Mituna oyo baoyo basepelaka na nsango malamu batunaka mingi
Mituna oyo baoyo basepelaka na nsango malamu batunaka mingi
Soki Nzambe azali bolingo, mpo na nini atiki ete mabe esalemaka?
NZAMBE atiki ete makambo ya mabe esalemaka, mpe bato mingi basepelaka kosala makambo ya mabe na nko. Na ndakisa, bato mingi bazali koluka kobunda bitumba, bazali kobwakela bana babɔmbɛ, bazali kobebisa mabele na mɔ́tɔ, mpe bazali koyeisa nzala. Bato mingi bazali komela makaya, mpe bazali kozwa kanser ya mimpululu (poumons), bazali kosala ekobo mpe bazali kozwa maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto, bazali komipesa na komela masanga mingi koleka mpe bazali kozwa maladi babengi cirrhose du foie, mpe bongo na bongo. Bato ya ndenge wana balingaka mpenza te ete mabe esila. Balingaka mpe te ete misala na bango ya mabe esila mpe balingaka te ete makambo yango eyokisa bango mpasi. Ntango babukaka oyo balonaki, bamilelaka ete, “Mpo na nini likambo ya boye ekómeli ngai?” Bazali kopesa Nzambe foti, mpe lokola Masese 19:3 elobi yango: “[Bozoba] ya moto ekobebisa nzela na ye, mpe motema na ye ekotombokela [Yehova].” Soki Nzambe apekisaki bango na ntango balingaki kosala mabe, mbɛlɛ balobi ete Nzambe abɔtɔli bonsomi na bango ya kosala makambo oyo balingi!
Soki Yehova atiki ete mabe esalemaka, ezali mingimingi mpo na komonisa na Satana ete alobaki solo te ntango abimisaki ntembe. Satana Zabolo alobaki ete Nzambe akoki kotikala ata na moto moko te ya sembo awa na mabele soki bakutani na komekama. (Yobo 1:6-12; 2:1-10) Yehova atikaki Satana na bomoi mpo amona soki maloba na ye ezali solo. (Exode 9:16.) Satana azali ntango nyonso kobimisa makambo ya mawa mpe kopɛngwisa bato na nzela ya Nzambe mpo akoka kolonga na ntembe na ye. (Emoniseli 12:12) Nzokande, Yobo atikalaki sembo. Yesu mpe atikalaki sembo. Lelo oyo, baklisto ya solo batikalaka mpe sembo.—Yobo 27:5; 31:6; Matai 4:1-11; 1 Petelo 1:6, 7.
Nalingaka kondima ete paladiso ekozala awa na mabele epai bato bakofanda seko, kasi namonaka lokola nde ekosalema te; yango ezali mpenza solo?
Biblia elobi ete ekosalema. Likambo yango emonanaka lokola ekosalema te kaka mpo bato bamoni mpasi na boumeli ya bambula ebele mpenza. Yehova azalisaki mabele mpe alobaki na babalani ya liboso ete bátondisa yango na mibali na basi oyo bakozala sembo mpe oyo bakobatela banzete, banyama, mpe bakobatela mabele yango ete ezala ntango nyonso kitoko mpe bábebisa yango te. (Talá nkasa 12 mpe 17.) Paladiso oyo elakami ezali ndɔtɔ mpamba te;
makambo oyo ezali kopesa bato mawa lelo oyo eleki mpenza mingi mpe ekoumela lisusu ntango molai te. Paladiso ekokitana yango.Ndenge nini tokoki kopesa eyano na bato oyo basɛkaka mpe balobaka ete Biblia ezali buku ya masapo mpamba mpe ete masolo na yango eyokani na siansi te?
Kondima bilaka yango ezali bozoba te. “Kondima euti na koyoka.” Soki moto azali koyekola Liloba ya Nzambe, akomona mayele na yango polele mpe kondima na ye ekoya makasi.—Baloma 10:17; Baebele 11:1.
Biloko ya kala oyo bazali kokundola na mabele oyo ezali kolobela Biblia ezali komonisa polele ete makambo oyo ekomami na Biblia ezali mpenza solo. Makambo ya siansi ya solosolo eyokanaka na makambo oyo elobelami na Biblia. Makambo oyo elandi elobamaki na Biblia banda kala liboso ete bato ya siansi báyeba yango: ndenge mokili ebandaki mpe biloko ezalaki kosalema na kolandana, mabele ezali libungutulu, mabele esimbami na eloko moko te, ndɛkɛ mosusu esalaka mibembo ya mosika.—Genese, mokapo 1; Yisaya 40:22; Yobo 26:7; Yilimia 8:7.
Ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama emonisi mpenza ete ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Bambula mingi liboso, Danyele asakolaki ete banguya ya mokili mobimba ekobima mpe ekokweya, asakolaki mpe ntango oyo Masiya asengelaki koya mpe kobomama. (Danyele, mokapo 2, 8; Da 9:24-27) Lelo oyo, bisakweli mosusu ya Biblia ezali naino kokokisama, bisakweli yango ezali komonisa ete tokómi na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5; Matai, mokapo 24) Moto moko te akoki koyebisa makambo oyo esalami naino te na bosikisiki ndenge wana. (Yisaya 41:23) Mpo na koyeba makambo mosusu mingi, talá babuku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? mpe Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ndenge nini nakoki koyeba kopesa biyano na mituna oyo etali Biblia?
Osengeli koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola, osengeli mpe kosɛnga Nzambe elimo santu na ye mpo etambwisa yo. (Masese 15:28; Luka 11:9-13) Biblia elobi ete: “Soko moko na bino azangi mayele, [asɛnga ntango nyonso] Nzambe oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te. Bongo akozwa yango.” (Yakobo 1:5) Lisusu, mikanda oyo elimbolaka Biblia ekoki mpe kosalisa yo. Bato mosusu mpe bakoki kosalisa yo, ndenge Filipo asalisaki Moetiopia. (Misala 8:26-35) Batatoli ya Yehova bayekolaka Biblia na bato oyo basepelaka na solo, mpe bafutisaka bango mbongo te mpo na yango. Yo mpe kokakatana te mpo na kosɛnga bango básalisa yo.
Mpo na nini bato mingi balingaka Batatoli ya Yehova te mpe bapekisaka ngai nayekola Biblia na bango?
Yesu akutanaki na mikakatano na mosala na ye ya kosakola, alobaki ete bayekoli na ye bakokutana mpe na mikakatano. Mokolo moko, ntango bato mosusu bakamwaki na mateya ya Yesu, banguna na ye—bakonzi ya mangomba—balobaki ete: “Bino mpe bokosami? Yoane 7:46-48; 15:20) Bato mingi oyo balobaka na yo ete otika koyekola na Batatoli, bayebi Batatoli malamu te to bazali na makanisi mabe mpo na bango. Yekolá Biblia na Batatoli mpe talá yo moko soki okoyeba makambo mingi ya Biblia to te.—Matai 7:17-20.
Moko na mikóló to na Bafalisai andimi ye?” (Mpo na nini Batatoli bakendaka kotala bato oyo bazali na mangomba na bango?
Ezali mpo balingi kolanda ndakisa ya Yesu. Yesu azalaki kokenda epai ya Bayuda. Bayuda bazalaki na lingomba na bango, kasi na makambo mingi bazalaki kolanda Liloba ya Nzambe te. (Matai 15:1-9) Bikólo nyonso ezali na mangomba na yango, ezala bikólo oyo emibengaka ya boklisto to oyo ezali ya boklisto te. Bindimeli ya bato esengeli koyokana na Liloba ya Nzambe, mpe milende oyo Batatoli basalaka mpo na kosalisa bango na likambo yango ezali komonisa mpenza bolingo oyo bazali na yango mpo na bazalani na bango.
Batatoli bakanisaka ete lingomba ya malamu ezali kaka oyo ya bango?
Soki moto atii motema na ye mobimba na lingomba na ye, asengeli mpe kondima ete lingomba yango ezali lingomba ya solo. Soki bongo te, mpo na nini azali komipesa na yango? Biblia epesi baklisto toli ete: “Bómeka makambo nyonso mpe bósimba makambo malamu ngwi.” (1 Batesaloniki 5:21) Tosengeli bongo koluka koyeba soki bindimeli na biso eyokani mpenza na Makomami, mpamba te kondima ya solo ezali bobele moko. Baefese 4:5 endimisi likambo yango mpe elobi ete ezali bobele na “Nkolo moko, kondima moko, [batisimo] moko.” Yesu andimaki te likanisi oyo epalangani lelo ete banzela ezali mingi, mangomba ezali mingi, mpe nyonso ezali komema na lobiko. Nzokande, alobaki ete: “Ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” Batatoli ya Yehova bandimaka ete bango bazali na nzela yango. Soki te, mbɛlɛ balukaka kokɔta na lingomba mosusu.—Matai 7:14.
Batatoli bakanisaka ete bobele bango nde bakobika?
