyo, baklisto batye motema ete Yehova akolanda kotambola liboso na bango mpe akozala mokɛngɛli na bango na nsima?

24 Baklisto bapakolami elongo na ebele ya bato oyo bazali kati na bampate mosusu bazwi ekateli makasi ya kosimba eloko moko te oyo ezali mbindo na elimo. Lokola bazali bato oyo bapɛtolami, yango esali ete bákokisa masɛngami mpo na kozala bamemi ya “biloko ya Yehova,” oyo ezali bibongiseli malamu oyo Nzambe akamati mpo na mosala ya bosantu: kosakola ndako na ndako mpe koyekola na bato Biblia mpe mitindo mosusu ya mosala ya boklisto. Soki bamibateli pɛto, basaleli ya Nzambe lelo oyo bakoki kotya motema ete Yehova akolanda kotambola liboso na bango, mpe akozala mokɛngɛli na bango na nsima. Ɛɛ, basaleli ya pɛto ya Nzambe bazali na ebele ya bantina ya ‘koganga na esengo na bomoko’!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Mokapo 15 ya mokanda oyo mpo na koyeba makambo mwa mingi oyo etali boyokani oyo ezali kati na “Yelusaleme mboka ya likoló” mpe bana na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 183]

Siona akosikolama na boombo

[Elilingi na lokasa 186]

Kobanda na 1919, ‘makolo kitoko’ ebimi lisusu likoló ya “bangomba”

[Elilingi na lokasa 189]

Batatoli ya Yehova bazali koloba na bomoko

[Elilingi na lokasa 192]

Baoyo ‘bakumbi biloko ya Yehova’ basengeli kozala pɛto na bizaleli mpe na elimo