ELOBELI TITRE YA EZIPELI
Biblia ezali kaka buku moko kitoko?
Basilisaki kokoma Biblia eleki sikoyo mbula soki 2 000. Banda wana, ebele ya babuku ebimá mpe elimwá. Kasi Biblia ezali kaka. Tótalela makambo oyo elandi.
-
Bato mosusu ya nguya basalaki nyonso mpo na kolimwisa Biblia kasi balongaki te. Na ndakisa, buku moko (An Introduction to the Medieval Bible) elobi ete na Moyen-Âge, na mikili mosusu “ya bokristo, moto oyo azalaki na Biblia mpe azalaki kotánga yango na monɔkɔ ya mboka [oyo bato mingi balobaka] bazalaki kotalela ye lokola mopɛngwi mpe motɛmɛli.” Bato ya mayele oyo babongolaki Biblia na minɔkɔ ya mboka to oyo balendisaki bato bátángaka yango batyaki bomoi na bango na likama. Babomaki kutu bamosusu.
-
Atako Biblia ezalaki na banguna mingi, ekómaki mpe ezali ntango nyonso buku oyo ekabolami mingi koleka babuku nyonso. Na mobimba to na ndambo, babimisi Babiblia soki miliare mitano na minɔkɔ koleka 2 800. Yango ekeseni mpenza na babuku ya filozofi, ya siansi mpe babuku mosusu ya ndenge wana, oyo kaka bato moke nde bakoki kozala na yango mpe ekoki nokinoki kosila ngala.
-
Biblia esalisi na kobatela mpe kobongisa minɔkɔ mosusu oyo basalelaki mpo na kobongola yango. Libongoli ya Biblia na monɔkɔ ya Allemand ya Martin Luther esalaki mpe ete monɔkɔ yango ebonga lisusu. Libongoli ya liboso ya Biblia King James Version balobeli yango lokola “buku oyo eyebani mingi koleka babuku mosusu oyo babimisá” na Anglais.
-
Mateya ya Biblia “ekɔtá mpenza na mimeseno ya bato ya Mpoto, kaka te na makambo ya losambo mpe oyo basalaka, kasi mpe na makambo ya ntɔki, mikanda, mibeko, politiki mpe bongo na bongo.”
—The Oxford Encyclopedia of the Books of the Bible.
Yango ezali kaka mwa makambo oyo ekesenisi Biblia na babuku mosusu. Kasi, mpo na nini Biblia eyebani mingi bongo? Mpo na nini bato batyaki bomoi na bango na likama mpo na yango? Bantina ezali mingi, kasi mwa ndambo yango oyo: Biblia ezali na mateya ya bwanya na makambo etali ndenge tosengeli komitambwisa mpe kozala na boyokani malamu na Nzambe. Biblia esalisaka biso tóyeba ntina oyo bato banyokwamaka mpe bayokanaka te. Oyo eleki ntina, elaki ete bampasi yango ekosila, emonisi kutu ndenge ekosalema.
Biblia epesaka mayele ya kososola na makambo etali Nzambe mpe bizaleli
Kotánga kelasi ezali na ntina. Kasi zulunalo moko ya Canada Ottawa Citizen elobi ete “Ata soki ozwi badiplome mingi, yango elingi koloba te ete ozali na likoki ya kozwa bikateli ya malamu na makambo etali bizaleli.” Longola yango, ankɛtɛ oyo kompanyi moko (Edelman), oyo etalaka makambo ya boyokani kati na bato esalaki, emonisi ete bato mingi oyo batángá mingi, ezala baoyo bakambaka makambo ya mimbongo to ya guvɛrnema, bakosaka, babubaka mpe bayibaka mpe yango esalaka ete bato “bátyela bango motema lisusu te.”
Biblia elobelaka mingi makambo etali bizaleli mpe mateya ya Nzambe. Epesaka biso bososoli na makambo ya “boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.” (Masese 2:9) Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko ya mbula 23 na nkombo Stephen, oyo akɔtaki bolɔkɔ na Pologne. Ntango azalaki na bolɔkɔ, akómaki koyekola Biblia mpe kosepela na batoli na yango. Akomaki boye: “Sikoyo nayebi soki ‘kokumisa tata mpe mama’ elingi koloba nini. Nayekolaki mpe ndenge ya komonisa ezaleli ya komipekisa, mingimingi koboya ezaleli ya nkanda makasi.”