Ezali bongo te. Bato mosusu ebele oyo bazalaki na bomoi na boumeli ya ebele ya bambula oyo eleká kasi bazalaki Batatoli ya Yehova te, bakosekwa mpe bakozala na bomoi. Bato mingi oyo bazali na bomoi lelo bakoki kondima solo mpe kondima bosembo liboso ete “bolɔzi monene” eya, mpe soki basali bongo bakozwa lobiko. Lisusu, Yesu alobaki ete tosengeli te kosambisa bato mosusu. Biso totalaka bobele libanda; kasi Nzambe atalaka motema. Amonaka malamumalamu makambo oyo ezali na kati mpe asambisaka na motema mawa. Likambo ya kosambisa apesi yango na mabɔkɔ ya Yesu, kasi na mabɔkɔ na biso te.—Matai 7:1-5; 24:21; 25:31.
Bato oyo bayanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova basengeli kopesa mabonza?
2 Bakolinti 9:7) Na Bandako ya Bokonzi mpe na bisika ya mayangani ya Batatoli ya Yehova, bakɔngɔlaka mabonza te. Batyaka bakɛsi ya makabo mpe moto oyo alingi kotya likabo na ye akotya yango na kɛsi wana. Moto moko te ayebaka oyo bato mosusu bapesaka to soki bapesaka. Bamosusu bazali na likoki ya kopesa mingi koleka; kasi bamosusu mpe bazali ata na eloko ya kopesa te. Yesu amonisaki likanisi ya malamu na likambo yango ntango alobelaki bato oyo bazalaki kopesa makabo na ebombelo ya mosolo ya tempelo na Yelusaleme. Alobaki ete likambo ya ntina ezali nde likoki ya kopesa mpe kosala yango na motema mobimba, kasi motuya ya mbongo te.—Luka 21:1-4.
Mpo na makabo ya mbongo, ntoma Paulo alobaki boye: “Moto na moto asala [lokola] na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (Soki nakómi Motatoli ya Yehova, ngai mpe nasengeli kosakola nsango malamu lokola bango?
Soki moto ayebi makambo mingi oyo etali elaka ya Paladiso oyo ekosalema awa na mabele na ntango ya Bokonzi ya Klisto, akokóma na mposa ya koyebisa bato mosusu elaka yango. Yo mpe okoki kosala bongo mpamba te ezali nsango moko malamu!—Misala 5:41, 42.
Kosala bongo ezali lolenge oyo eleki malamu ya komonisa ete ozali mpenza moyekoli ya Yesu Klisto. Na kati ya Biblia, Yesu abengami “motatoli ya sembo mpe ya solo.” Ntango azalaki awa na mabele, asakolaki mpe alobaki ete: “Bokonzi na likoló esili kobɛlɛma,” mpe atindaki bayekoli na ye básala mpe bongo. (Emoniseli 3:14; Matai 4:17; 10:7) Na nsima, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango.” Asakolaki mpe ete liboso nsuka eya, “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.”—Matai 24:14; 28:19, 20.
Ndenge ya kosakola nsango malamu ezali mingi. Moto akoki, ntango azali kosolola na baninga na ye mpe bato mosusu oyo ye ayebi bango, koyebisa bango nsango malamu. Batatoli mosusu batindelaka bato mikanda to basololaka na bango na telefone mpo na koyebisa bango nsango malamu. Basusu batindelaka bato oyo bayebi bango mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo bamoni ete ezali na masolo oyo ekosepelisa bango. Lokola bazalaka na mposa ya kokutana na moto nyonso, Batatoli bakendaka kosakola nsango malamu ndako na ndako.
Biblia ezali kobenga bato boye: “[Elimo, NW] mpe Mwasi na libala balobi ete, Yaká! Tiká moyoki aloba ete, Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Koyebisa bato mosusu makambo etali Paladiso oyo ekotyama awa na mabele mpe ndenge ekomemela bato mapamboli, ezali likambo oyo esengeli kosalema na motema mobimba mpe na mposa ya kopanza nsango yango.
Na ntembe te, ozali na mituna mosusu oyo etali Batatoli ya Yehova mpe bindimeli na bango. Mbala mosusu makambo mosusu ebimisaka ntembe. Tozali na mposa ya koyanola na mituna na yo, kasi esika ezali moke na mwa buku oyo. Yango wana tosɛngi yo otuna Batatoli oyo bazali esika ofandi mituna yango. Okoki kotuna bango ata na Ndako ya Bokonzi, esika basalaka makita na bango to ntango bakoya kotala yo na ndako. To mpe okoki kokoma mituna na yo mpe kotinda yango na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo, to na adresi oyo ebongi na yo oyo ezali awa na nse.