Privacy Settings

To provide you with the best possible experience, we use cookies and similar technologies. Some cookies are necessary to make our website work and cannot be refused. You can accept or decline the use of additional cookies, which we use only to improve your experience. None of this data will ever be sold or used for marketing. To learn more, read the Global Policy on Use of Cookies and Similar Technologies. You can customize your settings at any time by going to Privacy Settings.

Loyembo 26

Tambolá elongo na Nzambe!

Tambolá elongo na Nzambe!

(Mika 6:8)

1. Tambolá na Yah na kimya;

Mpe lingá boboto.

Monisá bosembo mpenza;

Tiká y’asunga yo.

Soki’olandi solo na ye,

Kimá bato mabe;

Ndimá litambwisi’a Nzambe;

Mpo oza’ mwana n’e.

2. Tambolá na Yah na pɛto;

Masumu kim’ango.

Kolá mpenza na elimo

Ye akondima yo.

Kanisá makambo’a pɛto,

Ya solo mpe sembo,

Kanis’ango; yiká mpiko,

Nzambe nd’elikya n’o.

3. Tambolá na Yah na sembo,

Yebá kosepela

Na oyo ozali n’ango,

Okozwa matomba.

Tambolá na Yah n’esengo,

Sanzolá Yehova.

Eseng’oy’eleki nyonso

Yah nde apesaka.