Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 10

Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo

Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo

“Nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka noki te.”​—MOSAKOLI 4:12.

1, 2. (a) Mituna nini tokoki komituna mpo na bato oyo babalani sika, mpe mpo na nini? (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

 OSEPELAKA kokende na fɛti ya libala? Bato mingi basepelaka na yango mpamba te ezalaka mpenza esengo. Mokolo yango, bato oyo babalani balataka kitoko mpenza. Lisusu, bazalaka na esengo makasi oyo emonanaka ata na bilongi na bango! Okomona bango bazali kosɛka mpe bazalaka na elikya ete bakozala na bomoi ya malamu.

2 Nzokande, tokoki kowangana te ete libala ezali na mikakatano mingi lelo oyo. Atako tolingaka ete bato oyo babalani báfanda malamu, ntango mosusu tomitunaka ete: ‘Libala yango ekozala na esengo? Ekoumela?’ Biyano na mituna yango ekotalela ndenge oyo mwasi ná mobali bakotyela batoli ya Nzambe motema mpe bakosalela yango. (Tángá Masese 3:5, 6.) Basengeli kosala yango soki balingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Sikoyo, tótalela biyano ya Biblia na mituna minei oyo: Moto asengeli kobala mpo na bantina nini? Soki olingi kobala, nani oyo okoki kopona lokola molongani? Ndenge nini okoki komibongisa mpo na libala? Mpe nini ekoki kosalisa mwasi ná mobali bázala na libala ya esengo?

MOTO ASENGELI KOBALA MPO NA BANTINA NINI?

3. Mpo na nini ezali bwanya te kobala kaka mpo na esengo ya kobala?

3 Bato mosusu bakanisaka ete libala nde sekele ya bolamu, ete moto akoki kozala na esengo te soki azali na molongani te. Likanisi yango ezali lokuta! Yesu abalaki te; alobaki mpe ete kotikala monzemba ezali likabo mpe alendisaki baoyo bakoki kosala yango, básala yango. (Matai 19:11, 12) Ntoma Paulo mpe alobelaki matomba ya kotikala monzemba. (1 Bakorinti 7:32-38) Kasi, moko te kati na bango apesaki mobeko ete moto asengeli kotikala monzemba; kutu, “kopekisa kobala” ezali na kati ya “mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1-3) Atako bongo, bonzemba ezali na matomba mingi epai ya moto oyo alingi kosalela Yehova kozanga kotya makanisi na makambo mosusu. Yango wana, ezali likambo ya bwanya te kobala kaka mpo na esengo ya kobala; na ndakisa, mpo baninga bazali kotya yo mbamba ete obala.

4. Na ndenge nini libala ya malamu esalisaka mpo na kobɔkɔla bana?

4 Kasi, ezali nde na bantina ya malamu oyo ekoki kotinda moto abala? Ɛɛ. Libala mpe ezali likabo ya Nzambe na biso oyo atondi na bolingo. (Tángá Ebandeli 2:18.) Libala ezali mpe na matomba mpe ekoki kopesa moto esengo. Na ndakisa, soki mwasi ná mobali bazali na boyokani ya malamu, bana oyo bakobota bakobɔkwama malamu mpenza. Mpo bana bákola malamu, basengeli kozala na baboti ya malamu, oyo balingaka bango, bateyaka bango, mpe bapesaka bango batoli. (Nzembo 127:3; Baefese 6:1-4) Kasi, bato babalanaka te kaka mpo na kobota.

5, 6. (a) Na kolanda Mosakoli 4:9-12, wapi mwa matomba ya boninga ya solosolo? (b) Ndenge nini libala ekoki kozala lokola nsinga oyo esalemi na bansinga misato?

5 Tótalela vɛrsɛ oyo ezali na ebandeli ya mokapo oyo mpe tótánga yango banda mwa bavɛrsɛ liboso: “Bato mibale baleki moto moko, mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi. Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye. Kasi ekozala boni soki moto oyo azali kaka ye moko akwei mpe moto mosusu azali te mpo na kotɛlɛmisa ye? Lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bakoyoka mpenza mɔtɔ; kasi moto oyo azali kaka ye moko akoyoka mɔtɔ ndenge nini? Mpe soki moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, bato mibale bakoki kotɛlɛmɛla ye. Mpe nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka noki te.”​—Mosakoli 4:9-12.

