Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | MOKILI OYO EKOBONGA LISUSU?

Bato bazali koluka biyano

Bato bazali koluka biyano

SOKI ozali komitungisa to kobanga mpo na ebele ya bansango ya mabe oyo ezali koleka na mokili, yebá ete ozali yo moko te. Na mobu 2014, Barack Obama, oyo azalaki prezida ya États-Unis, alobaki ete lokola na televizyo, na radio, mpe na bazulunalo bazali kolobela mingi makambo ya mabe oyo ezali kosalema, bato mingi bazali koloba ete “mokili oyo ezali mpenza kokima mbangu . . . mpe moto moko te akoki kotɛlɛmisa yango.”

Kasi, mwa moke nsima ya koloba maloba wana, alobelaki mayele ndenge na ndenge oyo ezwami mpo na kosilisa ebele ya mikakatano ya mokili. Alobaki ete bibongiseli mosusu oyo guvɛrnema ezwaki ezali “nsango malamu” mpe ete “azali mpenza na elikya” ete “makambo ekobonga na mikolo ezali koya.” Na maloba mosusu, amonisaki ete milende oyo bato ya mitema malamu bazali kosala ekoki kobongisa mokili mpe kopekisa ete likama moko monene ekwela mokili.

Bato mingi bakanisaka mpe bongo. Na ndakisa, bato mosusu batyaka elikya na siansi, mpe balobaka ete mokili ekobonga mpo mayele ya tekinoloji ezali kokola nokinoki. Moto moko ya mayele na makambo ya baaparɛyi ya mikolo oyo mpe makambo ya kobimisa biloko ya sika alobaki na elikya nyonso ete tii tókóma na mobu 2030, “mayele na biso ya tekinoloji ekokola mbala nkóto moko koleka, mpe tii tókóma na mobu 2045, ekokola mbala milio moko koleka.” Abakisaki boye: “Tozali kosala oyo tokoki. Mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo ezali kolekela biso lisusu motó te, mpo tokómi na makoki ya kosilisa mikakatano nokinoki.”

Mokili oyo ebebi tii wapi? Etikali moke likama moko monene ekwela mokili? Atako bato mosusu ya siansi mpe ya politiki bazali kolaka bato ete mokili ekobonga, bato mingi bazali kondima te ete makambo ekobonga. Mpo na nini?

BIBUNDELI OYO EBOMAKA BATO EBELE NA MBALA MOKO. Atako ONU mpe bibongiseli mosusu ezali kosala milende mingi, elongi te kosilisa bibundeli ya nikleere. Kutu, bakonzi oyo balingaka kotosa mibeko te bazali kobunda mpo ete mibeko oyo epekisi kotambola na mondoki elongwa. Bikólo oyo ekendá nsango mpo na bibundeli na yango ya nikleere ezali kokómisa lisusu makasi babɔmbi na yango ya kala mpe kosala bibundeli mosusu ya sika. Bikólo oyo liboso ezalaki te na bibundeli oyo ebomaka bato ebele na mbala moko ezali sikoyo na likoki ya koboma bato ebele na mbala moko.

Ndenge oyo bikólo mingi lelo ekómi komilɛngɛla mpo na etumba ya nikleere, esali ete mokili oyo ekóma esika ya likama, ata na ntango ya “kimya.” Zulunalo moko (Bulletin of the Atomic Scientists) elobi: “Na ndakisa, bibundeli ya makasi oyo esalaka yango moko mpo na koboma bato, kozanga ete moto atambwisa yango, ekómi kobangisa mingi.”

BAMALADI EZALI SE KOBAKISAMA. Siansi ekoki kolonga te kosalisa moto nyonso azala nzoto kolɔngɔnɔ. Lelo oyo, makambo oyo ezali likama mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, na ndakisa komata tansiɔ, kokóma monene mingi, mopɛpɛ oyo ebebi, makaya mpe bangi, ezali se kobakisama. Bato mingi bazali kokufa na bamaladi oyo eutaka te epai ya bato mosusu, na ndakisa, kansɛr, bamaladi ya motema, mpe diabɛti. Motángo ya bato oyo bazali kobɛla bamaladi mosusu, na ndakisa maladi ya motó, ezali se kobakisama. Longola yango, na bambula euti koleka, maladi mabe oyo euti na virisi ya Ebola mpe ya Zika ebomi bato mingi koleka. Na mokuse: Bato bazali kolonga te kosilisa maladi, mpe emonani ete elikya ezali te ete bato bakosilisa maladi.

BATO BAZALI KOBEBISA MAI, MOPƐPƐ MPE ZAMBA. Baizini ezali kokoba kobebisa mopɛpɛ. Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kokufa mpo bazali kopema mopɛpɛ oyo ebebisami.

Bakompanyi, bibongiseli ya Leta mpe bato bazali kokoba kobwaka na bibale ya minene bosɔtɔ mpe salite oyo euti na bankisi ya monganga to na bilanga, basashɛ, biloko ya kopale, mpe basalite mosusu. Buku moko (Encyclopedia of Marine Science) elobi: “Bosɔtɔ wana nyonso ezali kobebisa milona, ezali kobɛlisa mpe koboma bambisi mpe banyama oyo efandaka na mai, ezala mpe bato oyo bazali kolya yango.”

Longola yango, kozwa mai ya pɛto ekómi mpasi. Robin McKie, mokomi moko ya makambo ya siansi na Grande-Bretagne, alobaki: “Na mokili mobimba, ekómi mpasi mpo na kozwa mai ya pɛto; likambo yango ekokóma na bikólo nyonso ya mokili.” Bato ya politiki balobaka ete kozanga mai ezali mokakatano oyo bato bango moko babimisi mpe yango ezali likama monene.

KONINGANA YA MABELE, MPELA, MPE MIPƐPƐ MAKASI EZALI KONYOKOLA BATO. Bato mingi koleka bazali kokufa to konyokwama mpo na makama oyo: mipɛpɛ makasi, koningana ya mabele, mai oyo ezindisi mboka, mabele oyo ezali kopasuka, mpe makama mosusu oyo ezali kobebisa mokili. Ankɛti ya ebongiseli moko ya États-Unis (National Aeronautics and Space Administration) emonisi ete “mipɛpɛ makasi, mai oyo ezindisi mboka, molunge makasi ekoki kobima na mokili.” Makama wana nde ekoboma mokili?

Na ntembe te, oyebi makambo mosusu ya minene oyo ezali kotya bomoi na biso na likama. Soki ozali kaka kotalela makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo, okozwa biyano oyo ebongi te na oyo etali bomoi na mikolo ezali koya. Bato mosusu bakoki koloba mpe bongo ntango bazali kolanda makambo oyo bato ya politiki mpe bato ya siansi bazali koloba. Kasi, ndenge tomonisaki yango na lisolo oyo eleki, bato mingi basili kozwa biyano oyo ebongi na mituna oyo bamitunaka mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe ndenge mokili ekozala na mikolo ezali koya. Epai wapi tokoki kozwa biyano yango?