Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 20

Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso?

Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso?

OYEBI moto moko oyo alingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso?— Soki atɛlɛmi na molɔngɔ, akoki kotindika bato mosusu mpo ye azala moto ya liboso. Osilá komona likambo ya ndenge wana?— Mokolo mosusu, Moteyi Monene amonaki ata mikóló bazali koluka kozwa bisika ya liboso, to bisika ya lokumu mingi. Kasi, ye asepelaki na ezaleli yango te. Tótala ndenge elekaki.

Osilá komona moto azali kowelela kaka esika ya liboso?

Biblia eyebisi biso ete babengisaki Yesu na fɛti moko ya monene na ndako ya Mofalisai moko, oyo azalaki mokambi monene ya lingomba. Ntango Yesu akómaki, amonaki bato mosusu oyo bazali koya bazali kopona bisika ya malamu koleka. Yango wana, abɛtelaki bato oyo babengisamaki na fɛti yango lisolo moko. Okosepela koyoka lisolo yango?—

Yesu alobaki boye: ‘Soki moto moko abengisi yo na fɛti ya libala, kokende te kofanda na esika oyo eleki malamu to oyo eleki lokumu.’ Oyebi mpo na nini Yesu alobaki bongo?— Alobaki ete ntango mosusu babengisaki mpe moto mosusu oyo azali na lokumu mingi koleka. Na bongo, ndenge ozali komona na elilingi, nkolo fɛti akei koyebisa moto oyo amifandisaki na esika oyo eleki malamu ete: ‘Tikelá moto oyo esika oyo, mpe yo kende kofanda kuna.’ Moto oyo bayebisi ye bongo akoyoka ndenge nini?— Akoyoka nsɔni mpo bato mosusu nyonso oyo babengamaki na fɛti yango bakotala ye ntango azali kotɛlɛma mpe kokende kofanda na esika oyo ezali mpenza na lokumu te.

Yesu alingaki komonisa ete ezali malamu te koluka kozala na esika oyo eleki lokumu. Yango wana alobaki ete: ‘Ntango moto moko abengi yo na fɛti ya libala, kende kofanda na esika ya nse koleka. Boye, moto oyo abengi yo akoki koya mpe koloba ete: “Moninga, matá na likoló koleka.” Boye okozala na lokumu na miso ya bato mosusu nyonso oyo babengamaki na fɛti yango ntango ozali kokende kofanda na esika ya malamu koleka.’​—Luka 14:1, 7-11.

Liteya nini Yesu apesaki ntango alobelaki bato oyo bazalaki kozwa bisika oyo eleki malamu, to ya liboso?

Osimbi likambo oyo Yesu alingaki koloba na lisolo yango?— Tiká tózwa ndakisa moko mpo na komona soki osimbi mpenza likambo yango. Kanisá ete ozali kokɔta na bisi oyo ezali na bato ebele na kati. Osengeli nde kowela esika ya kofanda mpe kotika mobange moko atɛlɛma?— Okanisi ete Yesu akosepela soki osali bongo?—

Moto mosusu akoki koloba ete Yesu alandelaka te makambo oyo tosalaka. Yo mpe okanisaka bongo?— Ntango Yesu azalaki na fɛti monene yango na ndako ya Mofalisai wana, azalaki kotala ndenge bato bazalaki kopona bisika ya kofanda. Okanisi te ete ye atyaka mpe likebi na makambo oyo biso tozali kosala lelo oyo?— Sikoyo, lokola Yesu azali na likoló, azali mpenza na esika oyo ebongi mpo na kotala biso.

Ntango moto azali koluka kaka kozala na esika ya liboso, yango ekoki kobimisa mikakatano. Mbala mingi yango ebimisaka koswana, mpe bato basukaka na kosilika. Yango esalemaka mbala mosusu ntango bana balingi kokende kotambola na bisi. Ntango kaka bafungoli bisi, bana bawelaka kokɔta bato ya liboso. Balingaka bisika ya kofanda ya malamu, oyo ezalaka pembeni ya maninisa. Nini ekoki kosalema na nsima?— Ɛɛ, bakoki koswana.