Toli oyo esimbaki motema ya Stephen ezali na Masese 19:11; elobi boye: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.” Lelo oyo, soki Stephen akutani na likambo moko ya mpasi, alukaka kotalela yango na kimya mpe kosalela batoli ya Biblia oyo eyokani na likambo yango. Alobaki boye: “Namoni ete Biblia ezali buku oyo epesaka batoli ya malamu koleka.”
Mwasi moko oyo azalaki na makanisi mabe, afingaki Maria, oyo azali Motatoli ya Yehova, na miso ya bato mpe atyaki mobulu. Kasi na esika Maria azongisa mabe, na kimya nyonso asimbaki nzela akei. Na nsima, mwasi yango ayokaki mabe na likambo oyo asalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova.
mpe alukaki Batatoli ya Yehova. Sanza soki moko na nsima, ntango amonaki lisusu Maria, ayambaki Maria mpe asɛngaki ye bolimbisi. Lisusu, asosolaki ete soki Maria amonisaki boboto mpe ezaleli ya komipekisa, ezali mpo na lingomba na ye. Nini emonanaki? Mwasi yango mpe bato mitano ya libota na ye bazwaki ekateli yaYesu Kristo alobaki ete bwanya emonanaka na misala na yango. (Luka 7:35) Ezali na makambo mingi oyo emonisi ete batoli ya Biblia esalisaka mpenza! Ebimisaka bizaleli na biso ya malamu. “Ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya,” “esepelisaka motema,” mpe koyeba malamu makambo etali Nzambe mpe bizaleli “engɛngisaka miso.”
Biblia emonisi ntina oyo bato banyokwamaka mpe bayokanaka te
Ntango minganga bayekolaka bamaladi oyo epalanganaka, balukaka koyeba nini mpenza ebimisi yango. Ezali mpe bongo mpo na koyeba ntina oyo bato banyokwamaka mpe babendanaka. Awa mpe Biblia ekoki mpenza kosalisa, mpo elobeli istware na biso ya ebandeli, ntango bampasi na biso ebandaki.
Mokanda ya Ebandeli emonisi ete bampasi ya bato ebandaki ntango mwasi ná mobali ya liboso batombokelaki Nzambe. Likambo mosusu oyo basalaki, bazwaki bango moko ekateli ya kotya mibeko etali malamu to mabe; likambo oyo kaka Nzambe nde azalaki na lotomo ya kosala. (Ebandeli 3:1-7) Likambo ya mawa, banda wana bato mingi balingaka kosala makambo ndenge balingi. Yango ebimisi nini? Istware ya bato etondi na makambo lokola kobendana, minyoko mpe kozanga koyokana na makambo etali Nzambe mpe bizaleli, na esika bato bázala na bonsomi mpe esengo. (Mosakoli 8:9) Yango wana Biblia elobi boye: “Ezali te likambo ya moto . . . atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Likambo ya esengo ezali ete botomboki ya bato elingi ekóma na nsuka.
Biblia epesi elikya
Biblia emonisi biso ete lokola Nzambe alingaka baoyo batosaka bokonzi na ye mpe mibeko na ye, akotika te mabe mpe mpasi oyo yango ebimisaka ekoba libela. Bato mabe ‘bakobuka mbuma ya misala na bango.’ (Masese 1:30, 31) Kasi “bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”
Nzambe akokokisa mokano na ye ya kotya kimya na mabele na nzela ya ‘bokonzi na ye.’ (Luka 4:43) Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba mpe na nzela na yango, Nzambe akomonisa lotomo na ye ya koyangela bato. Na libondeli ya ndakisa, Yesu amonisaki ete Bokonzi yango ná mabele ezali na boyokani; alobaki boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema . . . na mabele.”
Ɛɛ, bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakosala mokano ya Nzambe, bakondima ete Mozalisi nde azali mokonzi oyo abongi, kasi moto te. Kanyaka, lokoso, bokeseni na makambo etali ekonomi, koyina bato ya mposo mosusu mpe bitumba ekosila. Tokozala na ekólo moko, guvɛrnema moko mpe mibeko moko na makambo etali Nzambe mpe bizaleli.
Sekele mpo na komona mokili wana ya sika ezali mateya. 1 Timote 2:3, 4 elobi ete “mokano na ye [Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” Solo yango esangisi mateya ya Biblia oyo etali mibeko mpe mitinda oyo ekotambwisa bokonzi yango
Tosengeli kokamwa soki Biblia ezali buku oyo ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso? Ata moke te! Mateya na yango emonisi ete ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mpe ndenge oyo ekabolami mingi emonisi mposa oyo Nzambe azali na yango ete bato ya minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso báyekola makambo na ye mpe bázwa mapamboli oyo Bokonzi na ye ekomemela bato.