6 Ndimbola ya libosoliboso ya maloba yango ezali mpo na komonisa ete kozala na baninga ezali malamu mingi. Nzokande, libala ezali boninga oyo eleki boninga mosusu nyonso. Ndenge bavɛrsɛ yango emonisi, libala ekoki kosalisa moto azwa mosungi, mobɔndisi, mpe mobateli. Libala ezalaka makasi koleka soki esangisi bato mibale kaka te. Ndenge vɛrsɛ elobi yango, nsinga oyo esalemi na bansinga mibale ekoki kokatana. Kasi, ezalaka mpasi kokata nsinga oyo esalemi na bansinga misato. Tokoki kokokanisa libala ya mwasi ná mobali oyo bazali koluka libosoliboso kosepelisa Yehova na nsinga oyo esalemi na bansinga misato. Yehova azalaka na esika monene na libala ya ndenge wana, mpe yango ebakisaka makasi ya libala yango.

7, 8. (a) Toli nini Paulo apesaki minzemba oyo bazali kobunda na bamposa ya nzoto? (b) Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso tólikya te ete bomoi ekozala kaka bisengo na bisengo?

7 Lisusu, Nzambe apesi kaka bato oyo babalani ndingisa ya kosangisa nzoto. Biblia elobi ete kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali oyo babalani ezali likambo oyo epesaka esengo. (Masese 5:18) Ata soki moto aleki oyo Biblia ebengi “eleko ya ebandeli ya bolenge”​—ntango oyo bamposa ya nzoto ekómaka makasi—​akoki kaka kozala na etumba makasi mpo na kolonga bamposa yango. Soki moto azali kopekisa bamposa yango te, ekoki komema ye na etamboli ya mbindo. Na lisalisi ya elimo santu, Paulo akomaki toli oyo mpo na minzemba: “Soki bazali na komipekisa te, bábala, mpo eleki malamu kobala na esika ya kozika na mposa.”​—1 Bakorinti 7:9, 36; Yakobo 1:15.

8 Ezala mpo na bantina nini moto alingi kobala, asengeli te kolikya ete bomoi ekozala kaka bisengo na bisengo. Ndenge Paulo alobaki yango, baoyo bazali kobala “bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” (1 Bakorinti 7:28) Bato oyo babalá bakutanaka na mikakatano mosusu oyo minzemba bakutanaka na yango te. Kasi, soki osepeli kobala, okoki kosala nini mpo mikakatano yango ezala mingi te, kasi ozala nde na esengo mingi? Moko na makambo oyo okoki kosala ezali kopona malamu molongani na yo.

NDENGE NINI OKOKI KOYEBA MOLONGANI OYO ABONGI NA YO?

9, 10. (a) Ndenge nini Paulo amonisaki ete kobalana na moto oyo azali mondimi te ezali likama? (b) Mbala mingi bato oyo baboyaka toli ya Nzambe oyo epekisi kobalana na moto oyo azali mondimi te basukaka ndenge nini?

9 Na lisalisi ya elimo santu, Paulo akomaki etinda moko oyo moto asengeli kotalela ntango azali kopona molongani: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te.” (2 Bakorinti 6:14) Paulo asalelaki ndakisa ya likambo moko oyo ezalaki komonana na mosala ya bilanga. Soki bakangisi na ekanganeli moko banyama mibale oyo bazali minene to makasi ndenge moko te, bango mibale bakonyokwama. Ndenge moko mpe, soki mondimi abalani na moto oyo azali mondimi te, bakozanga te kokutana na mikakatano ya makasi. Soki moto alingi kotikala na kati ya bolingo ya Yehova, kasi molongani na ye akipaka makambo ya Nzambe te, bakozala na mikano oyo ekeseni mpe yango ekobendela bango mikakatano mingi. Yango wana, Paulo alendisaki bakristo bábala “na kati ya Nkolo kaka.”​—1 Bakorinti 7:39.

10 Bakristo mosusu bakómaka na makanisi ete eleki malamu bábalana ata na moto oyo azali mondimi te na esika bátikala kaka minzemba. Bamosusu baboyaka toli ya Biblia, mpe bazwaka ekateli ya kobalana na moto oyo azali mosaleli ya Yehova te. Mbala mingi, mabala yango esukaka mabe. Bato yango bamonaka ete babalanaki na moto oyo bazali koyokana na ye te na makambo oyo eleki ntina na bomoi. Bamiyokaka ete bazali kaka bango moko koleka kutu ntango bazalaki minzemba. Nzokande, ezali na ebele ya bakristo oyo bazali minzemba, oyo batyelaka toli ya Nzambe motema mpe balandaka yango mpenza. (Tángá Nzembo 32:8.) Atako bazalaka na mposa ya kobala, bandimaka kotikala minzemba tii ntango bakozwa molongani oyo azali mosambeli ya Yehova.