Kolinga kaka kozala na esika ya liboso ekoki kobimisa mikakatano mingi. Yango kutu ebimisaki mikakatano kati na bantoma ya Yesu. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 6 ya mokanda oyo, bawelanaki mpo na koyeba nani aleki baninga. Na ntango yango, Yesu asalaki nini?— Asembolaki bango. Kasi, na nsima bawelanaki lisusu. Tótala ndenge kowelana yango ebandaki.

Yesu ná bantoma na ye bazali kokende na engumba Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka elongo na bato mosusu. Yesu auti koloba na bango makambo ya Bokonzi na ye; yango wana, Yakobo ná Yoane babandi kokanisa ndenge bakoyangela elongo na ye. Mpe bayebisi mama na bango, Salome, likambo yango. (Matai 27:56; Malako 15:40) Yango wana ntango bazali kokende na Yelusaleme, Salome akei epai ya Yesu, afukami liboso na ye, mpe asɛngi ye likambo moko.

Yesu atuni ye: “Olingi nini?” Ayanoli ete alingi bana na ye báfanda pembeni na ye na kati ya Bokonzi na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mobali. Ntango bantoma mosusu bayoki eloko oyo Yakobo ná Yoane batindaki mama na bango asɛngela bango, okanisi ete bayoki ndenge nini?—

Eloko nini Salome azali kosɛnga Yesu, mpe yango ebimisi nini?

Basilikeli Yakobo ná Yoane makasi. Yango wana Yesu apesi bantoma na ye nyonso toli moko ya malamu. Yesu ayebisi bango ete bakonzi ya mokili balingaka kozala bato minene mpe bato ya lokumu. Balingaka kozala na esika ya lokumu mpo bato nyonso bátosaka bango. Kasi Yesu ayebisi bayekoli na ye ete bango basengeli kozala bongo te. Kutu, alobi ete: “Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.” Oyo nde toli malamu!​—Matai 20:20-28.

Oyebi mosala oyo moombo asalaka?— Asalelaka bato mosusu, akanisaka te ete bato mosusu bakosalela ye. Amityaka na esika ya liboso te, kasi azalaka nde na nsima. Ntango asalaka misala, amimonaka te ete azali na ntina mingi, kasi nde lokola moto mpamba. Mpe kobosana likambo oyo te: Yesu alobaki ete moto oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala lokola moombo ya basusu.

Na makanisi na yo, yango elimboli nini mpo na biso?— Moombo akoki nde kowelana na nkolo na ye mpo na kozwa esika ya kofanda oyo eleki malamu? To bakoki nde kowelana nani asengeli kolya liboso? Okanisi nini?— Yesu amonisaki ete moombo atyaka ntango nyonso nkolo na ye liboso.​—Luka 17:7-10.

Na bongo, na esika ya koluka kaka kozala na esika ya liboso, tosengeli kosala nini?— Ya solo, tosengeli kozala lokola baombo ya basusu. Yango elingi koloba ete tosengeli kotya bato mosusu na esika ya liboso, mpe kotalela bango ete bazali na ntina mingi koleka biso. Makambo nini okoki kosala mpo na kotya bato mosusu na esika ya liboso?— Okoki komona mwa bandakisa ya makambo yango soki ozongi na lokasa 40 mpe 41 ya buku oyo.

Kobosana te ete Moteyi Monene azalaki kosalela bato mosusu mpo na komonisa ete azalaki kotya bango na esika ya liboso. Kutu, na mpokwa ya nsuka oyo alekisaki elongo na bantoma na ye, agunzamaki mpo na kosukola bango makolo. Soki biso mpe tozali kosalela bato mosusu mpo na komonisa ete tozali kotya bango na esika ya liboso, tokosepelisa Moteyi Monene ná Tata na ye, Yehova Nzambe.

Tiká tótánga mwa bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo ezali kolendisa biso na kotya basusu na esika ya liboso: Luka 9:48; Baloma 12:3; mpe Bafilipi 2:3, 4.