Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 6
Lisolo ya Roma na Biblia
Oyo ezali lisolo ya motoba na masolo nsambo oyo ekokoba kobima na banimero ya “Lamuká!” oyo ezali kolobela banguya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe nsango na yango ezali nsango ya elikya, oyo elobeli nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.
YESU abandisaki lingomba ya bokristo, mpe bayekoli na ye bapalanganisaki yango na mikolo oyo Roma ezalaki koyangela mokili mobimba. Tii lelo oyo, na bikólo lokola Angleterre mpe Ezipito, okoki komona banzela, baterase mpe bamonima oyo Baroma batongá. Biloko yango ezali mpenza tii sikoyo. Yango ezali komonisa biso ete Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki mpenza bato, mpe makambo oyo balobaki mpe basalaki ezali mpenza solo. Na ndakisa, soki ozali kotambola na nzela oyo babengi Via Appia, ozali kotambola na nzela moko oyo ntoma Paulo atambolaki ntango azalaki kokende na Roma.—Misala 28:15, 16.
Lisolo oyo ebongi kotyela motema
Lisolo ya Biblia oyo elobeli Yesu mpe bayekoli na ye elobeli mpe makambo ebele oyo esalemaki Luka 3:1-3, 21) Luka alobeli mpe bakonzi minene minei mosusu: Filipi (ndeko ya Erode), Lisaniasi, Anasi mpe Kaifa. Bakomi ya makambo ya kala balobelaka mpe bato wana nyonso nsambo. Kasi, sikoyo tólobela kaka Tibere Kaisala, Pilate mpe Erode.
na ekeke ya liboso. Talá ndenge mokomi ya Biblia Luka abendi mpenza likebi mpo na mbula oyo makambo mibale ya ntina mingi esalemaki: ebandeli ya mosala ya Yoane Mobatisi mpe batisimo ya Yesu, oyo na ntango wana akómaki Kristo, to Masiya. Luka akomaki ete makambo wana esalemaki na “mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibere Kaisala [na mobu 29], ntango Ponse Pilate azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Erode azalaki moyangeli ya etúká ya Galile.” (Tibere Kaisala ayebani mingi, mpe básala mayemi mpe bikeko mingi ya elongi na ye. Badepite ya Roma batyaki ye mokonzi ya Baroma na mwa 15 Sɛtɛmbɛ ya mobu 14, ntango Yesu azalaki na mbula soki 15.
Ponse Pilate atángami elongo na Tibere na lisolo oyo Tacite, moto moko ya mayele na masolo ya kala akomaki mwa moke nsima wana Biblia esilaki kokomama. Mpo na ebengeli “Mokristo,” Tacite akomaki ete: “Euti na Kristo, oyo anyokwamaki mpe abomamaki na mabɔkɔ ya Ponse Pilate, moko ya baguvɛrnɛrɛ na biso ntango Tibere azalaki mokonzi.”
Erode Antipasi ayebani lokola moto oyo atongaki engumba ya Tiberiase pene na Mbu ya Galile. Azalaki mpe kofanda kuna. Ekoki kozala ete Erode nde moto apesaki mitindo bákata Yoane Mobatisi motó.
Lisolo ya Biblia elobeli mpe makambo mosusu minene oyo esalemaki na ntango ya Baroma. Mpo na mbotama ya Yesu, Biblia elobi boye: “Nzokande na mikolo wana Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete mabele mobimba esika bato bafandi bákomisa nkombo; (oyo nde kokomisama nkombo ya liboso oyo esalemaki ntango Kiriniusi azalaki guvɛrnɛrɛ ya Siri;) mpe bato nyonso bazalaki kokende kokomisa nkombo, moto na moto na engumba na ye.”—Luka 2:1-3.