11. Nini ekoki kosalisa yo opona malamu molongani na yo? (Talá mpe etanda “ Nasengeli koluka nini epai ya moto oyo nalingi kobalana na ye?.”)

11 Kasi, yango elingi koloba te ete mosaleli nyonso ya Yehova azali molongani oyo abongi. Soki ozali na mposa ya kobala, luká moto oyo bomoto na ye, mikano na ye ya elimo, mpe bolingo na ye epai ya Nzambe, eyokani na oyo ya yo. Moombo ya sembo mpe ya mayele abimisá masolo mingi na likambo yango, mpe ekozala malamu otalela batoli yango na kati ya libondeli, mpo esalisa yo ntango olingi kozwa ekateli wana monene. a​—Tángá Nzembo 119:105.

12. Na mikili mosusu, bato balandaka momeseno nini mpo na libala, mpe ndakisa nini ya Biblia ekoki kosalisa na likambo yango?

12 Na mikili mosusu, baboti nde baponelaka mwana na bango molongani. Na mikili yango, bato bamonaka ete baboti bazali na bwanya oyo esengeli mpo na koponela mwana na bango molongani ya malamu. Mbala mingi, bato oyo babalani bongo bafandaka malamu, ndenge mpe ezalaki na ntango ya kala. Ndakisa ya Abrahama, oyo atindaki mosaleli na ye akende koluka mwasi mpo na Yisaka, ezali koteya baboti oyo basengeli kozwa ekateli ya ndenge wana lelo oyo. Abrahama alukaki te ete mwana na ye abala mwasi oyo azali na libota ya bomɛngo to ya lokumu. Asalaki milende mpo na kozwela Yisaka mwasi na kati ya bato oyo bazalaki basambeli ya Yehova. b​—Ebandeli 24:3, 67.

NDENGE NINI OKOKI KOMIBONGISA MPO OZALA NA LIBALA YA MALAMU?

13-15. (a) Ndenge nini etinda ya Masese 24:27 ekoki kosalisa elenge mobali oyo azali na mokano ya kobala? (b) Elenge mwasi asengeli kosala nini mpo amibongisa mpo na libala?

13 Soki ozali na mposa ya kobala, osengeli komituna motuna oyo, ‘Nasili mpenza komibongisa?’ Mpo na kozwa eyano osengeli kotalela kaka te mposa na yo ya kolinga moto, ya kosangisa nzoto, ya kozala na molongani, to ya kobota bana. Nzokande, ezali na makambo ya ntina mingi oyo mobali to mwasi nyonso oyo alingi kobala asengeli kotalela.

14 Elenge mobali oyo azali na mposa ya kobala asengeli liboso kokokisa etinda oyo: “Lɛngɛlá mosala na yo libándá, mpe bongisá yango mpo na yo na elanga. Nsima na yango, osengeli mpe kotonga libota na yo.” (Masese 24:27) Yango elingi koloba nini? Na ntango ya kala, soki mobali alingi “kotonga libota na [ye],” elingi koloba kobala mpe kobota bana, asengelaki komituna boye, ‘Nazali na makoki ya koleisa mwasi ná bana oyo tokobota?’ Asengelaki liboso kokata bilanga, elingi koloba kosala mosala. Etinda yango ebongi mpe lelo oyo. Mobali oyo alingi kotya mwasi na ndako asengeli komibongisa mpo na kokokisa mikumba na ye. Ntango nyonso oyo akozala na makasi, ekosɛnga asalaka mosala. Liloba ya Nzambe emonisi ete moto oyo akokisaka te bamposa ya mosuni, ya elimo mpe ya mayoki ya libota na ye, azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te!​—Tángá 1 Timote 5:8.

15 Ndenge moko mpe, mwasi oyo andimi kobala asengeli koyeba ete akozala na mikumba mingi. Biblia elobeli mwa misala oyo mwasi asengeli koyeba mpe bizaleli oyo asengeli kozala na yango mpo na kosunga mobali na ye mpe kobatela libota na ye. (Masese 31:10-31) Basi mpe mibali oyo bawelaka kobala kozanga ete bámibongisa mpo na kokokisa mikumba oyo libala esɛngaka, bakanisaka kaka matomba na bango, babosanaka makambo oyo bakoki kosala mpo na molongani na bango. Kasi, likambo eleki ntina, moto oyo azali na mposa ya kobala asengeli komibongisa na elimo.

