Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Saleláká mbongo na yo na bwanya

Saleláká mbongo na yo na bwanya

MBALA mingi bato balobaka ete Biblia elobi: “Mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso.” Nzokande, Biblia elobi nde ete: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” (1 Timote 6:10) Bato mosusu bakómaka mpenza kolinga mbongo mpe bamipesaka mpo na konduka bomɛngo. Basusu bakómi baombo ya mbongo mpe yango ebimiselaka bango mikakatano minene. Nzokande, soki tozali kosalela mbongo malamu, ekoki kosalisa na makambo mingi. Biblia elobi ete “mosolo mpe ekosilisa ntembe nyonso.”​—Mosakoli 10:19.

Atako Biblia ezali te buku oyo elobelaka makambo ya mbongo, ezali na toli ya malamu oyo ekoki kosalisa yo osalelaka mbongo na bwanya. Bapesi-toli mingi na makambo ya mbongo bapesi batoli mitano, mpe batoli yango eyokani na mitinda ya Biblia oyo ekomamá kala mpenza. Batoli yango ezali oyo:

Yebá mbongo ozwaka, kosilisaka yango nyonso te

Kobomba mbongo. Biblia emonisi ete bateyaki Bayisalaele ete kobomba biloko ezali na ntina. Bayebisaki bango ete bábombaka ndambo moko ya zomi (1/10) mbula na mbula kaka mpo na kosalela yango na bafɛti ya ekólo. (Deteronome 14:22-27) Ntoma Paulo mpe alendisaki baklisto ya liboso bátyaka mwa mbongo pembeni pɔsɔ na pɔsɔ mpo bákoka kopesa makabo mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazalaki na bosɛnga. (1 Bakolinti 16:1, 2) Bapesi-toli mingi ya makambo ya mbongo balendisaka likambo ya kobomba mbongo. Longoláká libosoliboso mbongo oyo okobomba. Soki kaka bafuti yo, kende kotika na banki to na esika mosusu oyo babombaka mbongo, mbongo oyo okanisaki kobomba. Yango ekosalisa yo osalela te mbongo oyo okanaki kobomba.

Kokoma ndenge oyo okosalela mbongo. Yango ezali lolenge eleki malamu ya kobatela mbongo mpe koboya kobebisa yango mpambampamba. Kokoma malamu ndenge okosalela mbongo ekoki kosalisa yo oyeba esika mbongo ezali kokende, mpe ekoki kosalisa yo olonga kosala makambo nyonso oyo okanaki. Yebá malamu mbongo oyo ozwaka, mpe mbongo ya biloko nyonso oyo osombaka esengeli kozala na nse ya mbongo oyo ozwaka. Yebá kokesenisa makambo oyo osengeli na yango mpe oyo olingi. Na likambo yango, Yesu apesaki bayoki na ye toli ete basengeli ‘kotángaka motuya’ liboso básala likambo nyonso. (Luka 14:28) Biblia epesi biso toli ete tókɔtaka banyongo mpambampamba te.​—Masese 22:7.

Kobongisa liboso. Kanisá malamu makambo oyo osengeli na yango na mikolo ezali koya. Na ndakisa, soki olingi kosomba lopango to apartema, kodefa mbongo oyo okofuta noki ekoki kozala ekateli ya malamu. Ndenge moko mpe, tata ya libota akoki komona ete asengeli kofuta asiranse ya bomoi, ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, ya makama, mpe ya makambo mosusu mpo na kobatela bato ya libota na ye. Kokanisa makambo oyo osengeli na yo na mikolo ezali koya ekoki mpe kosɛnga komibongisa mpo na ntango oyo okozwa pansiɔ. Masese 21:5 elobi na biso ete “makanisi ya bato ya mosala ekozwisa biloko mingi.”

Yebá malamu makambo osengeli na yango mpe oyo olingi

Koyekola. Omipesa na koyekola mpo okóma na makoki ya kobatela nzoto mpe makanisi na yo. Yango ekosalisa yo na bomoi. Koyekola esengeli kozala momeseno ya bomoi na yo mobimba. Biblia elobi ete “mayele ya solo mpe bososoli” ezali na motuya mingi, mpe elendisi biso tókoba kozwa yango.​—Masese 3:21, 22; Mosakoli 10:10.

Kozala na bokatikati. Tyáká mbongo na esika na yango. Baankɛtɛ mingi emonisi ete baoyo bamibanzabanzaka mingi mpo na bato koleka mpo na mbongo, bazalaka na esengo mingi. Bamosusu batikaka lokoso etambwisa bango. Na ndenge nini? Nsima ya kokokisa makambo na bango ya ntina, bamipesaka na koluka bomɛngo. Nzokande, soki moto azali na bilei, bilamba, mpe esika ya kolala, asengeli lisusu mpenza na eloko nini? Tokoki kokamwa te ete mokomi ya Biblia oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo akomaki mpe ete: “Kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” (1 Timote 6:8) Kosepela na biloko oyo tozali na yango ekopekisa biso tókóma na bolingo ya mbongo mpe tókutana te na mikakatano oyo yango ememaka.

Ya solo mpenza, bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mingi ya mabe. Mbongo ekokóma nkolo na yo soki yo moko olingi. Kasi, soki ozali kosalela yango na bwanya, mbongo ekoki kopesa yo nzela ya kosala makambo oyo eleki ntina na bomoi, na ndakisa kozala na boyokani makasi na mwasi na yo mpe bana na yo, baninga na yo mpe Nzambe. Nzokande na mokili oyo, ezali mpasi moto azanga komitungisa mpo na mbongo. Mbongo ekokoba kotungisa bato? Elikya ezali ete bobola ekosila? Lisolo ya nsuka kati na masolo oyo elobeli makambo ya mbongo ekoyanola na mituna yango.

Longola bilei, bilamba mpe esika ya kolala, moto azali lisusu na mposa ya nini mpenza?