Tacite mpe Yozefe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala, bango mibale balobeli Kiriniusi. Kopi ya mobeko yango ya kokomisama nkombo ezali tii lelo oyo na bibliotɛkɛ moko na Angleterre mpe yango endimisi ete likambo yango esalemaki mpenza. Mokanda yango elobi boye: “Lokola ntango ya kosala resansema ndako na ndako ekoki, esengeli bato nyonso oyo bakendá kofanda na bisika mosusu ata mpo na likambo nini, bázonga na bamboka na bango.”
Biblia elobeli mpe “nzala moko monene . . . na ntango ya [Ampɛrɛrɛ ya Roma] Klode.” (Misala 11:28) Yozefe, mokomi ya makambo ya kala alobeli mpe likambo yango. Akomaki ete: “Nzala moko monene enyokolaki bango mpenza na ntango wana, mpe bato ebele bakufaki.”
Lisusu, na Misala 18:2, Biblia elobi ete “Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma.” Lisolo ya bomoi ya Klode oyo Suétone, mokomi moko ya makambo ya kala akomaki soki na mobu 121, endimisi likambo yango. Suétone akomaki ete Klode “abenganaki Bayuda nyonso na Roma,” mpe lokola Bayuda yango bazalaki koyina Bakristo, “bazalaki ntango nyonso kobimisa mobulu.”
Biblia elobi ete na eleko ya nzala monene oyo tolobeli likoló, mokolo moko Erode Agripa “alataki bilamba ya bokonzi,” mpe asalaki diskur liboso ya bato; bakumisaki ye mingi mpe bagangaki ete: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Biblia elobi ete nsima na yango, “nkusu elyaki ye mpe akataki motema.” (Misala 12:21-23) Yozefe mpe alobelaki likambo yango, kutu abakisaki makambo mosusu. Akomaki ete ntango Agripa azalaki kosala diskur na ye, alataki “elamba oyo esalemi mobimba na palata.” Abakisaki mpe ete ‘Agripa ayokaki mpasi makasi na mbalakaka na libumu na ye, mpe ebandaki na ndenge moko ya nsɔmɔ; akufaki mikolo mitano na nsima.’
Bisakweli oyo okoki kotyela motema
Biblia ezali mpe na bisakweli ya minene oyo ekomamaki mpe ekokisamaki na eleko ya Baroma. Na ndakisa, ntango Yesu akɔtaki na Yerusaleme likoló ya mpunda, alelaki mpe asakolaki ete basoda ya Roma bakobebisa yango. Alobaki boye: “Mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ . . . bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo, mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotala yo.”—Luka 19:41-44.
Kasi bayekoli ya Yesu bakozwa libaku ya kokima likama yango. Na ndenge nini? Yesu apesaki bango malako ya sikisiki liboso. Alobaki boye: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango [Yerusaleme] bálongwa.” (Luka 21:20, 21) Bayekoli ya Yesu bakokaki komituna boye: ‘Ndenge nini tokokoka kokima engumba oyo ezingami na banguna?’
Yozefe akomaki makambo oyo esalemaki. Na mobu 66, ntango guvɛrnɛrɛ moko ya Roma abɔtɔlaki mbongo ya kɛsi ya makabo ya tempelo mpo Bayuda bafutaki mpako te, Bayuda basilikaki mpe batombokaki, mpe babomaki basoda ya Roma; balobaki polele ete Yudea ezali lisusu na nse ya litambwisi ya Roma te. Na nsima, kaka na mbula yango, Cestius Gallus, guvɛrnɛrɛ ya Siri, ayaki elongo na basoda na ye 30 000 mpe akómaki na Yerusaleme na eloko ya fɛti. Gallus azwaki naino bakartye ya zingazinga mpe abandaki kutu kobuka bifelo ya tempelo, esika batomboki babombanaki. Kasi na mbalakaka, Gallus alongwaki! Bayuda basepelaki, balandaki mpe babundisaki bango.