16, 17. Baoyo balingi kobala basengeli kotalela malamu mitinda nini ya Biblia?

16 Komibongisa mpo na libala elimboli mpe kokanisa malamumalamu mikumba oyo Nzambe apesi mobali mpe mwasi. Mobali oyo azali mokristo asengeli koyeba soki kozala mokonzi ya libota elimboli mpenza nini. Mokumba yango elimboli te kokonza mwasi mpe bana. Asengeli nde komekola Yesu na ndenge ya kosalela bokonzi na ye. (Baefese 5:23) Ndenge moko mpe, mwasi mokristo asengeli koyeba esika ya lokumu oyo Nzambe apesi ye. Akondima kotosa “mobeko ya mobali na ye”? (Baroma 7:2) Na ntango abali naino te, azali na nse ya mobeko ya Yehova mpe ya Kristo. (Bagalatia 6:2) Bokonzi ya mobali na ye ekobakisela ye mobeko mosusu. Asengeli komituna soki akondima mpenza kotosa bokonzi ya moto ya kozanga kokoka. Soki likambo yango ezali kosepelisa ye te, ekoleka malamu abala te.

17 Longola yango, mobali asengeli komibongisa mpo na kokokisa bamposa oyo mwasi nyonso azalaka na yango; mwasi mpe asengeli kosala bongo mpo na bamposa ya mobali. (Tángá Bafilipi 2:4.) Paulo akomaki boye: “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Paulo akangaki ntina ete mobali azalaka na mposa amonaka mpenza ete mwasi na ye apesaka ye limemya makasi. Na ngámbo mosusu, mwasi mpe azalaka na mposa amonaka mpenza ete mobali na ye alingaka ye.​—Baefese 5:21-33.

Bafianse mingi bamonisaka bwanya na ndenge balingaka kobima kaka bango mibale te

18. Mpo na nini bafianse basengeli kozala na komipekisa?

18 Yango wana, ntango bato bazali bafianse, basengeli te kolekisaka ntango na bango kaka na bisengo mpe na masolo ya mpambampamba. Moto na moto asengeli koluka koyeba makambo oyo moninga alingaka mpe oyo aboyaka, mpe kotalela soki ekobonga mpenza bábalana. Ezali mpe ntango oyo moto na moto asengeli komipekisa! Lokola mokomoko abendamaka epai ya moninga, bakoki kokóma na mposa ya kosala makambo oyo bazali naino na ndingisa ya kosala te. Nzokande, soki bato balingani mpenza, moko te akolinga kosala epai ya moninga makambo oyo ekobebisa boyokani na ye ná Nzambe. (1 Batesaloniki 4:6) Yango wana, soki ozali fianse, zaláká na komipekisa; ezaleli yango ekosalisa yo na bomoi na yo mobimba, ezala obali to te.

OKOKI KOSALA NINI MPO LIBALA NA YO EUMELA?

19, 20. Na ndenge nini lolenge oyo bakristo batalelaka libala esengeli kokesana na ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango? Pesá ndakisa.

19 Mpo libala eumela, mobali mpe mwasi basengeli koyeba ntina ya ndai ya libala. Na babuku mpe na bafilme, mbala mingi lisolo ya lolango esukaka na libala ya esengo oyo bato mingi balɔtaka. Kasi, na bomoi ya solo, mokolo ya libala ezalaka nsuka te, ezalaka nde ebandeli ya bomoi oyo Yehova alingaki ete eumela libela. (Ebandeli 2:24) Kasi, lelo oyo bato mingi bazali kotalela makambo ndenge wana te. Na bisika mosusu, bato bakokanisaka libala na “lizita to litingá oyo ekangisi nsinga mibale.” Mbala mosusu bayebaka te ete elilingi wana eyokani mpenza na ndenge oyo bato mingi batalelaka libala. Na ndenge nini? Lizita ya malamu esengeli kotikala makasi; kasi, esengeli mpe ezala mpasi te mpo na kokanga mpe kofungola yango.

