Privacy Settings

To provide you with the best possible experience, we use cookies and similar technologies. Some cookies are necessary to make our website work and cannot be refused. You can accept or decline the use of additional cookies, which we use only to improve your experience. None of this data will ever be sold or used for marketing. To learn more, read the Global Policy on Use of Cookies and Similar Technologies. You can customize your settings at any time by going to Privacy Settings.

LITEYA 6

Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?

Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?

1. Nsango nini ya malamu ezali mpo na bato oyo bakufá?

Marta ná Maria bayambi ndeko na bango Lazare oyo auti kosekwa

 Ntango Yesu akómaki na Betani, pene na Yerusaleme, moninga na ye Lazare akufaki esilaki koleka mikolo minei. Yesu akendaki na lilita, elongo na Marta mpe Maria, bandeko ya Lazare. Eumelaki te, ebele ya bato bayaki wana. Kanisá esengo oyo Marta ná Maria bazalaki na yango ntango Yesu asekwisaki Lazare!​—Tángá Yoane 11:21-24, 38-44.

 Marta ayebaki liboso nsango malamu oyo etali bakufi. Ayebaki ete Yehova akosekwisa bakufi mpo báfanda lisusu awa na mabele.​—Tángá Yobo 14:14, 15.

2. Moto akómaka ndenge nini soki akufi?

Adama akelami, mpe na nsima akufi

Nzambe alobaki na Adama boye: “Ozali putulu mpe okozonga na putulu.”​—EBANDELI 3:19.

 Bato basalemá na putulu ya mabele. (Ebandeli 2:7; 3:19) Tozali te bilimo oyo efandaka na kati ya nzoto ya mosuni. Tozali bikelamu ya mosuni, yango wana eteni moko te ya nzoto na biso ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Soki tokufi, bɔɔngɔ na biso mpe ekufaka, mpe totikaka kokanisa. Yango wana, ntango Lazare asekwaki, alobaki te ete amonaki likambo boye to boye, mpamba te bakufi bayebaka eloko moko te.​—Tángá Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 6, 10.

 Nzambe anyokolaka nde bato na mɔtɔ nsima ya liwa? Lokola Biblia emonisi ete bakufi bayebaka eloko moko te, emonani polele ete liteya ya lifelo ya mɔtɔ ezali ya lokuta mpe efingisaka nkombo ya Nzambe. Ayinaka ata likanisi mpamba ya konyokola bato na mɔtɔ.​—Tángá Yirimia 7:31.

 Talá video Moto akómaka ndenge nini soki akufi?

3. Bato oyo bakufá bakoki kosolola na biso?

 Bakufi bakoki koloba te, bakoki mpe koyoka te. (Nzembo 115:17) Kasi baanzelu mosusu ya mabe bakoki kosolola na bato mpe koloba na esika ya bato oyo bakufá. (2 Petro 2:4) Yehova apekisi likambo ya koluka kosolola na bakufi.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10, 11.

4. Banani bakosekwa?

Mobali moko oyo asekwi na paradiso azali koyekola makambo ya Nzambe. Na nsima, azali koteya bato mosusu oyo basekwi.

 Bamilio ya bato oyo bakufá bakozonga na bomoi awa na mabele. Ata bato mosusu oyo bayebaki Nzambe te mpe basalaki makambo ya mabe bakosekwisama.​—Tángá Luka 23:43; Misala 24:15.

 Bato oyo bakosekwa bakozala na likoki ya koyekola solo na ntina ya Nzambe mpe kondimela Yesu mpe kotosa ye. (Emoniseli 20:11-13) Baoyo bakozonga na bomoi mpe bakosala makambo ya malamu, bakozala na likoki ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele.​—Tángá Yoane 5:28, 29.

5. Lisekwa emonisi biso nini mpo na Yehova?

 Nzambe apesaki elikya mpo na bakufi na ndenge atindaki Mwana na ye akufa mpo na biso. Yango wana, lisekwa ezali komonisa biso bolingo ya Yehova mpe boboto na ye monene. Ntango bakufi bakosekwa, nani okosepela komona libosoliboso?​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 6:23.