Atako bongo, bakristo ya sembo bakosamaki te. Basosolaki ete wana ezali kokokisama ya esakweli monene ya Yesu: Engumba ezingamaki na bakaa ya basoda! Mpe lokola mampinga yango ya basoda elongwaki, bakristo ya sembo bazwaki libaku ya kokima. Mingi bakimaki na Pela, engumba moko ya bato ya bikólo oyo ezalaki likoló ya ngomba na ngambo mosusu ya ebale Yordani, epai bitumba ezalaki te.
Nini ekómelaki Yerusaleme? Na litambwisi ya Vespasien ná mwana na ye Titus, mampinga ya basoda ya Roma ezongaki, mpe na mbala oyo bazalaki basoda 60 000. Bakɔtaki na engumba liboso ya Elekeli ya mobu 70; bato ya engumba elongo na ebele ya bato oyo bayaki mpo na Elekeli bakokaki lisusu kobima te. Basoda ya Roma bakataki banzete nyonso ya zingazinga mpe bakómisaki yango nsɔngɛ mpo na kotonga lopango moko, kaka ndenge Yesu asakolaki. Nsima ya sanza soki mitano, engumba ekweaki.
Titus apesaki mitindo ete bábebisa tempelo te; kasi soda moko atyaki yango mɔtɔ, mpe engumba ebebisamaki mobimba libanga moko nsima ya mosusu, kaka ndenge Yesu asakolaki. Yozefe alobi ete Bayuda mpe baprozelite koleka milio moko bakufaki, mingi na nzala mpe na maladi, mpe bakangaki bato mosusu 97 000. Mingi kati na bango batindamaki na boombo na Roma. Soki okei na Roma lelo oyo, okomona monima monene oyo babengi Colisée, oyo Titus asilisaki kotonga nsima ya kobundisa Yudea. Okomona mpe Monima ya Titus, oyo etongamaki mpo na
kokanisa ndenge alongaki Yerusaleme. Ya solo, ebongi mpenza tótyela bisakweli ya Biblia motema, ata na makambo ya mikemike. Yango wana ezali mpenza na ntina tótya likebi na makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya!Elikya oyo okoki kotyela motema
Ntango Yesu atɛlɛmaki liboso ya Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma, alobelaki Bokonzi, to guvɛrnema moko oyo “ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Kutu, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na bokonzi yango. Alobaki ete: “Tata na biso na likoló . . . Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Simbá ete Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mokano ya Nzambe—kasi te oyo ya bato ya lolendo mpe oyo balukaka komitombola—esalema awa na mabele.
Yesu azali Mokonzi oyo azali koyangela na Bokonzi yango ya likoló. Mpe na boyokani na mokano ya Nzambe ya ebandeli, Yesu akokómisa mabele mobimba paradiso.—Luka 23:43.
Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekozwa makambo ya bato na mabɔkɔ? Yesu apesaki eyano na motuna yango nsima ya kosekwa, ntango asololaki na ntoma na ye Yoane; na ntango yango Yoane azalaki na bɔlɔkɔ na esanga ya Patimosi, na ntango Ampɛrɛrɛ ya Roma Domitien, ndeko ya Titus azalaki koyangela. Yesu ayebisaki ye boye: “Ezali na bakonzi nsambo: mitano bakweá, moko azali, mpe mosusu ayei naino te, kasi ntango akoya akoumela mwa ntango moke.”—Emoniseli 17:10.
Ntango Yoane akomaki maloba wana, “bakonzi” mitano to banguya mitano oyo elandi esilaki kokwea: Ezipito, Asiri, Babilone, Bamede ná Baperse mpe Grɛsi. Mokonzi oyo “azali,” to oyo azalaki koyangela na ntango ya ntoma Yoane, ezalaki Roma. Na yango, kaka moko nde atikalaki, elingi koloba nguya ya nsuka ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ekozala bokonzi nini? Ekoyangela ntango boni? Nimero ya Lamuká! oyo ekolanda ekopesa biyano na mituna wana.