20 Bato mingi batalelaka libala lokola boyokani ya mwa ntango. Bandimaka kobalana mpo bakanisaka ete ekokokisa bamposa na bango; kasi, soki libala ekómi na matata, bamonaka malamu báboma yango. Nzokande, tóbosana te ete Biblia esaleli elilingi ya nsinga mpo na kolobela libala. Nsinga oyo bato ya masuwa basalelaka ezalaka makasi mpe eumelaka; efungwamaka te, ekatanaka mpe te ata na ntango ya mipɛpɛ ya makasi. Libala mpe esengeli koumela. Kutu, Yesu alobaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:6) Soki obali, osengeli kotalela libala ndenge yango. Yango elingi nde koloba ete libala ezali bolɔkɔ? Te.

21. Ndenge nini mobali to mwasi asengeli kozala na bokatikati ntango azali kokanisa bizaleli oyo akomona epai ya molongani na ye, mpe nini ekoki kosalisa ye asala bongo?

21 Moto na moto asengeli kozala na bokatikati ntango azali kokanisa bizaleli oyo akomona epai ya molongani na ye. Soki moto na moto azali kosala makasi atalelaka mingimingi bizaleli malamu ya molongani na ye, libala ekomemela ye esengo mpe kimya. Ekoki mpenza kosalema ete moto atalelaka mingimingi bizaleli ya malamu ya molongani na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka? Yehova atalelaka makambo nyonso na ndenge ebongi; kasi, toyebi ete akaniselaka biso mabe te. Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Mwasi ná mobali basengeli kozalaka na makanisi malamu moko mpo na mosusu mpe kolimbisanaka.​—Tángá Bakolose 3:13.

22, 23. Na likambo nini Abrahama ná Sara bazali ndakisa malamu mpo na bato oyo babalá?

22 Libala ekoki komema mapamboli mingi lisusu soki ezali kaka makasi atako bambula ezali koleka. Biblia elobeli libala ya Abrahama ná Sara ntango bakómaki mibange. Bomoi na bango ezangaki mikakatano te. Kanisá naino Sara, oyo mbala mosusu akómaki na mbula koleka 60, oyo asengelaki kotika ndako na ye ya kitoko na Ure, mboka ya bozwi, mpo akóma kofanda na bahema tii liwa na ye. Atako bongo, atosaki mobali na ye. Sara azalaki mpenza mosungi mpo na Abrahama, asalisaki ye na limemya nyonso mpo ete bikateli oyo azalaki kozwa ebota mbuma ya malamu. Botosi na ye ezalaki kaka ya mbɛbu te. Ata mpe “na motema” na ye, azalaki kobenga mobali na ye nkolo. (Ebandeli 18:12; 1 Petro 3:6) Limemya na ye mpo na Abrahama ezalaki mpenza kouta na motema.

23 Kasi, elingi koloba te ete Abrahama ná Sara bazalaki ntango nyonso na makanisi ndenge moko. Mokolo moko, Sara apesaki likanisi moko oyo “esepelisaki Abrahama ata moke te.” Nzokande, Yehova ayebisaki Abrahama ayokela mwasi na ye; na komikitisa nyonso Abrahama atosaki mpe yango ememelaki libota na bango mapamboli. (Ebandeli 21:9-13) Lelo oyo, mibali mpe basi, ata baoyo babalaná kala, bakoki kozwa liteya na ndakisa ya babalani wana oyo bazalaki kobanga Nzambe.

24. Mabala ya ndenge nini epesaka Yehova lokumu, mpe mpo na nini?

24 Na lisangá ya bokristo lelo oyo, mabala ebele mpenza ezali na esengo. Na mabala yango, basi bazalaka na limemya makasi epai ya mibali na bango, mibali balingaka basi na bango mpe bapesaka bango lokumu, mpe bango nyonso bapesanaka mabɔkɔ mpo na kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso. Soki ozali na mokano ya kobala, poná malamu molongani na yo, omibongisa malamu mpo na libala, mpe salá nyonso mpo ozala na libala ya esengo mpe ya kimya, oyo ekokumisa Yehova Nzambe. Soki osali bongo, libala na yo ekosalisa yo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

a Talá buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, mokapo 2, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Bato mosusu oyo bazalaki basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki na basi mingi. Ntango Yehova azalaki kotambwisa bato wana mpe ntango azalaki kotambwisa libota ya Yisraele, atikelaki bango nzela bábala basi mingi. Atindaki bango te bábalaka basi mingi; kasi apesaki mibeko mpo moto oyo abali basi mingi asalela bango te makambo ndenge alingi. Nzokande, bakristo bayebi ete Nzambe apesaka lisusu nzela te ete basambeli na ye bábala basi mingi.​—Matai 19:9; 1 Timote 3:2.